Matai 26:1-75

26  Bongo ntango Yesu asilisaki maloba nyonso wana, alobaki na bayekoli na ye ete:  “Boyebi ete etikali mikolo mibale elekeli esalema,+ mpe bakokaba Mwana ya moto mpo bábaka ye na nzete.”+  Bongo banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya bato bayanganaki na lopango ya nganga-nzambe monene oyo babengi Kaifa,+  mpe basalaki likita+ mpo bákanga Yesu na mayele mabe mpe báboma ye.  Nzokande, bazalaki koloba ete: “Na fɛti te, mpo yikiyiki ebima na kati ya bato te.”+  Ntango Yesu azalaki na Betania+ na ndako ya Simo moto ya maba,+  mwasi moko apusanaki epai na ye na molangi* ya mafuta ya nsolo kitoko ya ntalo mingi,+ na ntango yango Yesu afandaki na mesa mpe mwasi wana abandaki kosopela ye mafuta yango na motó.  Ntango bayekoli bamonaki bongo bayokaki mabe, balobi: “Mpo na nini kobebisa yango boye?”+  Mpo bakokaki kotɛka yango mbongo mingi mpe kopesa yango babola.”+ 10  Ntango Yesu ayokaki bongo,+ alobaki na bango ete: “Mpo na nini bolingi kotungisa mwasi oyo? Kutu asaleli ngai likambo moko ya malamu.+ 11  Mpo bino bozali na babola ntango nyonso,+ kasi bokozala na ngai ntango nyonso te.+ 12  Mpo lokola mwasi oyo atye mafuta oyo ya nsolo kitoko na nzoto na ngai, ezali mpo na kolɛngɛla kokundama na ngai.+ 13  Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Epai nyonso bakosakola nsango malamu oyo na mokili mobimba, bakolobela mpe likambo mwasi oyo asali mpo na kokanisa ye.”+ 14  Bongo moko ya bantoma zomi na mibale, oyo babengi Yudasi Mokeriota,+ akendaki epai ya banganga-nzambe bakonzi 15  mpe alobaki ete: “Bokopesa ngai nini mpo natɛkɛla bino ye?”+ Bayokanaki bápesa ye shekele ya palata ntuku misato (30).+ 16  Bongo uta ntango wana abandaki koluka libaku ya malamu mpo na kotɛka ye.+ 17  Na mokolo ya liboso ya bagato oyo ezangi levire,+ bayekoli bayaki epai na Yesu, balobi: “Epai wapi olingi tóbongisela yo esika ya kolya elekeli?”+ 18  Ye alobaki ete: “Bókende na engumba epai ya Songolo+ mpe bóloba na ye: Moteyi alobi: ‘Ntango etyamá mpo na ngai ekómi pene; nalingi kokanisa elekeli ná bayekoli na ngai na ndako na yo.’”+ 19  Mpe bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango, mpe balɛngɛlaki biloko ya elekeli.+ 20  Sikoyo, ntango mpokwa ekómaki,+ afandaki na mesa ná bayekoli zomi na mibale.+ 21  Ntango bazalaki kolya, alobi: “Ya solo mpenza nalobi na bino: Moko na bino akotɛka ngai.”+ 22  Lokola bayokaki mawa mingi na likambo yango, mokomoko abandaki koloba na ye ete: “Nkolo, ezali ngai te, boye te?”+ 23  Ye azongisaki ete: “Moto oyo akotɛka ngai azali kotya lobɔkɔ na ye na saani elongo na ngai.+ 24  Ya solo, Mwana ya moto azali kokende, ndenge ekomamá+ mpo na ye, kasi mawa+ na moto oyo azali kotɛka Mwana ya moto!+ Elingaki kozala malamu koleka soki moto yango abotamaka te.” 25  Yudasi, oyo akómaki pene ya kotɛka ye, azongisaki ete: “Ezali ngai te, boye te, Rabi?” Alobaki na ye ete: “Yo moko olobi yango.” 26  Ntango bazalaki kokoba kolya, Yesu akamataki limpa+ mpe, nsima ya kobondela, abukaki yango+ mpe, apesaki yango bayekoli, alobi: “Bókamata, bólya. Oyo elakisi nzoto na ngai.”+ 27  Lisusu, akamataki kɔpɔ+ mpe, apesaki matɔndi, apesaki bango yango, alobi: “Bómɛla yango, bino nyonso;+ 28  mpo oyo elakisi+ ‘makila+ ya kondimana’+ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi+ mpo na kolimbisa masumu.+ 29  Kasi nayebisi bino ete: Nakomɛla lisusu eloko oyo euti na nzete ya vinyo te tii mokolo oyo nakomɛla yango ya sika elongo na bino na bokonzi ya Tata na ngai.”+ 30  Na nsuka, nsima ya koyemba nzembo ya masanzoli,+ babimaki bakei na Ngomba ya Olive.+ 31  Bongo Yesu alobaki na bango ete: “Na butu oyo, bino nyonso bokobɛta libaku mpo na ngai, mpo ekomamá ete: ‘Nakobɛta mobateli ya mpate, mpe bampate ya etonga ekopanzana.’+ 32  Kasi nsima ya kolamuka na ngai uta na bakufi, nakokende na Galile liboso na bino.”+ 33  Kasi Petro azongiselaki ye ete: “Ata soki bamosusu nyonso babɛti libaku mpo na yo, ngai nakobɛta libaku ata moke te!”+ 34  Yesu alobaki na ye ete: “Ya solo mpenza nalobi na yo: Na butu oyo, liboso ete nsoso elela, okowangana ngai mbala misato.”+ 35  Petro alobaki na ye ete: “Ata soki esengeli nakufa na yo, nakowangana yo ata moke te.” Bayekoli mosusu nyonso mpe balobaki kaka bongo.+ 36  Bongo Yesu akendaki na bango tii na esika+ babengi Getesemane, mpe alobaki na bayekoli ete: “Bófanda awa ntango ngai nakei kobondela+ kuna.” 37  Mpe nsima ya kokamata Petro ná bana mibale+ ya Zebede, abandaki koyoka mawa mpe kotungisama makasi.+ 38  Bongo alobaki na bango: “Molimo na ngai eyoki mawa makasi, ɛɛ tii na liwa.+ Bótikala awa mpe bósɛnzɛla elongo na ngai.”+ 39  Mpe apusanaki mwa moke liboso, akwei elongi na nse, abondeli+ mpe alobi: “Tata na ngai, soki ekoki kosalema, kɔpɔ oyo+ eleka mosika na ngai. Nzokande, ezala ndenge ngai nalingi te,+ kasi ndenge yo olingi.”+ 40  Mpe ayaki epai ya bayekoli mpe akutaki bango balali mpɔngi, mpe alobaki na Petro ete: “Bokoki kosɛnzɛla ata ngonga moko te elongo na ngai?+ 41  Bósɛnzɛlaka+ mpe bóbondelaka+ ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.+ Ya solo, elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”+ 42  Lisusu, na mbala ya mibale,+ akendaki mpe abondelaki, alobi: “Tata na ngai, soki ekoki kosalema ete yango eleka te soki namɛli yango te, mokano na yo esalema.”+ 43  Mpe ayaki lisusu mpe akutaki bango balali mpɔngi, mpo miso na bango ezalaki kilo.+ 44  Bongo atikaki bango, akei lisusu mpe abondeli mbala ya misato,+ alobi lisusu kaka liloba yango. 45  Bongo ayaki epai ya bayekoli mpe alobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali kolala mpɔngi mpe kopema na ntango ya boye? Talá! Ngonga ekómi pene mpo Mwana ya moto atɛkama na mabɔkɔ ya basumuki.+ 46  Bótɛlɛma, tókende. Talá! Motɛki na ngai akómi pene.”+ 47  Mpe ntango azalaki naino koloba, talá! Yudasi,+ moko ya bantoma zomi na mibale, ayaki elongo na ebele ya bato basimbi mipanga+ ná mangenda, bauti epai ya banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya bato.+ 48  Nzokande motɛki na ye apesaki bango elembo, alobi: “Moto oyo nakopwɛpwa, ezali ye; bókanga ye.”+ 49  Mpe akendaki mbala moko epai ya Yesu alobi: “Mbote, Rabi!”+ mpe apwɛpwaki+ ye na boboto mpenza. 50  Kasi Yesu+ alobaki na ye ete: “Moninga, mpo na nini ozali awa?” Bongo bayaki mpe batyaki Yesu mabɔkɔ mpe bakangaki ye.+ 51  Kasi, talá! moko ya baoyo bazalaki na Yesu asembolaki lobɔkɔ na ye mpe abimisaki mopanga na ye mpe abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene mpe akataki ye litoi.+ 52  Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango,+ mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.+ 53  To okanisi nde ete nakoki te kosɛnga Tata na ngai apesa ngai sikoyo mampinga koleka zomi na mibale ya baanzelu?+ 54  Bongo, ndenge nini Makomami ekokokisama, ete yango esengeli kosalema bongo?” 55  Na ngonga wana Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete: “Bobimi na mipanga mpe na mangenda mpo na kokanga ngai lokola nde boyeli moyibi moko boye?+ Mokolo na mokolo nafandaki na tempelo+ mpo na koteya, kasi bokangaki ngai te. 56  Kasi nyonso oyo esalemi mpo makomi ya basakoli ekokisama.”+ Bongo bayekoli nyonso basundolaki ye mpe bakimaki.+ 57  Baoyo bakangaki Yesu bamemaki ye epai ya Kaifa+ nganga-nzambe monene, epai bakomeli mpe mikóló bayanganaki.+ 58  Kasi Petro alandaki ye na mwa mosika, tii na lopango+ ya nganga-nzambe monene, mpe nsima ya kokɔta na kati, afandaki esika moko na bato ya misala ya ndako mpo na komona ndenge makambo ekosuka.+ 59  Na ntango yango banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba bazalaki koluka batatoli ya lokuta bákosela Yesu makambo mpo báboma ye,+ 60  kasi bazwaki ata likambo moko te, atako batatoli ya lokuta bayaki mingi.+ Na nsima mibale bayaki 61  mpe balobaki ete: “Moto oyo alobaki: ‘Ngai nakoki kobuka tempelo ya Nzambe mpe kotonga yango na mikolo misato.’”+ 62  Bongo nganga-nzambe monene atɛlɛmaki mpe alobaki na ye ete: “Ozali na eyano te? Likambo nini bazali kofunda yo na yango?”+ 63  Kasi Yesu afandaki kaka nyɛɛ.+ Bongo nganga-nzambe monene alobaki na ye ete: “Na nkombo ya Nzambe ya bomoi nalapisi yo ndai+ ete oyebisa biso soki ozali Kristo+ Mwana ya Nzambe!” 64  Yesu alobaki+ na ye ete: “Yo moko olobi yango.+ Nzokande nazali koloba na bino: Banda sikoyo+ bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali+ ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso* mpe azali koya na mapata ya likoló.”+ 65  Bongo nganga-nzambe monene apasolaki bilamba na ye ya likoló, alobi: “Afingi Nzambe!+ Ntina nini tóluka lisusu batatoli?+ Talá! Sikoyo boyoki ndenge afingi Nzambe.+ 66  Bokanisi nini?” Bayanolaki ete: “Abongi na liwa.”+ 67  Bongo babwakelaki ye nsoi na elongi+ mpe babɛtaki+ ye makofi. Bamosusu babɛtaki ye bambata na elongi,+ 68  balobi: “Yo Kristo,+ sakwelá biso. Nani abɛti yo?”+ 69  Nzokande Petro afandaki libándá na kati ya lopango yango; mpe mwana mwasi moko ya mosala ayaki epai na ye, alobi: “Yo mpe ozalaki na Yesu Mogalile!”+ 70  Kasi awanganaki yango liboso na bango nyonso, alobi: “Nayebi makambo ozali koloba te.” 71  Na nsima abimaki mpe akendaki na porte ya lopango, elenge mwasi mosusu amonaki ye mpe alobaki na baoyo bazalaki kuna ete: “Moto oyo azalaki na Yesu Monazarete.”+ 72  Mpe lisusu awanganaki yango mpe alapaki ndai ete: “Nayebi moto wana te!”+ 73  Nsima ya mwa ntango moke baoyo batɛlɛmaki wana bayaki mpe balobaki na Petro ete: “Ya solo yo mpe ozali moko na bango, kutu elobeli na yo ezali kofunda yo.”+ 74  Bongo abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndai ete: “Nayebi moto wana te!” Mpe na mbala moko nsoso elelaki.+ 75  Mpe Petro akanisaki liloba oyo Yesu alobaki, elingi koloba ete: “Liboso nsoso elela, okowangana ngai mbala misato.”+ Mpe abimaki na libándá mpe alelaki na mawa makasi.+

Maloba na nse

Lil., “molangi ya albatre.” Ezalaki molangi ya moke oyo liboso esalemaki na mabanga oyo bazalaki kozwa pene na mboka Alabastron, na Ezipito.
Lil., “na lobɔkɔ ya mobali ya nguya.”