Matai 6:1-34

6  “Bókeba mpenza ete bósala makambo na bino ya boyengebene+ na miso ya bato te mpo bango bámona bino; soki bongo bokozwa mbano te epai ya Tata na bino oyo azali na likoló.  Yango wana, ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa,+ koyula kelelo liboso na yo te,+ ndenge bakosi basalaka na basinagoga mpe na babalabala, mpo bato bákumisa bango. Ya solo nalobi na bino: Bazwi mbano na bango mobimba.  Kasi yo, ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa, lobɔkɔ na yo ya mwasi eyeba te oyo lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kosala,  mpo makabo na yo ya motema mawa ebombana; bongo Tata na yo oyo atalaka uta na esika ya kobombana akofuta yo.+  “Lisusu, ntango bozali kobondela, bosengeli te kozala lokola bakosi; mpamba te balingaka kobondela batɛlɛmi+ na basinagoga mpe na bisika oyo banzela minene ekutani mpo bato bámona bango.+ Ya solo nalobi na bino: Bazwi mbano na bango mobimba.  Nzokande, yo ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo+ mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana;+ bongo Tata na yo oyo atalaka uta na esika ya kobombana akofuta yo.  Kasi ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te,+ ndenge bato ya bikólo basalaka, mpo bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango mpo bazali koloba mingi.  Bongo bómikómisa lokola bango te, mpo Nzambe Tata na bino ayebi makambo oyo bozali na bosɛnga na yango+ liboso kutu bósɛnga ye.  “Yango wana, bosengeli kobondela boye:+ “‘Tata na biso na likoló, nkombo+ na yo esantisama.+ 10  Bokonzi+ na yo eya. Mokano na yo+ esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.+ 11  Pesá biso lelo bilei* na biso mpo na mokolo oyo;+ 12  mpe limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo bazali na nyongo na biso.+ 13  Mpe salisá biso tókwea na komekama te,*+ kasi bikisá biso na moto mabe.’+ 14  “Mpo soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino;+ 15  kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.+ 16  “Ntango bokili bilei,+ bótika kozala na bilongi ya mawa lokola bakosi, mpo babebisaka bilongi na bango mpo bato bámona ete bakili bilei.+ Ya solo mpenza nalobi na bino: Bazwi mbano na bango mobimba. 17  Kasi yo, ntango okili bilei, pakolá motó na yo mafuta mpe sukolá elongi na yo,+ 18  mpo bato bámona te ete okili bilei, kasi Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana+ nde amona; bongo Tata na yo oyo atalaka uta na esika ya kobombana akofuta yo. 19  “Bótika komibombela biloko ya motuya+ na mabele, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka. 20  Nzokande, bómibombela biloko ya motuya na likoló,+ epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka te,+ mpe epai miyibi bakoki kokɔta te mpe koyiba te. 21  Mpo epai eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo ekozala mpe kuna. 22  “Mwinda ya nzoto ezali liso.+ Yango wana, soki liso na yo ezali alima, nzoto na yo mobimba ekongɛnga; 23  kasi soki liso na yo ezali mabe,+ nzoto na yo mobimba ekozala molili. Soki ya solo mpenza pole oyo ezali na kati na yo ezali molili, molili yango ezali makasi mpenza!+ 24  “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu,+ to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.+ 25  “Yango wana nazali koloba na bino: Bótika komitungisa+ mpo na milimo na bino mpo na oyo bokolya to oyo bokomɛla, to mpo na nzoto na bino mpo na oyo bokolata.+ Molimo eleki bilei mpe nzoto eleki bilamba, boye te?+ 26  Bótala malamumalamu bandɛkɛ+ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango. Bino boleki bango na motuya te?+ 27  Nani na kati na bino soki amitungisi akoki kobakisa bolai ya bomoi na ye ata moke?+ 28  Lisusu, mpo na nini bozali komitungisa mpo na bilamba? Bózwa liteya na fololo lísi+ ya esobe, ndenge yango ezali kokola; emonaka mpasi te, mpe etongaka elamba te; 29  kasi nazali koloba na bino ete ata Salomo+ na nkembo na ye nyonso alataki lokola moko na yango te. 30  Bongo soki Nzambe alatisaka matiti ya esobe, oyo ezali lelo mpe lobi ekobwakama na mɔtɔ, akolatisa bino koleka te, bino bato ya kondima moke?+ 31  Yango wana, bómitungisa ata moke te+ mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ 32  Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.+ 33  “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye,+ mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.+ 34  Bongo bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda,+ mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.

Maloba na nse

Lil., “mampa.”
Lil., “Kokɔtisa biso na komekama te.”