Matai 13:1-58
13 Na mokolo wana, nsima ya kolongwa na ndako yango, Yesu afandaki pembeni ya mbu;
2 mpe ebele ya bato bayanganaki epai na ye, bongo amataki na masuwa moko mpe afandaki,+ mpe ebele ya bato nyonso wana batɛlɛmaki na libongo.
3 Bongo ayebisaki bango makambo mingi na bandakisa mpe alobaki ete: “Talá! Moloni moko abimaki mpo na kolona;+
4 mpe ntango azalaki kolona, ndambo ya mboto ekweaki pembeni ya nzela, mpe bandɛkɛ bayaki balei yango.+
5 Mosusu ekweaki na esika libanga ezali, epai yango ezwaki mabele mingi te, mpe ebimaki na mbala moko mpo mabele na yango ezalaki mozindo te.+
6 Kasi ntango moi ebimaki ezikaki, mpe lokola ezalaki na misisa te ekaukaki.+
7 Mosusu mpe, ekweaki na kati ya banzubɛ, mpe banzubɛ ekolaki mpe etyaki yango nkaka.+
8 Nzokande mosusu ekweaki na mabele ya malamu mpe ebandaki kobota mbuma,+ oyo eboti mbala nkama moko (100), mpe oyo kuna ntuku motoba (60), mpe oyo mosusu ntuku misato (30).+
9 Oyo azali na matoi ayoka.”+
10 Bongo bayekoli bayaki mpe balobaki na ye ete: “Mpo na nini ozali koloba na bango na bandakisa?”+
11 Ye azongisaki ete: “Bino bozwi likoki ya kososola basekele mosantu+ ya bokonzi ya likoló, kasi bato wana bazwi yango te.+
12 Mpo moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mingi mpe akokóma na mingi mpenza;+ kasi moto nyonso oyo azali na eloko te, ata oyo azali na yango bakobɔtɔla ye.+
13 Yango wana nazali koloba na bango na bandakisa, mpamba te, atako bazali kotala, bátala kaka mpamba, mpe atako bazali koyoka, báyoka kaka mpamba, mpe bákanga ntina na yango te;+
14 mpe mpo na bango esakweli ya Yisaya ezali kokokisama, oyo elobi ete: ‘Koyoka, bokoyoka kasi bokokanga ntina na yango te; mpe, kotala, bokotala kasi bokomona ata moke te.+
15 Mpo motema ya bato oyo ekómi makasi, mpe matoi na bango eyoki kasi basali eloko te, mpe bakangi miso; mpo bámona na miso na bango te mpe báyoka na matoi na bango te mpe mitema na bango ekanga ntina te mpe bázonga nsima te, mpe nabikisa bango te.’+
16 “Nzokande, esengo na miso na bino+ mpo ezali komona, mpe na matoi na bino mpo ezali koyoka.
17 Mpo ya solo mpenza nalobi na bino: Basakoli+ mingi mpe bayengebene mingi bazalaki na mposa ya komona makambo oyo bino bozali komona kasi bamonaki yango te,+ mpe bazalaki na mposa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka kasi bayokaki yango te.+
18 Bongo bino bóyoka ndakisa ya moto oyo alonaki.+
19 Ntango moto ayoki liloba ya bokonzi kasi akangi ntina na yango te, moto mabe+ ayaka kobɔtɔla oyo elonamaki na motema na ye; wana nde oyo elonamaki pembeni ya nzela.
20 Oyo elonamaki na esika libanga ezali, ezali moto oyo ayoki liloba mpe na mbala moko andimi yango na esengo.+
21 Nzokande azali na misisa te kasi aumeli mwa moke, mpe ntango bolɔzi to monyoko ebimi mpo na liloba ya Nzambe na mbala moko abɛti libaku.+
22 Oyo elonamaki na kati ya banzubɛ, ezali moto oyo ayoki liloba, kasi motungisi ya makambo ya ntango oyo+ mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo etye liloba nkaka, mpe aboti mbuma te.+
23 Oyo elonamaki na mabele ya malamu, ezali moto oyo ayoki liloba mpe akangi ntina na yango, oyo aboti solo mbuma mpe abimisi, oyo mbala nkama moko (100), oyo kuna ntuku motoba (60), mpe oyo mosusu ntuku misato (30).”+
24 Apesaki bango ndakisa mosusu na maloba oyo: “Bokonzi ya likoló ezali lokola moto moko oyo alonaki mboto ya malamu na elanga na ye.+
25 Ntango bato balalaki mpɔngi, monguna na ye ayaki kolona matiti mabe na katikati ya blé, mpe akendaki.
26 Ntango milona yango ebimaki mpe ebotaki mbuma, matiti mabe mpe ebimaki.
27 Bongo baombo ya nkolo-ndako bayaki mpe balobaki na ye ete: ‘Nkolo, olonaki mboto ya malamu na elanga, boye te?+ Bongo ndenge nini matiti mabe ezali na kati?’+
28 Alobaki na bango: ‘Monguna, moto moko, asali bongo.’+ Balobaki na ye: ‘Olingi tókende kopikola yango?’
29 Alobaki ete: ‘Te; noki ntango bozali kopikola matiti mabe, bópikola mpe blé elongo na yango.
30 Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma; mpe na eleko ya kobuka mbuma nakoyebisa babuki-mbuma ete, Liboso bópikola matiti mabe mpe bókangisa yango mabokemaboke mpo na kotumba yango,+ na nsima bóbanda koyanganisa blé na kati ya ndako na ngai ya kobomba biloko.’”+
31 Apesaki bango ndakisa mosusu+ mpe alobaki ete: “Bokonzi ya likoló ezali lokola mbuma ya mutarde,+ oyo moto akamati mpe aloni na elanga na ye;
32 ya solo, yango ezali moke mpenza koleka mboto nyonso, kasi ntango ekoli ezalaka ndunda oyo eleki bandunda nyonso mpe ekómaka nzete, mpe bandɛkɛ ya likoló+ bayaka kofanda na bitape na yango.”+
33 Apesaki bango ndakisa mosusu ete: “Bokonzi ya likoló ezali lokola levire,+ oyo mwasi moko azwaki mpe abombaki na katini ya bimekelo misato ya minene* ya farini, tii na ntango pɔtɔpɔtɔ mobimba evimbaki.”
34 Makambo nyonso wana Yesu alobelaki yango ebele ya bato na bandakisa. Kutu, azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa;+
35 mpo likambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli ekokisama; ye alobaki ete: “Nakofungola monɔkɔ na ngai na bandakisa, nakosakola makambo oyo ebombamá banda na ebandeli.”+
36 Bongo nsima ya kotika ebele ya bato yango bázonga akɔtaki na ndako. Mpe bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki ete: “Limbolelá biso ndakisa wana ya matiti mabe na elanga.”
37 Ye azongisaki ete: “Moloni ya mboto ya malamu ezali Mwana ya moto;
38 elanga ezali mokili;+ milona ya malamu, ezali bana ya bokonzi; kasi matiti mabe ezali bana ya moto mabe,+
39 mpe monguna oyo alonaki yango ezali Zabolo.+ Ntango ya kobuka mbuma+ ezali bosukisi ya makambo ya ntango moko boye,+ mpe babuki-mbuma ezali baanzelu.
40 Yango wana, se ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na mɔtɔ, ekozala mpe bongo na bosukisi ya makambo ya ntango yango.+
41 Mwana ya moto akotinda baanzelu na ye, mpe bakolongola na bokonzi na ye biloko nyonso oyo ebɛtisaka libaku+ mpe bato oyo babukaka mibeko,
42 mpe bakobwaka bango na litumbu ya mɔtɔ.+ Kuna nde bakolela mpe bakolya mino.+
43 Na ntango yango bayengebene bakongɛnga+ makasi lokola moi+ na kati ya bokonzi ya Tata na bango. Oyo azali na matoi ayoka.+
44 “Bokonzi ya likoló ezali lokola eloko ya motuya oyo ebombami na elanga, oyo moto moko akuti mpe abombi yango; mpe na esengo, akei kotɛka+ biloko oyo azali na yango mpe asombi elanga yango.+
45 “Lisusu bokonzi ya likoló ezali lokola moto ya mombongo oyo asalaka mibembo ya koluka mayaka ya kitoko.
46 Ntango amoni liyaka moko ya motuya monene,+ akei nokinoki kotɛka biloko nyonso oyo azali na yango mpe asombi yango.+
47 “Lisusu bokonzi ya likoló ezali lokola monyama oyo babwaki na mbu mpe ekangi mbisi ya ndenge nyonso.+
48 Ntango etondaki babendaki yango na libongo mpe, bafandi, batye oyo ya malamu+ na bikɔlɔ, kasi babwaki oyo ya mabe.+
49 Ekozala mpe bongo na bosukisi ya makambo ya ntango oyo: baanzelu bakobima mpe bakokabola bato mabe+ na bayengebene+
50 mpe bakobwaka bango na litumbu ya mɔtɔ. Kuna nde bakolela mpe bakolya mino.+
51 “Bokangi ntina ya makambo nyonso wana?” Balobaki na ye ete: “Ɛɛ.”
52 Bongo alobaki na bango ete: “Lokola bokangi ntina na yango, bóyeba ete molakisi nyonso ya bato, ntango bateyi ye makambo ya bokonzi ya likoló,+ azali lokola moto moko, nkolo-ndako moko, oyo azali kobimisa biloko ya sika mpe ya kala na esika na ye ya kobomba biloko ya motuya.”+
53 Nzokande ntango Yesu asilisaki kopesa bandakisa wana alongwaki wana.
54 Mpe nsima ya kokóma na mboka na ye mpenza+ abandaki koteya bango na sinagoga+ na bango, bongo bakamwaki mpe balobaki ete: “Moto oyo azwi bwanya oyo mpe misala oyo ya nguya epai wapi?
55 Oyo ezali mwana ya mosali-mabaya te?+ Nkombo ya mama na ye Maria te, mpe bandeko na ye ya mibali ezali Yakobo ná Yozefe ná Simo ná Yuda te?
56 Mpe bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali elongo na biso te?+ Bongo moto oyo azwi makambo oyo nyonso epai wapi?”+
57 Bongo babandaki kobɛta libaku mpo na ye.+ Kasi Yesu alobaki na bango ete: “Mosakoli azangaka lokumu kaka na mboka na ye mpenza mpe na ndako na ye moko.”+
58 Mpe asalaki misala mingi ya nguya kuna te mpo bazangaki kondima.+
Maloba na nse
^ To, “bimekeli misato ya minene,” yango nyonso ezali litre 22.