Masese 16:1-33
16 Kotya makambo ya motema na molɔngɔ ezali likambo ya moto ya mabele,+ kasi eyano ya lolemo eutaka na Yehova.+
2 Banzela nyonso ya moto ezali pɛto na miso na ye moko,+ kasi Yehova amekamekaka makanisi mpo na koyeba ndenge ezali.+
3 Tikelá Yehova misala na yo+ mpe myango na yo ekopikama makasi.+
4 Yehova asalá eloko nyonso mpo na mokano na ye,+ ɛɛ, ata moto mabe mpo na mokolo ya mabe.+
5 Moto nyonso oyo azali na lolendo na motema azali eloko oyo Yehova ayiná.+ Lobɔkɔ ekoki kosimbana na lobɔkɔ, atako bongo moto akozanga etumbu te.+
6 Na motema boboto mpe na bosolo nde bazipaka masumu mpo na libunga,+ mpe na kobanga Yehova nde moto alongwaka na mabe.+
7 Ntango Yehova azali kosepela na banzela ya moto,+ asalaka ete banguna na ye bázala na kimya elongo na ye.+
8 Kozala na moke elongo na boyengebene+ ezali malamu koleka kozala na biloko beboo kozanga bosembo.+
9 Motema ya moto ya mabele ekoki kokanisakanisa nzela na ye,+ kasi Yehova ye moko atambwisaka matambe na ye.+
10 Ekateli oyo euti na Nzambe esengeli kozala na mbɛbu ya mokonzi;+ na ntango ya kosambisa, monɔkɔ na ye esengeli te kozanga bosembo.+
11 Likɔnga oyo elakisaka kilo ya sembo mpe bimekeli-kilo oyo ezali sembo ezali ya Yehova;+ mabanga nyonso ya komeka kilo ya libenga ezali mosala na ye.+
12 Kosala makambo ya mabe ezali eloko oyo bakonzi bayiná,+ mpo ezali na boyengebene nde kiti ya bokonzi epikamaka makasi.+
13 Mbɛbu ya boyengebene nde eloko oyo esepelisaka mokonzi monene;+ mpe ye alingaka moto oyo alobaka makambo ya kolongobana.+
14 Nkɛlɛ ya mokonzi nde bamemi-nsango ya liwa,+ kasi moto ya bwanya nde ye oyo akitisaka yango.+
15 Na pole ya elongi ya mokonzi bomoi ezali,+ mpe soki asepeli na moto ezali lokola lipata ya mbula ya eleko ya prɛnta.+
16 Kozwa bwanya ezali mpenza malamu mingi koleka wolo!+ Mpe kozwa mayele esengeli kolingama mingi koleka kozwa palata.+
17 Bato ya kolongobana baboyaka nzela ya mabe.+ Ye oyo azali kobatela nzela na ye azali kobatela molimo na ye.+
18 Lolendo ezalaka liboso ya kokwea,+ mpe elimo ya komikumisa liboso ya kobɛta libaku.+
19 Kozala na elimo ya komikitisa elongo na bato ya komikitisa+ ezali malamu koleka kokabola biloko oyo epunzami elongo na bato ya komikumisa.+
20 Ye oyo amonisaka mayele ya kososola na likambo akozwa bolamu,+ mpe esengo na ye oyo atyelaka Yehova motema.+
21 Ye oyo azali na bwanya na motema akobengama moto ya mayele,+ mpe ye oyo azali na mbɛbu ya sukali ayebaka kondimisa.+
22 Mayele ya kososola ezali liziba ya bomoi epai ya bankolo na yango;+ mpe disiplini ya bazoba ezali bozoba.+
23 Motema ya moto ya bwanya etindaka monɔkɔ na ye emonisa mayele ya kososola,+ mpe mbɛbu na ye eyebaka kondimisa.+
24 Maloba ya kosepelisa ezali ndako ya mafuta ya nzoi,+ elɛngi na molimo mpe nkisi oyo ebikisaka mikuwa.+
25 Nzela mosusu emonanaka na miso ya moto ete ebongi,+ kasi na nsima, nsuka na yango nde banzela ya liwa.+
26 Molimo ya moto oyo alingá mosala esali makasi mpo na ye,+ mpo monɔkɔ na ye etindiki ye makasi.+
27 Moto mpamba akundolaka oyo ezali mabe,+ mpe eloko lokola mɔtɔ oyo ezikisaka ezali na mbɛbu na ye.+
28 Moto ya myango mabe abimisaka kowelana,+ mpe moto oyo akoselaka bato makambo akabolaka baninga ya motema.+
29 Moto ya mobulu akolengola moninga na ye,+ mpe ya solo akotinda ye na nzela oyo ezali malamu te.+
30 Afinafinaka miso na ye mpo na kokana myango mabe.+ Aswaswaka mpenza mbɛbu na ye mpo na kosala mabe yango.
31 Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko+ ntango yango ezwami na nzela ya boyengebene.+
32 Ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya,+ mpe ye oyo apekisaka elimo na ye azali malamu koleka ye oyo azwi engumba.+
33 Babwakaka mbɛsɛ+ na kati ya elamba oyo ezipaka bibɛlɔ, kasi ekateli nyonso oyo ebimi na yango eutaka na Yehova.+