Matai 5:1-48

5  Ntango amonaki ebele ya bato yango amataki na ngomba; mpe nsima ya kofanda, bayekoli na ye bayaki epai na ye;  mpe afungolaki monɔkɔ na ye mpe abandaki koteya bango ete:  “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo,+ mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.+  “Esengo na baoyo bazali na mawa, mpo bakobɔndisama.+  “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto,+ mpo bakozwa libula ya mabele.+  “Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa+ ya boyengebene, mpo bakotonda.+  “Esengo na bato ya motema mawa,+ mpo bakomonisela bango motema mawa.  “Esengo na bato ya motema pɛto,+ mpo bakomona Nzambe.+  “Esengo na bato oyo batyaka kimya,+ mpo bakobengama ‘bana+ ya Nzambe.’ 10  “Esengo na baoyo banyokwami+ mpo na boyengebene, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango. 11  “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe+ mpe konyokola+ bino mpe kokosela bino makambo ya ndenge nyonso mpo na ngai. 12  Bósepela mpe bópumbwa na esengo,+ mpo mbano+ na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli+ oyo bazalaki liboso na bino. 13  “Bino bozali mungwa+ ya mabele; kasi soki mungwa esili elɛngi, ndenge nini elɛngi na yango ekozonga? Ezali lisusu na ntina moko te, kasi bakobwaka yango kaka libándá+ mpo bato bányata yango. 14  “Bino bozali pole ya mokili.+ Engumba oyo ezali likoló ya ngomba ekoki kobombama te. 15  Bapelisaka mwinda mpe batyaka yango likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda kasi na nse ya ekɔlɔ ya komekela te,+ mpe engɛngɛlaka baoyo nyonso bazali na kati ya ndako. 16  Ndenge moko mpe tiká pole+ na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu+ mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.+ 17  “Bókanisa te ete nayaki mpo na kobebisa Mibeko+ to Basakoli. Nayaki mpo na kobebisa yango te, kasi mpo na kokokisa yango;+ 18  mpo ya solo mpenza nalobi na bino ete likoló ná mabele ekoki koleka+ kasi ata ‘i’ to mwa eteni ya ‘i’ ya Mibeko ekoleka te soki makambo nyonso esalemi te.+ 19  Yango wana, moto nyonso oyo akobuka+ moko ya mitindo oyo eleki moke mpe akoteya bato básala bongo, akobengama ‘moto oyo aleki moke’ na bokonzi ya likoló.+ Moto nyonso oyo akosalela yango mpe akoteya+ yango, moto yango akobengama ‘moto monene’+ na bokonzi ya likoló. 20  Mpo nalobi na bino ete soki boyengebene na bino eleki mpenza oyo ya bakomeli mpe ya Bafarisai te,+ bokokɔta na bokonzi ya likoló te.+ 21  “Boyokaki ete balobaki na bato ya ntango ya kala, ‘Osengeli koboma moto te;+ kasi moto nyonso oyo akoboma moto+ akozongisa monɔkɔ na tribinale.’+ 22  Nzokande, ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo akobombela ndeko na ye nkanda+ akozongisa monɔkɔ+ na tribinale; kasi moto nyonso oyo akoloba na ndeko na ye liloba ya kotyola oyo ekoki kutu kolobelama te akozongisa monɔkɔ na Tribinale Monene; nzokande moto nyonso oyo akoloba ete, ‘Yo nsuka ya bolole!’ akoki kobwakama na mɔtɔ ya Gehena.+ 23  “Bongo soki omemi likabo na yo na etumbelo+ mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo,+ 24  tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo na ndeko na yo,+ mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.+ 25  “Salá noki obongisa makambo elongo na moto oyo azali na likambo ya kosamba na yo, naino ozali na ye na nzela kuna, noki te moto oyo azali na likambo ná yo+ apesa yo na mabɔkɔ ya mosambisi, mpe mosambisi apesa yo na polisi, mpe obwakama na bolɔkɔ. 26  Ya solo nalobi na yo, Okobima kuna te tii okofuta mbongo ya ebende ya nsuka ya motuya moke mpenza.+ 27  “Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kosala ekobo te.’+ 28  Kasi ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi+ tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo+ na motema.+ 29  Nzokande, soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.+ Mpo eleki malamu obungisa moko ya binama na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama+ na Gehena. 30  Lisusu, soki lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango mpe bwaká yango mosika na yo.+ Mpo eleki malamu obungisa moko ya binama na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na Gehena. 31  “Balobá lisusu ete, ‘Moto nyonso oyo abomi libala+ na mwasi na ye, apesa ye mokanda ya koboma libala.’+ 32  Nzokande, ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo akoboma libala na mwasi na ye, soki ezali te mpo na pite,+ azali kotinda ye na ekobo,+ mpe moto nyonso oyo abali mwasi oyo abomá libala azali kosala ekobo.+ 33  “Lisusu boyokaki ete balobaki na bato ya ntango ya kala ete, ‘Osengeli te kolapa ndai+ bongo okokisa yango te, kasi osengeli kokokisa bilako oyo osaleli Yehova.’+ 34  Nzokande, ngai nalobi na bino ete: Bólapa ndai te,+ na nkombo ya likoló te, mpo ezali kiti ya bokonzi ya Nzambe;+ 35  na nkombo ya mabele mpe te, mpo ezali ebonga+ ya makolo na ye; na nkombo ya Yerusaleme mpe te, mpo ezali engumba+ ya Mokonzi monene. 36  Osengeli mpe kolapa ndai na motó na yo te; mpo okoki kokómisa nsuki ata moko mpɛmbɛ to moindo te. 37  Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te;+ mpo maloba oyo ebakisami likoló na oyo wana euti na moto mabe.+ 38  “Boyokaki ete balobi, ‘Liso mpo na liso mpe lino mpo na lino.’+ 39  Nzokande, ngai nalobi na bino: Bótɛmɛla te moto oyo azali mabe; kasi moto nyonso oyo abɛti yo mbata na litama+ na yo ya mobali, pesá ye mpe oyo mosusu. 40  Mpe soki moto alingi kokende na yo na tribinale mpe kokamata elamba na yo ya kati, tikelá ye mpe elamba na yo ya likoló;+ 41  mpe soki moto moko oyo azali na bokonzi azwi yo na makasi mpo osalela ye mosala kilomɛtrɛ moko, kende na ye kilomɛtrɛ mibale.+ 42  Pesá moto oyo azali kosɛnga yo, mpe moto oyo alingi kodefa epai na yo kozanga kozongisa na benefisi kopesa ye mokɔngɔ te.+ 43  “Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo+ mpe koyina monguna na yo.’+ 44  Nzokande, ngai nalobi na bino ete: Bókoba kolinga banguna na bino+ mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino;+ 45  mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló,+ mpo abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.+ 46  Mpo soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, mbano nini bozwi?+ Bakɔngɔli-mpako basalaka mpe bongo te? 47  Mpe soki bozali kopesa mbote kaka bandeko na bino, likambo nini ya monene bosali? Bato ya bikólo mosusu basalaka mpe bongo te? 48  Yango wana, bosengeli kozala bato ya kokoka, ndenge Tata na bino ya likoló azali moto ya kokoka.+

Maloba na nse