Matai 21:1-46
21 Mpe ntango bapusanaki penepene na Yerusaleme mpe bakómaki na Betefage na Ngomba ya Olive, Yesu atindaki bayekoli mibale,+
2 alobi na bango ete: “Bókende na mboka oyo etalani na bino, mpe na mbala moko bokomona mpunda ya mwasi oyo bakangi na nsinga, ná mwana ya mpunda esika moko na yango; bófungola yango mpe bóyela ngai yango.+
3 Mpe soki moto moko alobi na bino likambo, bóloba: ‘Nkolo azali na mposa na yango.’ Bongo na mbala moko akotika yango.”
4 Yango esalemaki bongo mpenza mpo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli ekokisama:
5 “Bóyebisa mwana mwasi ya Siona ete: ‘Talá! Mokonzi na yo azali koya epai na yo,+ azali na ezaleli ya boboto,+ mpe amati likoló ya mpunda,* ɛɛ, likoló ya mwana ya mpunda, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba.’”+
6 Bongo bayekoli bakendaki mpe basalaki se ndenge Yesu atindaki bango.
7 Mpe bayaki na mpunda yango ya mwasi ná mwana na yango, mpe batyaki likoló na yango bilamba na bango ya likoló, mpe afandaki likoló na yango.+
8 Bato mingi na kati ya ebele ya bato yango batandaki bilamba na bango ya likoló+ na nzela, wana bamosusu bazalaki kokata bitape ya nzete mpe kotanda yango na nzela.+
9 Ebele ya bato yango, oyo bazalaki kotambola liboso na ye mpe oyo bazalaki kolanda ye bazalaki se koganga ete: “Mwana ya Davidi,+ tobondeli yo, bikisá!+ Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama!+ Bikisá, tobondeli yo, kuna na likoló!”+
10 Bongo ntango akɔtaki na Yerusaleme,+ engumba mobimba eninganaki, bazalaki koloba ete: “Wana nani?”
11 Ebele ya bato yango bazalaki koloba ete: “Ezali mosakoli+ Yesu, moto ya Nazarete ya Galile!”
12 Mpe Yesu akɔtaki na tempelo mpe abwakaki libándá baoyo nyonso bazalaki kotɛka mpe kosomba na tempelo, mpe abalolaki bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe bibonga ya baoyo bazalaki kotɛka bibenga.+
13 Mpe alobaki na bango ete: “Ekomamá ete: ‘Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli,’+ kasi bino bozali kokómisa yango mobenga ya miyibi.”+
14 Lisusu, bato oyo bakufá miso mpe batɛngumi bayaki epai azalaki na tempelo, mpe abikisaki bango.
15 Ntango banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli bamonaki makamwisi oyo asalaki+ mpe bana mibali oyo bazalaki koganga na tempelo mpe koloba ete: “Mwana ya Davidi,+ tobondeli yo, bikisá!”+ bayokaki mabe
16 mpe balobaki na ye ete: “Ozali koyoka makambo bango bazali koloba?” Yesu alobaki na bango ete: “Ɛɛ. Botángá naino te+ likambo oyo: ‘Osali ete monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ esanzola yo’?”+
17 Atikaki bango mpe abimaki na libándá ya engumba akei na Betania mpe alalaki kuna.+
18 Na ntɔngɔntɔngɔ, ntango azalaki kozonga na engumba ayokaki nzala.+
19 Mpe amonaki nzete moko ya figi pene ya nzela mpe akendaki kuna, kasi akutaki eloko te+ kaka nkasa, mpe alobaki na yango ete: “Okobimisa lisusu mbuma te, libela na libela.”+ Mpe na ntango wana kaka, nzete yango ya figi ekaukaki.
20 Kasi ntango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki, balobaki ete: “Ndenge nini nzete ya figi ekauki na mbala moko?”+
21 Yesu azongiselaki bango ete: “Ya solo nalobi na bino ete: Soki bozali mpenza na kondima mpe bozali kobɛta ntembe te,+ bokosala kaka oyo ngai nasali nzete ya figi te, kasi lisusu soki bolobi na ngomba oyo ete: ‘Pikolamá awa, omibwaka na mbu,’ ekosalema bongo.+
22 Mpe makambo nyonso oyo bozali kosɛnga na libondeli, soki bozali na kondima, bokozwa yango.”+
23 Nzokande nsima ya kokɔta na tempelo, banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya bato bayaki esika azalaki ntango azali koteya mpe balobi ete:+ “Bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo? Mpe nani apesi yo bokonzi oyo?”+
24 Yesu azongiselaki bango ete: “Ngai mpe nakotuna bino likambo moko. Soki boyebisi ngai yango, ngai mpe nakoyebisa bino na lotomo nini nazali kosala makambo oyo:+
25 Batisimo ya Yoane, eutaki wapi? Na likoló to na bato?”+ Kasi babandaki kokanisakanisa na kati na bango mpe koloba ete: “Soki tolobi: ‘Na likoló,’ akoloba na biso ete: ‘Bongo mpo na nini bondimaki ye te?’+
26 Nzokande, soki tolobi: ‘Na bato,’ tozali kobanga ebele ya bato oyo,+ mpo bango nyonso bazwaka Yoane mosakoli.”+
27 Bongo bazongiselaki Yesu ete: “Toyebi te.” Ye mpe, alobaki na bango ete: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na lotomo nini nazali kosala makambo oyo.+
28 “Bokanisi nini? Moto moko azalaki na bana mibale.+ Akei epai ya oyo ya liboso, alobi: ‘Mwana, kende kosala lelo na elanga ya vinyo.’
29 Ye azongisaki ete: ‘Tata, nakokende,’+ kasi akendaki te.
30 Apusani epai ya oyo ya mibale, alobaki kaka bongo. Ye azongisaki ete: ‘Nakokende te.’ Na nsima ayoki mawa+ mpe akei.
31 Na bango mibale, nani asali mokano ya tata na ye?+ Bango balobaki ete: “Oyo ya nsuka.” Yesu alobaki na bango ete: “Ya solo nalobi na bino ete bakɔngɔli-mpako ná basi ya ndumba bazali kokɔta liboso na bino na bokonzi ya Nzambe.
32 Mpo Yoane ayaki koteya bino nzela ya boyengebene,+ kasi bino bondimaki ye te.+ Nzokande, bakɔngɔli-mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye,+ mpe bino, atako bomonaki yango, na nsima, boyokaki mawa te mpo na kondima ye.
33 “Bóyoka ndakisa mosusu: Nkolo-ndako+ moko alonaki elanga ya vinyo mpe azingaki yango na lopango mpe atimolaki ekamwelo ya vinyo na kati na yango mpe atongaki linɔ́ngi moko,+ mpe atikaki yango na mabɔkɔ ya basali-bilanga, mpe akendaki mobembo na mboka mopaya.+
34 Ntango eleko ya kobuka mbuma ekómaki, atindelaki basali-bilanga baombo na ye mpo bázwa mbuma na ye.
35 Nzokande, basali-bilanga bakamataki baombo na ye, babɛtaki moko, babomaki mosusu mpe babambaki mosusu mabanga.+
36 Lisusu atindaki baombo mosusu, mingi koleka oyo ya liboso, kasi basalaki bango mpe bongo.+
37 Nsukansuka atindelaki bango mwana na ye, alobi: ‘Bakomemya mwana na ngai.’
38 Ntango bamonaki mwana yango basali-bilanga wana balobanaki ete: ‘Talá mozwi-ya-libula;+ bóya, tóboma ye mpe tózwa libula na ye!’+
39 Bongo bakamataki ye mpe babwakaki ye na libándá ya elanga ya vinyo mpe babomaki ye.+
40 Bongo ntango nkolo ya elanga ya vinyo akoya, akosala basali-bilanga wana nini?”
41 Bango balobaki na ye ete: “Lokola bazali bato mabe, akoboma bango koboma mpenza+ mpe akotika elanga ya vinyo na mabɔkɔ ya basali-bilanga mosusu, oyo bakopesa ye mbuma na eleko na yango.”+
42 Yesu alobaki na bango ete: “Botángá naino na Makomami te ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki+ yango nde ekómi libanga monene ya litumu ya ndako.+ Likambo yango euti na Yehova, mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’?
43 Yango wana nalobi na bino ete: Bakolongola bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango.+
44 Lisusu, moto oyo akokwea likoló ya libanga oyo akopanzana. Mpe moto nyonso oyo yango ekokwela, ekonikanika ye.”+
45 Nzokande ntango banganga-nzambe bakonzi mpe Bafarisai bayokaki bandakisa na ye, bayebaki ete azalaki kolobela bango.+
46 Kasi atako bazalaki koluka kokanga ye, bazalaki kobanga ebele ya bato, mpamba te bango bazalaki kozwa ye ete azali mosakoli.+
Maloba na nse
^ Ezali mpunda oyo bazalaki kosalela mpo na misala ya ndako.