Matai 23:1-39

23  Bongo Yesu alobaki na ebele ya bato yango mpe na bayekoli na ye+ ete:  “Bakomeli+ ná Bafarisai bafandi na kiti ya Moize.+  Yango wana, makambo nyonso oyo bazali koyebisa+ bino, bósala mpe bótosa, kasi bósala ndenge bango basalaka te,+ mpo balobaka kasi basalaka te.  Bazali kokangisa mikumba ya kilo mpe kotya yango na mapeka ya bato,+ kasi bango moko balingaka kotombola yango ata na mosapi te.+  Makambo nyonso oyo basalaka, basalaka yango mpo bato bámona bango;+ mpo bakómisaka minene mwa bakɛsi mike*+ oyo balataka na elongi mpe na lobɔkɔ ya mwasi mpo na komibatela, mpe bakómisaka malenda+ ya bilamba na bango milaimilai.  Balingaka esika ya lokumu mingi+ na ntango ya bilei ya mpokwa mpe bakiti ya liboso na basinagoga,+  mpe bambote+ na bazando mpe bato bábengaka bango Rabi.+  Kasi bino, bóbengama Rabi te, mpo moto moko kaka nde azali moteyi+ na bino, kasi bino nyonso bozali bandeko.  Lisusu, bóbenga moto moko te tata na bino awa na mabele, mpo moto moko kaka nde azali Tata na bino,+ Oyo azali na likoló. 10  Bóbengama mpe te ‘bakambi,’+ mpo Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo. 11  Kasi oyo aleki monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino.+ 12  Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama,+ mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.+ 13  “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! Mpamba te bozali kokangela+ bato bokonzi ya likoló; mpo bino+ moko bozali kokɔta te, mpe baoyo bazali kokɔta, bozali kopesa bango nzela te. 14  —— 15  “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi!+ mpamba te bozali kokatisa mbu mpe mokili mpo na kokómisa moto prozelite,* mpe ntango akómi bongo bozali kokómisa ye moto oyo abongi kokende na Gehena koleka bino mbala mibale. 16  “Mawa na bino, batambwisi oyo bakufá miso,+ bino baoyo bolobaka ete: ‘Soki moto azali kolapa ndai na nkombo ya tempelo, likambo ezali te; kasi soki moto azali kolapa ndai na nkombo ya wolo ya tempelo, asengeli kokokisa yango.’+ 17  Bazoba mpe bato bakufá miso! Eloko nini eleki mpenza, wolo to tempelo oyo esantisi wolo?+ 18  Lisusu: ‘Soki moto alapi ndai na nkombo ya etumbelo, likambo ezali te; kasi soki moto alapi ndai na nkombo ya likabo oyo ezali likoló ya etumbelo yango, asengeli kokokisa yango.’ 19  Bato bakufá miso! Eloko nini eleki mpenza, likabo to etumbelo+ oyo esantisaka likabo yango? 20  Yango wana, moto oyo azali kolapa ndai na nkombo ya etumbelo azali kolapa ndai na nkombo na yango mpe na nkombo ya biloko nyonso oyo ezali likoló na yango; 21  mpe moto oyo azali kolapa ndai na nkombo ya tempelo azali kolapa ndai na nkombo na yango mpe na nkombo ya moto oyo afandaka kuna;+ 22  mpe moto oyo azali kolapa ndai na nkombo ya likoló azali kolapa ndai na nkombo ya kiti ya bokonzi ya Nzambe+ mpe na nkombo ya moto oyo afandelaka yango. 23  “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! mpamba te bopesaka moko ya bandambo zomi+ ya manti mpe ya aneti, mpe ya kumini,* kasi botyoli makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo+ ná motema mawa+ ná kondima.+ Bosengelaki kosala nde makambo oyo mpe kobosana te kosala makambo wana mosusu. 24  Batambwisi oyo bakufá miso,+ ntango bokɔngɔlaka masanga na bino, bokangaka ngungi+ kasi bomɛlaka kamela!+ 25  “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! mpamba te bopɛtolaka libándá ya kɔpɔ+ mpe ya saani, nzokande na kati etondi na kopunza+ mpe na kolekisa ndelo. 26  Yo Mofarisai, moto oyo akufá miso,+ pɛtolá liboso na kati ya kɔpɔ+ mpe ya saani, mpo libándá mpe ekóma pɛto. 27  “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi!+ mpamba te bozali lokola malita oyo epakolami mpɛmbɛ,+ oyo na libándá emonani kitoko mpenza kasi na kati etondi na mikuwa ya bakufi mpe na mbindo ya ndenge nyonso. 28  Bino mpe ndenge moko, na libándá bomonanaka mpenza bayengebene na miso ya bato,+ kasi na kati botondi na bokosi mpe na kobuka mibeko. 29  “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi!+ mpamba te botongaka malita ya basakoli mpe bokómisaka kitoko malita ya bayengebene,+ 30  mpe bolobaka ete: ‘Soki tózalaka na ntango ya bankɔkɔ na biso, mbɛlɛ tosanganaki na bango te na ngambo ya makila ya basakoli.’+ 31  Boye bozali kotatola bino moko mpe komikweisa ete bozali bana ya bato oyo babomá basakoli.+ 32  Yango wana, bósilisa mosala+ oyo bankɔkɔ na bino babandaki. 33  “Banyoka, bana ya bitupa,+ bokokima lisambisi ya Gehena ndenge nini?+ 34  Yango wana, talá nazali kotindela+ bino basakoli mpe bato ya bwanya mpe balakisi ya bato.+ Bokoboma bamosusu+ mpe bokobaka bamosusu na nzete, mpe bokobɛta bamosusu fimbo+ na basinagoga na bino mpe bokonyokola bango na engumba na engumba; 35  mpo makila ya bayengebene nyonso oyo esopaná na mabele ekwela bino,+ banda na makila ya moyengebene+ Abele+ tii na makila ya Zekaria mwana ya Barakia, oyo bobomaki na kati ya esika mosantu ná etumbelo.+ 36  Ya solo nalobi na bino: Makambo nyonso wana ekokwela libota oyo.+ 37  “Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli+ mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango+ mabanga,+—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi eyanganisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango!+ Kasi bolingaki yango te.+ 38  Talá! basundoleli bino+ ndako+ na bino. 39  Mpo nalobi na bino: Bokomona ngai lisusu te tii bokoloba: ‘Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama!’”+

Maloba na nse

Kɛsi ya moke oyo batyá Makomami na kati. Bayuda bazalaki kolata yango mpo ezala nkisi ya komibatela.
To, “moto oyo akómi mondimi na lingomba ya Bayuda.”
Manti, aneti ná kumini ezali matiti ya nsolo mpimbo oyo balambaka na yango biloko.