Matai 25:1-46
25 “Yango wana, bokonzi ya likoló ekozala lokola bangɔndɔ zomi oyo bakamataki miinda+ na bango mpe babimaki kokutana na mobali ya libala.+
2 Mitano na bango bazalaki bazoba,+ mpe mitano bazalaki mayele.+
3 Bazoba bakamataki miinda na bango kasi bakamataki mafuta ya kobakisa te,
4 nzokande baoyo ya mayele bakamataki miinda na bango ná mafuta ya kobakisa na kati ya milangi na bango.
5 Lokola mobali ya libala azalaki koumela, mpɔngi etungisaki bango nyonso mpe balalaki.+
6 Na katikati mpenza ya butu mongongo moko eyokanaki:+ ‘Mobali ya libala ayei! Bóbima kokutana na ye.’
7 Bongo bangɔndɔ nyonso wana batɛlɛmaki mpe babongisaki miinda+ na bango.
8 Bazoba balobaki na baoyo ya mayele ete: ‘Bópesa biso ndambo ya mafuta+ na bino, mpo miinda na biso elingi kokufa.’
9 Baoyo ya mayele+ bayanolaki na maloba oyo: ‘Mbala mosusu ekokoka mpenza biso ná bino te. Bongo bókende epai ya baoyo batɛkaka yango mpe bósomba ya bino.’
10 Ntango bakendaki kosomba, mobali ya libala akómaki, mpe bangɔndɔ oyo bamilɛngɛlaki bakɔtaki na ye na fɛti ya libala;+ mpe porte ekangamaki.
11 Na nsima bangɔndɔ mosusu wana mpe bayaki, balobi: ‘Tata, tata, fungolá biso!’+
12 Ye ayanolaki ete: ‘Nayebisi bino solo: Nayebi bino te.’+
13 “Yango wana, bósɛnzɛlaka+ mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.+
14 “Ezali lokola ntango moto moko+ alingaki kokende mobembo na mboka mopaya,+ abengisaki baombo na ye mpe apesaki bango biloko na ye.+
15 Bongo apesaki moko talanta mitano, mosusu mibale, mosusu mpe moko, apesaki moto na moto na kotalela likoki na ye mpenza,+ mpe akendaki na mboka mopaya.
16 Na mbala moko oyo azwaki talanta mitano akendaki kosala na yango mombongo mpe yango ebotaki mosusu mitano.+
17 Ndenge moko mpe oyo azwaki mibale, ebotaki mosusu mibale.
18 Kasi oyo azwaki kaka moko akendaki, mpe atimolaki mabele mpe abombaki shekele yango ya palata ya nkolo na ye.
19 “Nsima ya ntango molai+ nkolo ya baombo wana ayaki mpe atalelaki na bango makambo ya mbongo na ye.+
20 Bongo oyo azwaki talanta mitano ayaki mpe amemaki talanta mosusu mitano, alobaki ete: ‘Nkolo, opesaki ngai talanta mitano; talá, eboti talanta mosusu mitano.’+
21 Nkolo na ye alobaki na ye ete: ‘Longonya, moombo malamu mpe ya sembo!+ Ozali sembo+ na mwa makambo moke. Nakotya yo obatela biloko mingi.+ Kɔtá na esengo+ ya nkolo na yo.’
22 Na nsima oyo azwaki talanta mibale ayaki mpe alobaki ete: ‘Nkolo, opesaki ngai talanta mibale; talá, eboti talanta mosusu mibale.’+
23 Nkolo na ye alobaki na ye ete: ‘Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozali sembo na mwa makambo moke. Nakotya yo obatela biloko mingi.+ Kɔtá na esengo+ ya nkolo na yo.’
24 “Na nsuka oyo azwaki talanta moko ayaki+ mpe alobaki ete: ‘Nkolo, nayebaki ete yo ozalaka moto ya makambo makasi, obukaka epai oloni te mpe oyanganisaka epai opupoli te.
25 Bongo nabangaki+ mpe nakendaki kobomba talanta na yo na mabele. Talá eloko na yo yango oyo.’
26 Nkolo na ye azongiselaki ye ete: ‘Moombo mabe mpe gɔigɔi, oyebaki ete nabukaki epai nalonaki te mpe nayanganisaki epai napupolaki te, boye te?
27 Ɛɛ, yango wana osengelaki kotya shekele na ngai ya palata na banki, mpe na bozongi na ngai mbɛlɛ nazwi mbongo na ngai ná benefisi.+
28 “‘Sikoyo bóbɔtɔla ye talanta wana mpe bópesa yango moto oyo azali na talanta zomi.+
29 Mpo moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu mpe akozala na mingi; kasi moto oyo azali na eloko te, ata oyo azali na yango bakobɔtɔla ye yango.+
30 Mpe bóbwaka moombo mpamba oyo na molili ya libándá. Kuna nde akolela mpe akolya mino.’+
31 “Ntango Mwana ya moto+ akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye,+ bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo.+
32 Mpe bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye,+ mpe akokabola+ bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo,+ ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba.
33 Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali,+ kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+
34 “Bongo mokonzi akoloba na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mobali: ‘Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá,+ bózwa libula+ ya bokonzi+ oyo babongiselá bino banda mokili ebandá.*+
35 Mpo nayokaki nzala mpe bopesaki ngai mwa eloko ya kolya;+ nazalaki na mposa ya mai mpe bopesaki ngai mwa eloko ya komɛla. Nazalaki mopaya mpe boyambaki ngai malamu;+
36 nazalaki bolumbu,+ mpe bolatisaki ngai. Nazalaki na maladi mpe bosalisaki ngai. Nazalaki na bolɔkɔ+ mpe boyaki kotala ngai.’
37 Bongo bayengebene bakoyanola ye na maloba oyo: ‘Nkolo, ntango nini tomonaki yo ozali na nzala mpe toleisaki yo, to na mposa ya mai,+ mpe topesaki yo mwa eloko ya komɛla?+
38 Ntango nini tomonaki yo mopaya mpe toyambaki yo malamu, to bolumbu, mpe tolatisaki yo?
39 Ntango nini tomonaki yo ozali na maladi to na bolɔkɔ mpe toyaki kotala yo?’
40 Mpe mokonzi+ akozongisela bango ete: ‘Ya solo mpenza nalobi na bino: Ntango nyonso oyo bosalelaki yango moko ya bato oyo baleki mike+ na kati ya bandeko na ngai oyo,+ bosalelaki ngai.’+
41 “Bongo akoloba mpe na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mwasi ete: ‘Bólongwa awa,+ bino baoyo bolakelamá mabe, bókende na mɔtɔ ya seko+ oyo babongiselá Zabolo ná baanzelu na ye.+
42 Mpo nayokaki nzala, kasi bopesaki ngai eloko ya kolya te,+ mpe nazalaki na mposa ya mai,+ kasi bopesaki ngai eloko ya komɛla te.
43 Nazalaki mopaya, kasi boyambaki ngai malamu te; bolumbu, kasi bolatisaki ngai te;+ na maladi mpe na bolɔkɔ,+ kasi bosalisaki ngai te.’
44 Bongo bango mpe bakoyanola na maloba oyo: ‘Nkolo, ntango nini tomonaki yo ozali na nzala to na mposa ya mai to mopaya to bolumbu to na maladi to na bolɔkɔ mpe tosalelaki yo te?’
45 Boye ye akoyanola bango na maloba oyo: ‘Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Ntango nyonso oyo bosalelaki yango te moko ya bato oyo baleki mike,+ bosalelaki+ ngai yango te.’+
46 Mpe bango bakokufa liwa ya seko,+ kasi bayengebene bakozwa bomoi ya seko.+
Maloba na nse
^ “Mokili oyo elobelami awa ezali bana ya Adama na Eva.”