Masese 14:1-35
14 Mwasi ya bwanya mpenza atongi ndako na ye,+ kasi oyo ya zoba abukaka yango na mabɔkɔ na ye moko.+
2 Ye oyo azali kotambola na kolongobana na ye abangaka Yehova,+ kasi ye oyo atɛngamá na banzela na ye atyolaka Ye.+
3 Fimbo ya lolendo ezali na monɔkɔ ya zoba,+ kasi mbɛbu ya bato ya bwanya ekokɛngɛla bango.+
4 Esika bangɔmbɛ ezali te, elyelo ya bibwɛlɛ ezali pɛto, kasi biloko ya kobuka ezali beboo mpo na makasi ya ngɔmbɛ-mobali.
5 Motatoli ya sembo akobuka lokuta te,+ kasi motatoli ya lokuta asopasopaka makambo ya lokuta mpenza.+
6 Motyoli aluki kozwa bwanya, kasi ezali te; kasi mpo na moto ya mayele, boyebi ezali eloko ya pɛtɛɛ.+
7 Longwá liboso ya zoba,+ mpo ya solo, okososola mbɛbu ya boyebi te.+
8 Bwanya ya moto ya ekɛngɛ ezali ete akangaka ntina ya nzela na ye,+ kasi bozoba ya bazoba nde bokosi.+
9 Baoyo basɛkaka ngambo bazali bazoba,+ kasi boyokani ezali kati na bato ya kolongobana.+
10 Motema eyebaka bololo ya molimo ya moto,+ mpe mopaya moko te akomikɔtisa na esengo na yango.
11 Ndako ya bato mabe ekobebisama nyɛɛ,+ kasi hema ya bato ya kolongobana ekokóma na bozwi.+
12 Nzela mosusu emonanaka na miso ya moto ete ebongi,+ kasi na nsima, nsuka na yango nde banzela ya liwa.+
13 Ata kati na kosɛka motema ekoki kozala na mpasi;+ mpe esengo esukaka nde na mawa.+
14 Ye oyo azangi bosembo na motema akotonda na mbuma ya banzela na ye moko,+ nde moto malamu akotonda na mbuma ya misala na ye.+
15 Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso,+ kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.+
16 Moto ya bwanya abangaka mpe alongwaka na mabe,+ kasi zoba akómaka na nkanda makasi mpe amityelaka motema.+
17 Ye oyo ayokaka nkanda noki akosala bozoba,+ kasi moto oyo azalaka na makoki ya kokanisa, bayinaka ye.+
18 Ya solo, bato oyo bazangi mayele bakozwa bozoba,+ kasi bato ya ekɛngɛ bakolata boyebi lokola eloko ya kolata na motó.+
19 Basali-mabe bakogumbama mpenza liboso ya bato malamu,+ mpe bato mabe bakogumbama na baporte ya moyengebene.
20 Moto oyo akelelá azalaka eloko ya koyinama ata epai ya moninga na ye,+ kasi baninga ya mozwi bazalaka ebele.+
21 Ye oyo azali kotyola moninga na ye azali kosala lisumu,+ kasi esengo na ye oyo azali komonisela bato ya mpasi boboto.+
22 Baoyo bazali kokana kosala mabe bakoyengayenga, boye te?+ Kasi motema boboto mpe bosolo ezali mpo na baoyo bazali kokana kosala malamu.+
23 Na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka,+ kasi liloba ya mbɛbu mpamba ememaka na kokelela.
24 Motole ya bato ya bwanya nde bomɛngo na bango; bozoba ya bazoba nde bozoba.+
25 Motatoli ya solo azali kobikisa milimo,+ kasi moto ya bokosi asopasopaka makambo ya lokuta mpenza.+
26 Moto oyo abangaka Yehova, atyelaka ye motema mingi,+ mpe bana na ye bakozwa ekimelo.+
27 Kobanga Yehova ezali liziba ya bomoi,+ mpo na kolongwa na mitambo ya liwa.+
28 Ebele ya bato nde biloko ya monzɛlɛ ya mokonzi,+ kasi kozanga bato nde libebi ya nkumu.+
29 Ye oyo ayokaka nkanda noki te azalaka na bososoli mingi,+ kasi ye oyo azali motema mokuse atombolaka bozoba.+
30 Motema ya kimya ezali bomoi ya nzoto ya mosuni,+ kasi zuwa nde kopɔla mpo na mikuwa.+
31 Ye oyo azali kobuba moto oyo azangá asambwisi Mokeli na ye,+ kasi moto oyo azali komonisela mobola boboto azali kopesa Ye nkembo.+
32 Mpo na mabe na ye, moto mabe akokweisama,+ kasi moyengebene akozwa ekimelo mpo na kozanga mbeba na ye.+
33 Bwanya efandaka na motema ya moto ya mayele,+ mpe eyebanaka na katikati ya bazoba.
34 Boyengebene nde etombolaka ekólo,+ kasi lisumu ezali eloko moko ya nsɔni mpo na bituluku ya bato ya bikólo.+
35 Mokonzi asepelaka na mosaleli oyo azali kosala na mayele ya kososola,+ kasi nkɛlɛ na ye eyelaka ye oyo asalaka na ndenge ya nsɔni.+