Matai 28:1-20

28  Nsima ya sabata, ntango pole ebandaki kobima mokemoke na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, Maria Magadalena ná Maria mosusu bakendaki kotala lilita yango.+  Mpe talá! mabele eninganaki makasi mpenza; mpo anzelu ya Yehova autaki na likoló akiti, mpe apusanaki abaloli libanga, mpe afandelaki yango.+  Lolenge na ye ezalaki lokola mokalikali,+ mpe bilamba na ye ezalaki mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.+  Ɛɛ, mpo na kobanga oyo bakɛngɛli babangaki ye, balɛngaki mpe bakómaki lokola bakufi.  Kasi anzelu+ yango ayanolaki basi yango ete: “Bóbanga te, mpo nayebi ete bozali koluka Yesu+ oyo babakaki na nzete.  Azali awa te, mpo alamuki,+ ndenge alobaki. Bóya, bótala esika alalaki.  Mpe bókende nokinoki mpe bóyebisa bayekoli na ye ete alamuki+ uta na bakufi, mpe talá! akei liboso na bino na Galile;+ kuna nde bokomona ye. Ya solo, nasili koyebisa bino.”+  Bongo batikaki lilita nokinoki, na kobanga mpe na esengo monene, bapoti mbangu kopesa bayekoli na ye nsango.+  Mpe talá! Yesu akutani na bango mpe alobi: “Mbote!” Bayaki, bakangi ye na makolo mpe bagumbameli ye. 10  Bongo Yesu alobaki na bango ete: “Bóbanga te! Bókende, bópesa bandeko na ngai+ nsango, ete bákende na Galile; mpe kuna bakomona ngai.” 11  Ntango basimbaki nzela bakei, talá! bakɛngɛli+ mosusu bakɔtaki na engumba mpe bayebisaki banganga-nzambe bakonzi makambo nyonso oyo esalemaki. 12  Mpe na nsima bango bayanganaki elongo na mikóló mpe basalaki likita, bapesaki basoda yango shekele ya palata oyo ekoki mpenza+ 13  mpe balobi: “Bóloba ete: ‘Bayekoli na ye+ bayaki koyiba ye na butu na ntango oyo biso tolalaki mpɔngi.’ 14  Mpe soki yango ekómi na matoi ya guvɛrnɛrɛ, tokondimisa ye mpe tokosala ete bátungisa bino te.” 15  Bongo bakamataki shekele yango ya palata mpe basalaki ndenge balakisaki bango; mpe liloba yango epalanganá epai ya Bayuda tii na mokolo ya lelo. 16  Nzokande, bayekoli zomi na moko bakendaki na Galile+ na ngomba oyo Yesu alakaki bango bákutana, 17  mpe ntango bamonaki ye bagumbamelaki ye, kasi bamosusu batyaki ntembe.+ 18  Mpe Yesu apusanaki mpe asololaki na bango, alobi: “Bapesi ngai bokonzi nyonso+ na likoló mpe na mabele. 19  Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli+ na bikólo nyonso,+ bóbatisa+ bango na nkombo ya Tata+ mpe ya Mwana+ mpe ya elimo santu,+ 20  bóteya+ bango bátosa+ makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.+ Mpe talá! nazali elongo na bino+ mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”+

Maloba na nse