Matai 4:1-25
4 Bongo elimo ekambaki Yesu na esobe+ mpe Zabolo amekaki ye.+
2 Nsima ya kokila bilei mikolo ntuku minei (40) butu moi,+ ayokaki nzala.
3 Lisusu, Momeki+ ayaki mpe alobaki na ye ete: “Soki ozali mwana ya Nzambe,+ yebisá mabanga oyo ekóma mampa.”
4 Kasi ye azongisaki ete: “Ekomamá ete: ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.’”+
5 Bongo Zabolo amemaki ye na engumba mosantu,+ mpe atɛlɛmisaki ye likoló, na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo,
6 mpe alobaki na ye ete: “Soki ozali mwana ya Nzambe, omibwaka na nse;+ mpo ekomamá ete: ‘Akopesa baanzelu na ye mitindo mpo na yo, mpe bakomema yo na mabɔkɔ na bango, mpo lokolo na yo etutana na libanga te.’”+
7 Yesu alobaki na ye ete: “Ekomamá lisusu boye: ‘Osengeli komeka Yehova Nzambe na yo te.’”+
8 Zabolo amemaki ye lisusu na ngomba moko ya molai mingi mpenza, mpe alakisaki ye makonzi nyonso ya mokili+ ná nkembo na yango,
9 mpe alobaki na ye ete: “Biloko oyo nyonso nakopesa yo+ soki ofukami mpe osaleli ngai likambo moko ya losambo.”+
10 Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Longwá, Satana! Mpo ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo,+ mpe kaka ye moko+ nde osengeli kosalela mosala mosantu.’”+
11 Bongo Zabolo atikaki ye,+ mpe talá! baanzelu bayaki mpe babandaki kosalela ye.+
12 Nzokande ntango ayokaki ete Yoane akangami,+ alongwaki akei na Galile.+
13 Lisusu, nsima ya kotika Nazarete, ayaki mpe afandaki na Kapernaume+ pembeni ya mbu na bitúká ya Zebulone mpe Nafatali,+
14 mpo makambo oyo elobamaki na nzela ya Yisaya mosakoli ekokisama:
15 “Ee mokili ya Zebulone mpe mokili ya Nafatali, pembenipembeni ya nzela ya mbu, na ngámbo mosusu ya Yordani, Galile+ ya bikólo!
16 bato oyo bafandi na molili+ bamonaki pole moko monene,+ nde baoyo bafandi na etúká ya molili ya liwa, pole+ ebimelaki+ bango.”
17 Uta ntango wana Yesu abandaki kosakola mpe koloba ete: “Bóbongola mitema,+ mpo bokonzi+ ya likoló ekómi pene.”
18 Ntango azalaki kotambola pembenipembeni ya mbu ya Galile amonaki bandeko mibale, Simo+ oyo babengi Petro+ ná Andre ndeko na ye, bazali kobwaka monyama na mbu, mpo bazalaki baluki-mbisi.
19 Mpe alobaki na bango ete: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.”+
20 Na mbala moko basundolaki minyama+ mpe balandaki ye.*
21 Mpe ntango alongwaki wana, amonaki bato mosusu mibale+ oyo bazalaki bandeko, Yakobo mwana ya Zebede+ ná Yoane ndeko na ye, bazali kobongisa minyama na bango na masuwa elongo na tata na bango Zebede, mpe abengaki bango.
22 Na mbala moko batikaki masuwa ná tata na bango mpe balandaki ye.
23 Bongo akendaki epai na epai+ na Galile mobimba,+ azalaki koteya na basinagoga+ na bango mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso+ mpe mbeba ya ndenge nyonso oyo bato bazalaki na yango na nzoto.
24 Mpe nsango na ye epalanganaki na Siri+ mobimba; mpe bamemelaki ye baoyo nyonso bazalaki koyoka nzoto malamu te,+ oyo bazalaki konyokwama na maladi mpe na minyoko ndenge na ndenge, baoyo bazalaki na bademo mpe bato ya maladi ya ndɛkɛ+ mpe mikatatali, mpe abikisaki bango.
25 Na yango ebele ya bato bautaki na Galile,+ na Dekapolisi, na Yerusaleme,+ na Yudea mpe na ngámbo mosusu ya Yordani, balandaki ye.
Maloba na nse
^ Awa maloba “kolanda Yesu” elimboli kokóma moyekoli ya Yesu.