Matai 3:1-17

3  Na mikolo wana Yoane Mobatisi+ ayaki kosakola na esobe+ ya Yudea,  mpe azalaki koloba ete: “Bóbongola mitema,+ mpo bokonzi ya likoló ekómi pene.”+  Ya solo, ye nde moto oyo mosakoli Yisaya+ alobelaki na maloba oyo: “Yoká! Moto moko azali koganga na esobe: ‘Bóbongisa+ nzela ya Yehova! Bósembola babalabala na ye.’”  Kasi Yoane yango azalaki na bilamba ya nsuki+ ya kamela mpe mokaba ya mposo ya nyama+ na loketo na ye; mpe bilei na ye ezalaki mayoyo+ ná mafuta ya nzoi ya zamba.+  Bongo bato ya Yerusaleme mpe ya Yudea mobimba mpe ya mokili mobimba zingazinga ya Yordani bazalaki kokende epai na ye,  mpe abatisaki bato na Ebale ya Yordani,+ bazalaki koyambola masumu na bango polelepolele.  Ntango amonaki ebele ya Bafarisai mpe Basadukai+ bazali koya na esika ya batisimo, alobaki na bango ete: “Bana ya bitupa,+ nani apesi bino likanisi ya kokima nkanda oyo ezali koya?+  Bongo bósala misala oyo emonisi ete bobongoli motema;*+  mpe bózwa likanisi te ya koloba na mitema na bino ete: ‘Tata na biso Abrahama.’+ Mpo nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abrahama bana+ na mabanga oyo. 10  Sóka+ etyami na mosisa ya banzete; yango wana, nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te ekokatama+ mpe ekobwakama na mɔtɔ.+ 11  Ngai nazali kobatisa bino na mai+ mpo bobongoli motema;+ kasi moto oyo azali koya+ nsima na ngai azali na makasi koleka ngai, mpe nabongi te kolongola basandale na ye.+ Moto yango akobatisa bino na elimo santu+ mpe na mɔtɔ.+ 12  Pau na ye ya kopupola mbuma ezali na lobɔkɔ na ye, mpe akopɛtola mpenza esika na ye ya kotuta mbuma, mpe akoyanganisa blé na ye na ndako ya kobomba biloko,+ kasi akotumba mposo na yango+ na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.” 13  Bongo Yesu autaki na Galile+ akei na Yordani epai ya Yoane, mpo Yoane abatisa+ ye. 14  Kasi ye alukaki kopekisa ye mpe alobaki ete: “Ngai nde moto oyo yo osengeli kobatisa, bongo yo ozali koya epai na ngai?” 15  Yesu azongiselaki ye ete: “Koboya te, mpamba te na ndenge wana nde tokokokisa mpenza makambo nyonso ya boyengebene.”+ Bongo atikaki kopekisa ye. 16  Nsima ya kobatisama, na mbala moko Yesu abimaki na mai; mpe talá! likoló efungwamaki,+ mpe amonaki elimo ya Nzambe ezali kokitela ye+ lokola ebenga.+ 17  Mpe talá! Mongongo+ moko eutaki na likoló elobi: “Oyo azali Mwana na ngai+ ya bolingo,+ oyo nandimi.”+

Maloba na nse

Lil., “Bóbota mbuma oyo ebongi na kobongola motema.”