Matai 20:1-34

20  “Mpo bokonzi ya likoló ezali lokola nkolo-ndako moko oyo abimaki ntɔngɔntɔngɔ mpo na kozwa bato na mosala ya elanga na ye ya vinyo.+  Nsima ya koyokana na bato ya mosala ete akofuta bango denari moko na mokolo,+ atindaki bango na elanga na ye ya vinyo.  Mpe ntango abimaki pene na ngonga ya misato,+ amonaki bato mosusu batɛlɛmi na zando,+ mosala ya kosala ezali te;  mpe alobaki na bango ete: ‘Bino mpe, bókende na elanga ya vinyo, mpe nakopesa bino lifuti oyo ebongi.’  Bongo bakendaki. Lisusu, abimaki pene na ngonga ya motoba+ mpe ya libwa+ mpe asalaki kaka bongo.  Nsukansuka, pene na ngonga ya zomi na moko abimaki mpe akutaki bato mosusu batɛlɛmi, mpe alobaki na bango ete: ‘Mpo na nini botɛlɛmi awa mokolo mobimba mosala te?’  Balobaki na ye ete: ‘Mpo moto moko te azwi biso na mosala.’ Ye alobaki na bango ete: ‘Bino mpe bókende na elanga ya vinyo.’+  “Ntango mpokwa+ ekómaki, nkolo ya elanga ya vinyo alobaki na kapita na ye ete: ‘Bengá bato ya mosala mpe futá bango lifuti na bango,+ bandá na bato ya nsuka tii na bato ya liboso.’  Ntango bato ya ngonga ya zomi na moko bayaki, bazwaki moto na moto denari moko. 10  Bongo, ntango bato ya liboso bayaki, bakanisaki ete bakozwa mingi koleka; kasi bango mpe bazwaki lifuti ya denari moko. 11  Ntango bazwaki yango babandaki koimaima likoló ya nkolo-ndako+ 12  mpe balobaki ete: ‘Bato oyo ya nsuka basali kaka ngonga moko; kasi yo ofuti bango ndenge moko na biso bato tonyokwami mokolo mobimba mpe tomoni mpasi na molunge makasi!’ 13  Kasi azongiselaki moko na bango ete: ‘Moninga, nasali yo mabe te. Oyokanaki na ngai ete nakofuta yo denari moko, boye te?+ 14  Kamatá lifuti na yo mpe kende. Nalingi kopesa moto oyo ya nsuka ndenge moko na yo.+ 15  Nazali na lotomo ya kosala na biloko na ngai ndenge nalingi, boye te? To oyoki mabe*+ mpo na bolamu oyo nasali?’+ 16  Ndenge wana nde bato ya nsuka bakozala bato ya liboso, mpe bato ya liboso bakozala bato ya nsuka.”+ 17  Lokola Yesu azalaki sikoyo pene ya komata na Yerusaleme, akamataki bayekoli zomi na mibale+ kaka bango moko mpe na nzela, alobaki na bango ete: 18  “Talá! Tozali komata na Yerusaleme, mpe bakokaba Mwana ya moto na mabɔkɔ ya banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli, mpe bakokatela ye etumbu ya liwa,+ 19  mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo mpo na kosɛka ye mpe kobɛta ye fimbo mpe kobaka ye na nzete,+ mpe na mokolo ya misato akolamuka.”+ 20  Bongo mama ya bana ya Zebede+ apusanaki pene na ye elongo na bana na ye, agumbamelaki ye mpe asɛngaki ye eloko moko.+ 21  Alobaki na ye ete: “Olingi nini?” Ye alobaki na Yesu ete: “Lobá ete bana na ngai oyo mibale báfanda, moko na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na yo ya mwasi, na bokonzi na yo.”+ 22  Yesu azongisaki ete: “Boyebi likambo oyo bozali kosɛnga te. Bokoki komɛla kɔpɔ+ oyo ngai nalingi namɛla?” Balobaki na ye ete: “Tokoki.” 23  Alobaki na bango ete: “Ya solo bokomɛla kɔpɔ na ngai,+ kasi kofandisa moto na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali likambo na ngai te, ezali nde esika ya baoyo Tata na ngai abongiselá bango yango.”+ 24  Ntango bamosusu zomi bayokaki bongo, bayokaki mabe mpo na bandeko wana mibale.+ 25  Kasi Yesu abengaki bango esika azalaki mpe alobaki ete: “Boyebi ete bayangeli ya bikólo balakisaka bango bokonzi na bango mpe bato na bango ya minene bayokisaka bango bokonzi na bango.+ 26  Ezali bongo te epai na bino;+ kasi moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino,+ 27  mpe moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo na bino.+ 28  Se ndenge Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela+ mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.”+ 29  Nzokande ntango bazalaki kobima na Yeriko+ ebele ya bato mpenza bazalaki kolanda ye. 30  Mpe talá! bato mibale oyo bakufá miso bafandaki pembeni ya nzela, ntango bayokaki ete Yesu azali koleka wana, bagangaki mpe balobaki ete: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!”+ 31  Nzokande ebele ya bato yango bagangelaki bango ete báfanda nyɛɛ; kasi bango bagangaki makasi koleka ete: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!”+ 32  Bongo Yesu atɛlɛmaki, abengaki bango mpe alobaki ete: “Bolingi nasalela bino nini?” 33  Balobaki na ye: “Nkolo, miso na biso efungwama.”+ 34  Bongo mawa ekangaki Yesu, asimbaki miso na bango,+ mpe na mbala moko bakómaki komona, mpe balandaki ye.+

Maloba na nse

Lil., “liso na yo ezali mabe.”