Matai 12:1-50
12 Na eleko yango, Yesu alekaki na bilanga ya blé na sabata.+ Bayekoli na ye bayokaki nzala mpe babandaki kobuka mitó ya blé mpe kolya.+
2 Ntango Bafarisai bamonaki bongo balobaki na ye ete:+ “Talá! Bayekoli na yo bazali kosala likambo oyo esengeli kosala te na sabata.”+
3 Alobaki na bango ete: “Botángá te oyo Davidi asalaki ntango ye ná bato oyo bazalaki elongo na ye bayokaki nzala?+
4 Ndenge akɔtaki na ndako ya Nzambe mpe balyaki mampa ya kolakisa,+ eloko oyo asengelaki kolya te,+ ye ná bato oyo bazalaki elongo na ye, longola kaka banganga-nzambe?+
5 To, botángá te na Mibeko+ ete na basabata, banganga-nzambe, na tempelo, basalaka mosala* mpe bazalaka na ngambo te?+
6 Kasi nazali koyebisa bino ete eloko oyo eleki tempelo+ ezali awa.
7 Nzokande, soki bókangaka ntina ya likambo oyo: ‘Nalingi motema mawa,+ kasi mbeka te,’+ bolingaki te kokweisa bato oyo bazali na ngambo te.
8 Mpo Mwana ya moto+ azali Nkolo ya sabata.”+
9 Nsima ya kolongwa na esika wana akendaki na sinagoga na bango;
10 talá! moto moko oyo lobɔkɔ ekauká+ azalaki wana! Bongo batunaki ye ete: “Bakoki kobikisa moto na sabata?” mpo bázwa likambo ya kofunda ye.+
11 Alobaki na bango ete: “Moto nani na kati na bino oyo azali na mpate kaka moko mpe, soki yango ekwei na libulu+ na sabata, akosimba yango te mpo na kobimisa yango?+
12 Yango emonisi ete moto aleki mpenza mpate na motuya!+ Yango wana okoki kosala likambo ya malamu na sabata.”
13 Bongo alobaki na moto yango ete: “Sembolá lobɔkɔ na yo.” Mpe asembolaki yango, mpe ezongaki malamu lokola lobɔkɔ oyo mosusu.+
14 Kasi Bafarisai babimaki mpe basalelaki ye likita mpo na koboma ye.+
15 Ntango Yesu ayebaki yango, alongwaki kuna. Bato mingi mpe balandaki ye, mpe abikisaki bango nyonso,+
16 kasi apekisaki bango makasi ete bápanza nsango na ye te;+
17 mpo likambo oyo elobamaki na nzela ya Yisaya mosakoli ekokisama; alobaki:
18 “Talá! Mosaleli na ngai+ oyo naponi, oyo nalingá,+ oyo molimo na ngai endimi! Nakotya ye elimo na ngai,+ mpe akomonisa bikólo bosembo.
19 Akoswana te,+ mpe akoganga makasi te, mpe moto moko te akoyoka mongongo na ye na babalabala ya minene.
20 Akobuka te mongendu oyo efinamá, mpe akoboma te nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke,+ tii akolonga komonisa bosembo.+
21 Ya solo, bikólo bakolikya na nkombo na ye.”+
22 Bongo bayelaki ye moto moko oyo azalaki na demo, akufá miso mpe alobaka te; mpe abikisaki ye, bongo moto yango oyo alobaka te alobaki mpe amonaki.
23 Bongo ebele ya bato nyonso wana bakamwaki mpenza mpe babandaki koloba ete:+ “Oyo ekoki kozala Mwana ya Davidi te?”+
24 Ntango Bafarisai bayokaki yango, balobaki ete: “Moto oyo azali kobimisa bademo kaka na nguya ya Beelezebube, mokonzi ya bademo.”+
25 Lokola ayebaki makanisi na bango,+ alobaki na bango ete: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko ebebaka,+ mpe engumba nyonso to ndako oyo ekabwani na kati na yango moko ekotɛlɛma te.
26 Ndenge moko, soki Satana azali kobimisa Satana, akabwani na kati na ye moko; bongo bokonzi na ye ekotɛlɛma ndenge nini?
27 Lisusu, soki ngai nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube,+ bongo bana* na bino bazali kobimisa bango na nguya ya nani? Yango wana bango bakosambisa bino.
28 Kasi soki nazali kobimisa bademo nde na nguya ya elimo ya Nzambe, bokonzi ya Nzambe eleki bino kaka boye.+
29 To ndenge nini moto akoki kokɔta na ndako ya moto ya makasi mpe kokamata biloko na ye, soki akangi naino moto yango ya makasi bansinga te? Na nsima nde akopunza ndako na ye.+
30 Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.+
31 “Yango wana nalobi na bino: bato bakolimbisama lisumu ya ndenge nyonso mpe kofinga ya ndenge nyonso, kasi kofinga elimo ekolimbisama te.+
32 Na ndakisa, moto nyonso oyo alobi liloba ya kotɛmɛla Mwana ya moto, bakolimbisa ye;+ kasi moto nyonso oyo alobi mpo na kotɛmɛla elimo santu, bakolimbisa ye te, ɛɛ, ezala na ntango oyo to na oyo ezali koya.+
33 “To bósala ete nzete ezala malamu mpe mbuma na yango ezala malamu to bósala ete nzete ezala mabe mpe mbuma na yango ezala mabe; mpo nzete eyebanaka nde na mbuma na yango.+
34 Bana ya bitupa,+ ndenge nini bokoki koloba makambo ya malamu, awa bozali bato mabe?+ Mpo monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.+
35 Moto malamu abimisaka makambo ya malamu na bolamu oyo abombi na motema na ye,+ kasi moto mabe abimisaka makambo ya mabe na mabe oyo abombi na motema na ye.+
36 Nazali koyebisa bino ete liloba nyonso ya mpambampamba oyo bato balobaka, bakozongisa monɔkɔ+ mpo na yango na Mokolo ya Kosambisama;
37 mpo bakotánga yo moyengebene na maloba na yo, mpe bakokweisa yo na likambo na maloba na yo.”+
38 Bongo bakomeli ná Bafarisai mosusu bayanolaki ye ete: “Moteyi, tolingi omonisa biso elembo moko.”+
39 Azongiselaki bango ete: “Libota ya mabe mpe ya ekobo+ ezali kokoba koluka elembo, kasi bakopesa yango elembo moko te longola kaka elembo ya mosakoli Yona.+
40 Mpo lokola Yona+ azalaki na kati ya libumu ya mbisi monene mikolo misato butu moi, Mwana ya moto+ mpe akozala na kati ya mabele+ mikolo misato butu moi.+
41 Bato ya Ninive bakosekwa esika moko na libota oyo+ na Mokolo ya Kosambisama mpe bakokweisa+ yango; mpamba te babongolaki motema na oyo Yona+ asakolaki, kasi talá! eloko oyo eleki Yona ezali awa.
42 Mokonzi-mwasi ya sudi+ akosekwa esika moko na libota oyo na Mokolo ya Kosambisama mpe akokweisa yango; mpamba te ye autaki na nsuka ya mabele ayei koyoka bwanya ya Salomo, kasi talá! moto oyo aleki Salomo azali awa.+
43 “Ntango elimo moko ya mbindo ebimi na moto, elekaka koluka esika ya kopema na bisika ekauká, mpe ezwaka ata esika moko te.+
44 Bongo elobaka ete: ‘Nakozonga na ndako na ngai epai nabimaki’; mpe ntango ekómi kuna, ekuti yango mpamba, bakɔmbɔli yango mpe ekómi kitoko.
45 Bongo ekei kokamata bilimo mosusu nsambo oyo eleki yango na mabe,+ mpe nsima ya kokɔta na kati, bilimo yango efandi kuna; mpe moto wana akómaka mabe koleka ndenge oyo azalaki liboso.+ Libota mabe+ oyo ekozala mpe bongo.”
46 Wana azalaki naino koloba na ebele ya bato yango, talá! mama na ye ná bandeko na ye+ bayaki kotɛlɛma na libándá bazali koluka kosolola na ye.
47 Bongo moto moko alobaki na ye ete: “Talá! Mama na yo ná bandeko na yo batɛlɛmi libándá, bazali koluka kosolola na yo.”
48 Azongiselaki moto oyo azalaki koyebisa ye ete: “Nani mama na ngai, mpe banani bandeko na ngai?”+
49 Asembolaki lobɔkɔ na ye epai ya bayekoli na ye mpe alobaki ete: “Talá! Mama na ngai ná bandeko na ngai!+
50 Mpo moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló, ye wana nde ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai.”