Masese 20:1-30

20  Vinyo ezali mosɛki,+ masanga oyo elangwisaka ezali na makambo mobulumobulu,+ mpe moto nyonso oyo azali kotika yango ebungisa ye azali na bwanya te.+  Nsɔmɔ oyo mokonzi apesaka ezali konguluma lokola oyo ya mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.+ Ye oyo azali komibendela nkanda na ye azali kosalela molimo na ye moko lisumu.+  Ezali nkembo epai ya moto ete akima kowelana,+ kasi moto nyonso oyo azali zoba akomikɔtisa wana.+  Mpo na eleko ya mpiɔ moto ya gɔigɔi akobalola mabele te;+ akosɛngasɛnga na ntango ya kobuka mbuma, kasi eloko moko ekozala te.+  Makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo,+ kasi moto ya bososoli nde akotoka yango.+  Ebele ya bato bakosakola moto na moto motema boboto na ye,+ kasi moto ya sembo, nani akoki kozwa ye?+  Moyengebene azali kotambola na ezaleli na ye ya kozanga mbeba.+ Esengo na bana na ye nsima na ye.+  Mokonzi afandi na kiti ya kosambisa,+ azali kopanza mabe nyonso na miso na ye.+  Nani akoki koloba: “Napɛtoli motema na ngai;+ nakómi pɛto, nalongwe na lisumu na ngai”?+ 10  Mitindo mibale ya kilo mpe mitindo mibale ya efa+—yango nyonso mibale ezali eloko moko oyo Yehova ayiná.+ 11  Ata na misala na ye mwana mobali asalaka ete bato báyeba ye, soki mosala na ye ezali pɛto mpe elongobani.+ 12  Litoi oyo ezali koyoka mpe liso oyo ezali komona—Yehova ye moko nde asalá yango nyonso mibale.+ 13  Kolinga mpɔngi te, noki okóma na bobola.+ Fungolá miso na yo; tondá na limpa.+ 14  “Ezali mabe, mabe!” mosombi alobi bongo, mpe akei.+ Nsima na yango nde azali komikumisa.+ 15  Wolo ezali, mabanga kitoko ya korai mpe ezali beboo; kasi mbɛbu ya boyebi ezali bambɛki ya motuya.+ 16  Soki moto amipesi ndanga mpo na mopaya, kamatá elamba na ye;+ mpe soki ezali mpo ayokani na mwasi mopaya, simbá ndanga epai na ye.+ 17  Limpa oyo ezwami na lokuta ezali elɛngi epai ya moto,+ kasi nsima na yango, monɔkɔ na ye ekotonda na mabanga mikemike.+ 18  Myango epikamaka makasi na toli,+ mpe salá etumba na yo na likoki ya koyeba kotambwisa makambo.+ 19  Moto oyo azali kolekaleka mpo na kokosela bato makambo abimisaka makambo oyo elobami na nkuku;+ mpe osengeli te kosala boninga na moto oyo alengolami na mbɛbu na ye.+ 20  Ye oyo azali kolakela tata na ye ná mama na ye mabe,+ mwinda na ye ekobomama wana molili ekómi pene.+ 21  Libula ezwamaka na lokoso na ebandeli,+ kasi nsuka na yango ekopambolama te.+ 22  Koloba te ete: “Nakozongisa mabe!”+ Tyá elikya epai ya Yehova,+ mpe akobikisa yo.+ 23  Mitindo mibale ya kilo ezali eloko moko oyo Yehova ayiná,+ mpe emekeli-kilo ya bokosi ezali malamu te.+ 24  Matambe ya mobali makasi eutaka na Yehova.+ Kasi moto ya mabele, ndenge nini akoki kososola nzela na ye?+ 25  Ezali motambo ntango moto ya mabele abeleli mbangumbangu ete: “Mosantu!”+ bongo nsima ya kosala bilako+ alingi kotalela yango malamu.+ 26  Mokonzi ya bwanya azali kopanza bato mabe,+ mpe abalusaka yiká likoló na bango.+ 27  Mpema+ ya moto ya mabele ezali mwinda ya Yehova, elukalukaka biteni nyonso ya kati ya libumu.+ 28  Motema boboto ná bosolo—yango ebatelaka mokonzi;+ mpe na motema boboto, alendisi kiti na ye ya bokonzi.+ 29  Kitoko ya bilenge ezali nguya na bango,+ mpe nkembo ya mibange ezali nsuki mpɛmbɛ na bango.+ 30  Bampota oyo euti na kobɛtama nde esukolaka mabe;+ mpe kobɛtama, yango nde esukolaka biteni ya kati ya libumu.+

Maloba na nse