Matai 24:1-51
24 Sikoyo, Yesu alongwaki na tempelo abimi, bongo bayekoli na ye bapusanaki mpo na kolakisa ye bandako ya tempelo.+
2 Azongiselaki bango ete: “Bozali komona biloko oyo nyonso te? Ya solo nalobi na bino ete: Ata libanga moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu awa, nyonso ekokwea na nse.”+
3 Ntango afandaki na Ngomba ya Olive, bayekoli bapusanaki epai na ye kaka bango moko mpe balobaki ete: “Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala+ na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?”+
4 Mpe Yesu azongiselaki bango ete: “Bókeba, moto akosa bino te;+
5 mpo mingi bakoya na nkombo na ngai, bakoloba ete: ‘Ngai nde Kristo,’ mpe bakokosa bato mingi.+
6 Bokoyoka lokito ya bitumba mpe nsango ya bitumba; bókeba, bózala na nsɔmɔ te. Mpo makambo wana esengeli kosalema, kasi nsuka eyei naino te.+
7 “Mpo ekólo ekobunda na ekólo+ mpe bokonzi ekobunda na bokonzi,+ mpe nzala+ ekozala mpe mabele ekoningana+ na bisika ndenge na ndenge.
8 Makambo nyonso wana ezali ebandeli ya bampasi.
9 “Bongo bato bakokaba bino na bolɔzi+ mpe bakoboma+ bino, mpe bikólo nyonso bakoyina bino+ mpo na nkombo na ngai.+
10 Bongo bato mingi mpe bakobɛta libaku+ mpe bakotɛkana mpe bakoyinana.+
11 Mpe ebele ya basakoli ya lokuta+ bakobima mpe bakokosa bato mingi;+
12 mpe lokola makambo ya kobuka mibeko+ ekokóma mingi, bolingo ya bato mingi ekokita.+
13 Kasi moto oyo akoyika mpiko+ tii na nsuka ye nde akobika.+
14 Mpe nsango malamu+ oyo ya bokonzi+ ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso;+ bongo nsuka+ ekoya.
15 “Yango wana, ntango bokomona eloko ya bosɔtɔ+ oyo ebebisaka etɛlɛmi na esika mosantu,+ ndenge mosakoli Danyele alobaki, (tiká motángi asosola,)
16 na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima+ na bangomba.
17 Moto oyo azali likoló ya ndako akita te kokamata biloko oyo ezali na ndako na ye;
18 mpe moto oyo azali na bilanga azonga na ndako na ye te mpo na kokamata elamba na ye ya likoló.
19 Mawa na basi ya zemi mpe na baoyo bakomɛlisa bana mabɛlɛ na mikolo yango!+
20 Bóbondelaka ntango nyonso mpo kokima na bino ezala na eleko ya mpiɔ makasi te, to na mokolo ya sabata te;
21 mpo na ntango wana ekozala na bolɔzi moko monene+ oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo,+ ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.
22 Kutu, soki mikolo yango eyeisamaka mokuse te, mbɛlɛ ata moto moko abiki te; kasi mpo na bato oyo baponami+ mikolo yango ekoyeisama mokuse.+
23 “Bongo soki moto alobi na bino ete: ‘Talá! Kristo azali awa,’+ to: ‘Kuna!’ bóndima yango te.+
24 Mpo Ba-Kristo ya lokuta+ mpe basakoli ya lokuta+ bakobima mpe bakobimisa bilembo minene+ mpe bakosala makamwisi mpo na kokosa ata bato oyo baponami, soki likoki ezali.+
25 Talá! Nakebisi bino libelalibela.+
26 Na yango, soki bato balobi na bino ete: ‘Talá! Ye azali na esobe,’ bóbima te; ‘Talá! Ye azali na shambrɛ ya kati,’ bóndima yango te.+
27 Mpo se ndenge mokalikali+ ebimaka na ɛsti mpe engɛngaka tii na wɛsti, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.+
28 Esika oyo ebembe ezali, bampongo+ ekoyangana wana.+
29 “Nokinoki nsima ya bolɔzi ya mikolo yango moi ekoyinda,+ mpe sanza+ ekopesa pole na yango te, mpe minzoto ekouta na likoló ekwei, mpe banguya ya likoló ekoningana.+
30 Bongo elembo ya Mwana ya moto+ ekomonana na likoló, mpe mabota nyonso ya mabele bakomibɛtabɛta na kolela,+ mpe bakomona Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló na nguya mpe na nkembo mingi.+
31 Mpe akotinda baanzelu na ye na lokito makasi ya kelelo,+ mpe bakoyanganisa bato oyo ye aponá+ esika moko uta na mipɛpɛ minei,+ uta na nsuka moko ya likoló tii na nsuka na yango mosusu.
32 “Sikoyo, bózwa liteya oyo na ndakisa ya nzete ya figi: Ntango kaka etape na yango ya sika ekómi pɛtɛpɛtɛ mpe ebimisi nkasa, boyebi ete eleko ya molunge ekómi pene.+
33 Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo yango nyonso, bóyeba ete azali pene, na baporte.+
34 Ya solo mpenza nalobi na bino ete libota oyo+ ekoleka ata moke te tii makambo wana nyonso ekosalema.
35 Likoló ná mabele ekoleka,+ kasi maloba na ngai ekoleka ata moke te.+
36 “Kasi mpo na mokolo yango mpe ngonga yango+ moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.+
37 Mpo ndenge ezalaki na mikolo ya Noa,+ kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.+
38 Mpo ndenge bazalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela: bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa+ akɔtaki na masuwa;+
39 mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso,+ kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.
40 Bongo bato mibale bakozala na kati ya bilanga: mosusu akozwama mpe mosusu akosundolama;
41 basi mibale bakonika na enikelo moko ya mabɔkɔ:+ mosusu akozwama mpe mosusu akosundolama.+
42 Yango wana, bósɛnzɛlaka mpo boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya.+
43 “Kasi bóyeba likambo oyo: soki nkolo-ndako ayebaka na ntango nini moyibi akoya na butu,+ mbɛlɛ alali mpɔngi te mpe mbɛlɛ atiki te ete moyibi abuka ndako na ye mpe akɔta.
44 Yango wana bino mpe bómilɛngɛla,+ mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.
45 “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele+ oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?+
46 Esengo+ na moombo yango soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo!
47 Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Akotya ye abatela biloko na ye nyonso.+
48 “Kasi soki moombo yango azali mabe mpe alobi na motema+ na ye ete: ‘Nkolo na ngai azali koumela,’+
49 mpe abandi kobɛta baninga na ye baombo mpe abandi kolya mpe komɛla elongo na balangwi minene ya masanga,
50 nkolo ya moombo wana akoya na mokolo oyo ye azali kokanisa te mpe na ngonga+ oyo ayebi te,
51 mpe akopesa ye etumbu ya makasi mpenza*+ mpe akobwaka ye esika oyo bakosi bazali. Kuna nde akolela mpe akolya mino.+
Maloba na nse
^ Lil., “akokata ye na mibale.”