Matai 17:1-27

17  Nsima ya mikolo motoba, Yesu akamataki Petro ná Yakobo ná Yoane ndeko na ye mpe amemaki bango na ngomba moko molai, bango moko kaka.+  Mpe abongwanaki liboso na bango, mpe elongi na ye engɛngaki lokola moi,+ mpe bilamba na ye ya likoló ekómaki kongɛnga lokola pole.+  Mpe talá! Moize ná Eliya babimelaki bango, bazali kosolola na ye.+  Ntango Petro amonaki bongo alobaki na Yesu ete: “Nkolo, ezali malamu tózala awa. Soki olingi, nakotɛlɛmisa bahema misato awa, moko ya yo mpe moko ya Moize mpe moko ya Eliya.”+  Wana azalaki naino koloba, talá! lipata moko oyo ezali kongɛnga ezipaki bango na elili na yango, mpe talá! mongongo moko eutaki na lipata yango mpe elobaki ete: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi;+ bóyoka ye.”+  Ntango bayekoli bayokaki bongo bakweaki bilongi na nse mpe babangaki mingi.+  Bongo Yesu ayaki penepene mpe asimbaki bango, alobi: “Bótɛlɛma mpe bóbanga te.”+  Ntango batombolaki miso, bamonaki moto mosusu te kaka Yesu ye moko.+  Mpe ntango bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo ete: “Bóyebisa moto moko te emonaneli oyo tii ntango Mwana ya moto akokufa mpe akolamuka.”+ 10  Kasi bayekoli batunaki ye motuna oyo: “Bongo mpo na nini bakomeli balobaka ete Eliya asengeli liboso koya?”+ 11  Ye ayanolaki ete: “Ya solo, Eliya azali koya mpe akobongisa makambo nyonso.+ 12  Nzokande, nazali koloba na bino ete Eliya asilá koya mpe bayebaki ye te kasi basalaki ye makambo oyo balingaki. Ndenge moko mpe Mwana ya moto asengeli komona mpasi na mabɔkɔ na bango.”+ 13  Bongo bayekoli basosolaki ete alobaki na bango mpo na Yoane Mobatisi.+ 14  Mpe ntango bakómaki epai ya ebele ya bato yango,+ moto moko apusanaki epai na ye, afukamelaki ye mpe alobaki ete: 15  “Nkolo, yokelá mwana na ngai mawa, mpamba te azali na maladi ya ndɛkɛ mpe azali kobɛla, mpo mbala mingi akweaka na mɔtɔ mpe na mai;+ 16  mpe namemaki ye epai ya bayekoli na yo, kasi bakokaki kobikisa ye te.”+ 17  Yesu azongisaki ete: “Ee libota ezangá kondima mpe egumbamá,+ nakoumela na bino tii ntango nini? Nakokanga motema na makambo na bino tii ntango nini? Bómemela ngai ye awa.” 18  Bongo Yesu apamelaki ye, mpe demo yango abimaki na ye;+ mpe elenge mobali yango abikaki na ngonga wana kaka.+ 19  Bongo bayekoli bayaki epai ya Yesu kaka bango moko mpe balobaki ete: “Mpo na nini biso tokokaki kobimisa ye te?”+ 20  Alobaki na bango ete: “Mpo bozali na kondima moke. Mpo ya solo nalobi na bino: Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na ngomba oyo ete: ‘Longwá awa kende kuna,’ mpe ekolongwa mpe ekokende, mpe ezali na eloko moko te oyo bokokoka kosala te.”+ 21  —— 22  Ntango bayanganaki na Galile nde Yesu alobaki na bango ete: “Mwana ya moto akotɛkama na mabɔkɔ ya bato,+ 23  mpe bakoboma ye, mpe na mokolo ya misato akolamuka.”+ Bongo bayokaki mawa mingi mpenza.+ 24  Bakómaki na Kapernaume; na nsima, bato oyo bazalaki kokɔngɔla mpako ya drakimɛ mibale bapusanaki epai ya Petro mpe balobaki ete: “Moteyi na bino afutaka mpako ya drakimɛ mibale te?”+ 25  Ye alobaki ete: “Te, afutaka.” Nzokande, ntango akɔtaki na ndako Yesu azwaki maloba liboso mpe alobaki ete: “Simo, okanisi nini? Bakonzi ya mabele bazwaka lifuti to mpako ya moto na moto epai ya banani? Epai ya bana na bango to epai ya bapaya?” 26  Ntango alobaki ete: “Epai ya bapaya,” Yesu alobaki na ye ete: “Ya solo mpenza, bana basengeli kofuta mpako te. 27  Kasi mpo tóbɛtisa bango libaku te,+ kende na mbu, bwaká ndɔbɔ, mpe kamatá mbisi ya liboso oyo ekomata mpe, ntango okofungola monɔkɔ na yango, okokuta mbongo ya ebende ya statere. Kamatá yango mpe pesá bango yango mpo na ngai ná yo.”+

Maloba na nse