Matai 11:1-30

11  Nzokande ntango Yesu asilisaki kopesa bayekoli na ye zomi na mibale malako, alongwaki kuna akei koteya mpe kosakola na bingumba na bango.+  Kasi ntango Yoane ayokaki na bolɔkɔ+ nsango ya misala ya Kristo, atindaki maloba na bayekoli na ye moko  mpe alobaki na ye ete: “Yo ozali Moto oyo azali koya, to tosengeli nde kozela mosusu?”+  Yesu azongiselaki bango ete: “Bókende koyebisa Yoane oyo bozali koyoka mpe komona:  Bato oyo bakufá miso bazali komona lisusu,+ mpe batɛngumi+ bazali kotambola, bato ya maba+ bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi+ bazali koyoka mpe bakufi+ bazali kolamuka, mpe nsango malamu+ ezali kosakolama epai ya babola;  mpe esengo na moto oyo azwi ata eloko moko te ya kobɛta libaku epai na ngai.”+  Ntango bango bakendaki, Yesu abandaki koloba na ebele ya bato yango makambo etali Yoane: “Bobimaki kotala nini na esobe?+ Mongendu oyo mopɛpɛ ezali kobɛtabɛta?+  Bongo bobimaki kotala nini? Moto moko oyo alati bilamba ya pɛtɛpɛtɛ? Te, baoyo balataka bilamba ya pɛtɛpɛtɛ bazalaka na bandako ya bakonzi.+  Kasi mpo na nini mpenza bobimaki? Kotala mosakoli moko? Ya solo, nazali koyebisa bino, aleki mosakoli mosika.+ 10  Mpo na ye nde ekomamá ete: ‘Talá! Ngai moko nazali kotinda momemi-nsango na ngai liboso na yo, mpe akobongisa nzela na yo liboso na yo!’+ 11  Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Na bato nyonso oyo basi babotá,+ moko oyo aleki Yoane Mobatisi abimá te; kasi moto oyo aleki moke na bokonzi+ ya likoló aleki ye. 12  Kasi banda na mikolo ya Yoane Mobatisi tii sikoyo bokonzi ya likoló ezali eloko oyo bato mingi bazali kolanda na molende, mpe baoyo bazali kolanda yango na molende bazali kozwa yango.+ 13  Mpo bango nyonso, Basakoli mpe Mibeko, basakolaki tii na Yoane;+ 14  mpe soki bolingi kondima yango, Ye nde ‘Eliya oyo asengeli koya.’+ 15  Oyo azali na matoi ayoka.+ 16  “Nakokokanisa libota oyo na nani?+ Ezali lokola bana mike oyo bafandi na bazando, oyo bazali kobelela baninga na bango ya lisano,+ 17  balobi: ‘Tobɛtɛlaki bino piololo, kasi bobinaki te; togangaki na kolela, kasi bomibɛtaki na mawa te.’+ 18  Ndenge moko mpe, Yoane ayei alei te mpe amɛli te,+ kasi balobi: ‘Azali na demo’; 19  Mwana ya moto ayei azali kolya mpe komɛla,+ kasi balobi: ‘Talá! Moto oyo amipesá na kolunda mpe na komɛla vinyo, moninga ya bakɔngɔli-mpako mpe ya basumuki.’+ Atako bongo, bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.”+ 20  Bongo abandaki kopamela bingumba epai asalaki misala na ye mingi ya nguya, mpo ebongolaki motema te:+ 21  “Mawa na yo, Korazine! Mawa na yo, Betesaida!+ mpamba te soki misala ya nguya oyo esalemaki epai na bino esalemaka na Tire mpe na Sidone, mbɛlɛ babongolá motema banda kala balati ngɔtɔ mpe bafandi na putulu ya mɔtɔ.+ 22  Yango wana nalobi na bino ete: Na Mokolo ya Kosambisama,+ Tire ná Sidone ekozala kutu mwa malamu koleka bino.+ 23  Mpe yo, Kapernaume,+ mbala mosusu okotombwama tii na likoló? Okokita+ tii na Nkunda,*+ mpo soki misala ya nguya oyo esalemaki epai na yo esalemaka na Sodoma, mbɛlɛ yango ezali naino tii na mokolo ya lelo. 24  Yango wana, nalobi na bino ete: Na Mokolo ya Kosambisama, mokili ya Sodoma ekozala kutu mwa malamu koleka yo.”+ 25  Na ntango yango Yesu azongisaki ete: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele, mpo obombeli bato ya bwanya ná bato ya mayele makambo oyo kasi omonisi yango bana mike.+ 26  Ya solo, Ee Tata, mpo omonaki malamu kosala bongo. 27  Tata na ngai apesi ngai biloko nyonso,+ mpe moto moko te ayebi Mwana malamumalamu longola kaka Tata,+ mpe moto moko te ayebi Tata malamumalamu longola kaka Mwana ná moto nyonso oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.+ 28  Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba,+ mpe ngai nakopemisa bino. 29  Bókamata ekanganeli+ na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai,+ mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto+ mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.+ 30  Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”+

Maloba na nse

To, “Hadesi.” Talá Ap 4.