Matai 22:1-46
22 Mpe Yesu azongiselaki bango lisusu na bandakisa mpe alobaki ete:+
2 “Bokonzi ya likoló ezali lokola mokonzi moko oyo asalelaki mwana na ye ya mobali fɛti ya libala.+
3 Mpe atindaki baombo na ye bábenga bato oyo babengisamaki na fɛti ya libala,+ kasi bato yango baboyaki koya.+
4 Lisusu atindaki baombo mosusu+ mpe alobaki ete: ‘Yebisá bato oyo babengisami ete: “Talá! Nabongisi bilei na ngai ya midi,+ bangɔmbɛ na ngai ya mibali ná banyama ya mafuta ebomami, mpe biloko nyonso elɛngɛlami. Bóya na fɛti ya libala.”’+
5 Kasi bamonaki yango mpamba mpe bakendaki, mosusu na elanga na ye, mosusu na mombongo na ye;+
6 kasi baoyo batikali bakangaki baombo na ye, basambwisi bango mabe mpe babomi bango.+
7 “Kasi mokonzi ayokaki nkanda, mpe atindaki mampinga na ye mpe babomaki babomi-bato wana mpe batumbaki engumba na bango.+
8 Bongo alobaki na baombo na ye ete: ‘Fɛti ya libala elɛngɛlami mpenza, kasi bato oyo babengisamaki babongi na yango te.+
9 Yango wana, bókende na banzela oyo ekendá tii na libándá ya engumba, mpe moto nyonso oyo bokokuta bóbengisa ye na fɛti ya libala.’+
10 Bongo baombo yango babimaki na banzela mpe basangisaki bato nyonso oyo bakutaki, bato mabe ná bato malamu;+ mpe ndako ya milulu ya libala etondaki na bato oyo bafandi+ na mesa.
11 “Ntango mokonzi ayaki kotala bato oyo babengisami amonaki kuna moto moko oyo alataki elamba ya libala te.+
12 Bongo alobaki na ye ete: ‘Moninga, ndenge nini okɔti awa na elamba ya libala te?’+ Ye azangaki likambo ya koloba.
13 Bongo mokonzi alobaki na basaleli na ye ete: ‘Bókanga ye mabɔkɔ ná makolo mpe bóbwaka ye na molili ya libándá. Kuna nde akolela mpe akolya mino.’+
14 “Mpo bato mingi babengisami, kasi moke nde baponami.”+
15 Bongo Bafarisai bakendaki mpe basalaki likita bango nyonso mpo bázwa ye na maloba na ye.+
16 Yango wana, batindelaki ye bayekoli na bango, ná bato ya Erode,+ balobi: “Moteyi, toyebi ete yo olobaka solo mpe oteyaka nzela ya Nzambe na bosolo, mpe obangaka moto te, mpo otalaka bilongi ya bato te.+
17 Na yango, yebisá biso, Okanisi nini? Esengeli kofuta Kaisala mpako oyo moto nyonso afutaka to te?”+
18 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi mabe na bango, alobaki ete: “Bakosi, mpo na nini bozali komeka ngai?+
19 Bólakisa ngai mbongo ya ebende ya mpako oyo moto nyonso afutaka.” Bayelaki ye denari moko.
20 Mpe alobaki na bango ete: “Elilingi oyo mpe likomi oyo ya nani?”+
21 Balobaki ete: “Ya Kaisala.” Bongo alobaki na bango ete: “Boye, bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.”+
22 Bongo ntango bayokaki yango, bakamwaki, mpe batikaki ye bakei.+
23 Na mokolo yango Basadukai, bato oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki esika azali mpe batuni ye:+
24 “Moteyi, Moize alobaki ete: ‘Soki moto akufi, aboti bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kokamata mwasi na ye na libala mpe kobotela ndeko na ye bana.’+
25 Sikoyo ezalaki na bandeko mibali nsambo na kati na biso; mpe oyo ya liboso abalaki mpe akufaki, mpe lokola abotaki bana te, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye.+
26 Esalemaki mpe bongo na oyo ya mibale mpe oyo ya misato, tii na bango nyonso nsambo.+
27 Na nsuka na bango nyonso mwasi wana akufaki.
28 Bongo na lisekwa, akozala mwasi ya nani na kati na bango nsambo? Mpo bango nyonso bazwaki ye.”+
29 Yesu azongiselaki bango ete: “Bozali na libunga, mpo boyebi Makomami te mpe nguya ya Nzambe te;+
30 mpamba te na lisekwa, mibali bakobala te mpe basi bakobalisama te,+ kasi bakozala lokola baanzelu na likoló.
31 Mpo na likambo ya lisekwa ya bakufi, botángá te oyo Nzambe alobaki na bino ete:+
32 ‘Nazali Nzambe ya Abrahama mpe Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo’?+ Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi.”+
33 Ntango ebele ya bato wana bayokaki yango, bakamwaki na mateya na ye.+
34 Ntango Bafarisai bayokaki ete akangisaki Basadukai monɔkɔ, basanganaki etuluku moko.
35 Mpe moko na bango, oyo ayebaki Mibeko malamumalamu,+ atunaki mpo na komeka ye ete:
36 “Moteyi, mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?”+
37 Alobaki na ye ete: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’+
38 Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso.
39 Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’+
40 Mibeko nyonso mpe Basakoli esimbami na mibeko oyo mibale.”+
41 Nzokande ntango Bafarisai bayanganaki esika moko Yesu atunaki bango:+
42 “Bokanisi nini mpo na Kristo? Azali mwana ya nani?” Bango balobaki na ye ete: “Ya Davidi.”+
43 Ye alobaki na bango ete: “Bongo ndenge nini Davidi na nzela ya elimo santu+ azali kobenga ye ‘Nkolo,’ mpe alobi:
44 ‘Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo na nse ya makolo na yo”’?+
45 Bongo soki Davidi abengi ye ‘Nkolo,’ ndenge nini ye azali mwana na ye?”+
46 Moto moko te akokaki kozongisela ye liloba, mpe moto moko te amekaki banda mokolo wana kotuna ye lisusu motuna.+