Matai 10:1-42
10 Bongo abengisaki bayekoli na ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi likoló ya bilimo ya mbindo,+ mpo na kobimisa yango mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso na nzoto.
2 Nkombo ya bantoma yango zomi na mibale+ yango oyo:+ Ya liboso, Simo, oyo babengi Petro,+ ná Andre+ ndeko na ye; ná Yakobo mwana ya Zebede+ ná Yoane ndeko na ye;
3 Filipe ná Bartelemi;+ Toma+ ná Matai+ mokɔngɔli-mpako; Yakobo mwana ya Alfe,+ mpe Tade;
4 Simo Mokanana,*+ mpe Yudasi Mokeriota, oyo na nsima atɛkaki+ ye.
5 Yesu atindaki bato yango zomi na mibale mpe apesaki bango mitindo oyo:+ “Bókende na nzela ya bikólo mosusu te, mpe bókɔta na engumba moko te ya Samaria;+
6 kasi, bókende kaka epai ya bampate ya ndako ya Yisraele oyo ebungá.+
7 Ntango bozali kokende, bósakola mpe bóloba ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’+
8 Bóbikisa bato ya maladi,+ bósekwisa bakufi, bópɛtola bato ya maba, bóbimisa bademo. Bozwi ofele, bópesa ofele.+
9 Bóluka te kozwa wolo to palata to motako mpo na bapotɔmɔni ya mikaba na bino,+
10 to saki ya bilei mpo na mobembo, to bilamba mibale ya nse, to basandale to lingenda; mpo mosali asengeli kozwa bilei na ye.+
11 “Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani na kati na yango abongi, mpe bófanda wana tii bokolongwa.+
12 Ntango bokokɔta na ndako, bópesa bato ya ndako mbote;
13 mpe soki ndako yango ebongi, kimya oyo botombeli yango ezala likoló na yango;+ kasi soki ebongi te, kimya na bino ezongela bino.
14 Epai nyonso oyo moto akoyamba bino te to akoyoka maloba na bino te, ntango bokobima na ndako yango to na engumba yango bópupola putulu ya makolo na bino.+
15 Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Na Mokolo ya Kosambisama, mokili ya Sodoma+ ná Gomora ekozala kutu mwa malamu koleka engumba wana.+
16 “Talá! Nazali kotinda bino lokola bampate na kati ya bambwa ya zamba;+ yango wana, bózala ekɛngɛ lokola banyoka+ kasi bózala na ngambo te lokola bibenga.+
17 Bókeba na bato;+ mpo bakokaba bino na batribinale ya mboka,+ mpe bakobɛta bino fimbo+ na basinagoga na bango.+
18 Ya solo, bakomema bino na makasi liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi+ mpo na ngai, mpo na kopesa bango mpe bikólo litatoli.+
19 Nzokande, ntango bakokaba bino, bómitungisa te mpo na ndenge oyo bokoloba to makambo oyo bokoloba; mpo bakopesa bino oyo bokoloba kaka na ngonga wana;+
20 mpo baoyo bazali koloba ezali kaka bino moko te, kasi elimo ya Tata na bino nde ezali koloba na nzela na bino.+
21 Lisusu, ndeko+ akokaba ndeko na ye na liwa, mpe tata akokaba mwana na ye, mpe bana bakotombokela baboti mpe bakobomisa bango.+
22 Mpe bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai;+ kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.+
23 Ntango bakonyokola bino na engumba moko, bókima na engumba mosusu;+ mpo ya solo mpenza nalobi na bino ete: Bokosilisa koleka+ na bingumba nyonso ya Yisraele te liboso Mwana ya moto aya.+
24 “Moyekoli aleki moteyi na ye te, moombo mpe aleki nkolo na ye te.+
25 Moyekoli asengeli kokóma lokola moteyi na ye, mpe moombo lokola nkolo na ye.+ Soki babengi nkolo-ndako Beelezebube,+ bongo bato ya ndako na ye bakobenga bango bongo te?
26 Na yango bóbanga bango te; mpo ezali na eloko moko te oyo ezipami oyo ekomonisama polele te, mpe ezali na sekele moko te oyo ekoyebana te.+
27 Oyo nazali koyebisa bino na molili, bóloba yango na pole; mpe oyo bozali koyoka ngai nazali koloba na bino na mongongo ya nse, bósakola yango na likoló ya bandako.+
28 Mpe bóbanga te+ baoyo bakoki koboma nzoto kasi bakoki koboma molimo te; nzokande bóbanga nde moto+ oyo akoki koboma ná molimo ná nzoto na Gehena.+
29 Batɛkaka bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo ya bibende moko ya motuya moke, boye te?+ Nzokande ata moko na yango ekokwea na nse te bongo Tata na bino ayeba te.+
30 Kasi nsuki nyonso ya motó na bino etángami.+
31 Na yango bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.+
32 “Boye, moto nyonso oyo alobi polele liboso ya bato ete ngai ná ye tozali na bomoko, ngai mpe nakoloba polele liboso ya Tata na ngai oyo azali na likoló ete ngai ná ye tozali na bomoko;+
33 kasi moto nyonso oyo awangani ngai liboso ya bato, ngai mpe nakowangana+ ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na likoló.
34 Bókanisa te ete nayaki kotya kimya na mabele; nayaki kotya kimya te,+ kasi mopanga.
35 Mpo nayaki kokabola: moto akotombokela tata na ye, mpe mwana mwasi akotombokela mama na ye, mpe elenge mwasi ya libala akotombokela bokilo na ye ya mwasi.+
36 Ya solo, banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.
37 Moto oyo alingi tata to mama koleka ngai abongi na ngai te; mpe moto oyo alingi mwana mobali to mwana mwasi koleka ngai abongi na ngai te.+
38 Mpe moto nyonso oyo andimi te kozwa nzete na ye ya mpasi mpe kolanda ngai abongi na ngai te.+
39 Moto oyo azwi molimo na ye akobungisa yango, mpe moto oyo abungisi molimo na ye mpo na ngai akozwa yango.+
40 “Moto oyo ayambi bino ayambi mpe ngai, mpe moto oyo ayambi ngai ayambi mpe moto oyo atindaki ngai.+
41 Moto oyo ayambi mosakoli mpo azali mosakoli akozwa mbano ya mosakoli,+ mpe moto oyo ayambi moyengebene mpo azali moyengebene akozwa mbano ya moyengebene.+
42 Mpe moto nyonso oyo apesi na moko ya bato oyo ya mike ata kɔpɔ moko ya mai ya mpiɔ mpo na komɛla mpo azali moyekoli, nayebisi bino ya solo mpenza, akobungisa mbano na ye ata moke te.”+
Maloba na nse
^ “Mokanana,” elingi koloba, moto ya molende.