Marko 9:1-50

9  Lisusu, alobaki na bango ete: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Bato mosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa bakoyoka ata nsolo ya liwa te liboso bámona bokonzi ya Nzambe eyei na nguya.”+  Na yango nsima ya mikolo motoba, Yesu akamataki Petro ná Yakobo ná Yoane, mpe amemaki bango na ngomba moko molai, bango moko kaka. Mpe abongwanaki liboso na bango,+  mpe bilamba na ye ya likoló ekómaki ngɛlingɛli, mpɛmbɛ makasi mpenza oyo ata mosukoli-bilamba moko te awa na mabele akoki kopɛtola yango bongo.+  Lisusu, Eliya ná Moize babimelaki bango, mpe bazalaki kosolola na Yesu.+  Mpe ntango Petro amonaki bongo alobaki na Yesu ete: “Rabi, ezali malamu tózala awa, boye tótɛlɛmisa bahema misato, moko ya yo mpe moko ya Moize mpe moko ya Eliya.”+  Ya solo, ayebaki te aloba nini, mpo bakómaki kobanga mingi.  Mpe lipata moko esalemaki, ezipaki bango na elili na yango, mpe mongongo+ moko eutaki na lipata yango ete: “Oyo azali Mwana na ngai+ ya bolingo; bóyoka ye.”+  Nzokande, na mbala moko batalaki epai na epai mpe bamonaki moto mosusu te elongo na bango, kaka Yesu ye moko.+  Ntango bazalaki kokita na ngomba, apesaki bango mitindo makasi ete báyebisa moto te+ makambo oyo bamonaki, tii nsima wana Mwana ya moto akokufa mpe akosekwa.+ 10  Mpe batyaki liloba wana na motema, kasi bazalaki kotunana mpo na koyeba soki kokufa mpe kosekwa yango elimboli nini. 11  Mpe babandaki kotuna ye mituna, balobi: “Mpo na nini bakomeli balobaka ete Eliya+ asengeli koya liboso?”+ 12  Alobaki na bango ete: “Eliya asengeli koya liboso mpe kobongisa makambo nyonso;+ kasi ndenge nini yango eyokani na oyo ekomamá ete Mwana ya moto asengeli komona bampasi mingi+ mpe kotalelama lokola eloko mpamba?+ 13  Kasi nazali koloba na bino ete: Eliya+ asilá mpenza koya, mpe basalaki ye makambo nyonso oyo balingaki, kaka ndenge ekomamá mpo na ye.”+ 14  Nzokande, ntango bakómaki epai ya bayekoli mosusu, bamonaki ebele moko ya bato zingazinga na bango mpe bakomeli bazalaki kotyana ntembe ná bango.+ 15  Kasi ntango ebele nyonso wana ya bato bamonaki ye bakamwaki mingi, mpe, bakendaki mbangu epai na ye, babandaki kopesa ye mbote. 16  Mpe atunaki bango ete: “Likambo nini bozali kotyana na bango ntembe?” 17  Mpe moto moko na kati ya ebele yango ya bato ayanolaki ye ete: “Moteyi, namemeli yo mwana na ngai ya mobali mpo azali na elimo moko oyo akómisi ye baba;+ 18  mpe epai nyonso oyo akangaka ye abwakaka ye na mabele, mpe abimisaka fulufulu mpe alyaka mino na ye mpe asilaka makasi. Mpe nalobaki na bayekoli na yo ete bábimisa ye, kasi bakokaki te.”+ 19  Azongiselaki bango ete: “Ee libota ezangá kondima,+ nakoumela na bino tii ntango nini? Nakokanga motema na makambo na bino tii ntango nini? Bómemela ngai ye.”+ 20  Bongo bamemaki ye epai na ye. Kasi ntango elimo amonaki ye atutukisaki mwana yango, mpe nsima ya kokwea na mabele azalaki kaka kobalukabaluka, kobima fulufulu.+ 21  Mpe atunaki tata na ye ete: “Banda ntango nini likambo oyo ezali kokómela ye?” Alobaki ete: “Banda bomwana mpenza; 22  mpe mbala na mbala abwakaka ye na mɔtɔ mpe na mai mpo na koboma ye.+ Kasi soki okoki kosala mwa eloko, yokelá biso mawa mpe salisá biso.” 23  Yesu alobaki na ye ete: “Liloba wana, ‘Soki okoki’! Ya solo, makambo nyonso ekoki kosalema epai ya moto oyo azali na kondima.”+ 24  Na mbala moko, tata ya mwana yango ya moke agangaki, alobi: “Nazali na kondima! Salisá ngai na esika oyo nazali na bosɛnga na kondima!”+ 25  Yesu, ntango amonaki ete ebele moko ya bato bazali koya bango nyonso mbangu epai na bango, apamelaki+ elimo yango ya mbindo, alobaki na ye ete: “Yo elimo oyo okómisi moto oyo baba mpe obomi ye matoi, nalobi na yo ete, bimá na kati na ye mpe kokɔta lisusu epai na ye te.” 26  Mpe nsima ya koganga mpe kotutukisa ye mbala mingi elimo yango abimaki;+ mpe mwana yango akómaki lokola moto akufi, bongo bato mingi na kati na bango bazalaki koloba ete: “Akufi!” 27  Kasi Yesu asimbaki ye na lobɔkɔ mpe atɛlɛmisaki ye, mpe atɛlɛmaki.+ 28  Bongo nsima wana akɔtaki na ndako bayekoli na ye babandaki kotuna ye na nkuku ete: “Mpo na nini biso tokokaki kobimisa ye te?”+ 29  Mpe alobaki na bango ete: “Oyo ya motindo wana akoki kobima na nzela mosusu te kaka na libondeli.”+ 30  Balongwaki kuna bakei, mpe bakatisaki Galile, kasi alingaki te ete moto ayeba yango. 31  Mpo azalaki koteya bayekoli na ye mpe koyebisa bango ete: “Mwana ya moto akokabama na mabɔkɔ ya bato, mpe bakoboma ye,+ kasi atako akobomama, akosekwa mikolo misato na nsima.”+ 32  Nzokande, bazalaki kososola liloba yango te, mpe bazalaki kobanga kotuna ye mituna.+ 33  Mpe bakómaki na Kapernaume. Nzokande, ntango azalaki na kati ya ndako atunaki bango motuna ete: “Likambo nini bozalaki kowelana nzelanzela?”+ 34  Bafandaki nyɛɛ, mpo nzelanzela bazalaki kowelana mpo na koyeba nani aleki na kati na bango.+ 35  Bongo afandaki mpe abengaki bantoma zomi na mibale mpe alobaki na bango ete: “Soki moto alingi kozala moto ya liboso, asengeli kozala moto ya nsuka ya bato nyonso mpe mosaleli ya bato nyonso.”+ 36  Mpe akamataki mwana moko ya moke, atɛlɛmisaki ye na katikati na bango mpe azingaki ye na mabɔkɔ na ye mpe alobaki na bango ete:+ 37  “Moto nyonso oyo ayambi moko ya bana mike ya boye mpo na nkombo na ngai, ayambi ngai; mpe moto nyonso oyo ayambi ngai, ayambi, kaka ngai moko te, kasi mpe moto oyo atindaki ngai.”+ 38  Yoane alobaki na ye ete: “Moteyi, tomonaki moto moko azali kobimisa bademo na nkombo na yo mpe tomekaki kopekisa ye,+ mpamba te azalaki kotambola elongo na biso te.”+ 39  Kasi Yesu alobaki ete: “Bómeka kopekisa ye te, mpo moto moko te akosala mosala ya nguya na nkombo na ngai bongo na nsima akoka nokinoki kofinga ngai;+ 40  mpo moto oyo azali monguna na biso te azali na ngámbo na biso.+ 41  Mpo moto nyonso oyo apesi bino kɔpɔ+ ya mai ya komɛla mpo bozali bato ya Kristo,+ nazali koloba na bino solo, akobungisa mbano na ye soki moke te. 42  Kasi moto nyonso oyo abɛtisi libaku moko ya bato mike oyo bandimaka, ekokaki kozala malamu mpo na ye soki bákangisaka ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma, lokola oyo mpunda ebalolaka, mpe abwakama mpenza na mbu.+ 43  “Mpe soki lobɔkɔ na yo ebɛtisi yo libaku, katá yango; eleki malamu okɔta na bomoi ebɔsɔnɔ na esika ya kokende na mabɔkɔ mibale na Gehena, na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.+ 44  —— 45  Mpe soki lokolo na yo ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango; eleki malamu mpo na yo kokɔta na bomoi motɛngumi+ na esika ya kobwakama na makolo mibale na Gehena.+ 46  —— 47  Mpe soki liso na yo ezali kobɛtisa yo libaku, bwaká yango;+ eleki malamu okɔta na bokonzi ya Nzambe na liso moko na esika ya kobwakama na miso mibale na Gehena,+ 48  epai nkusu na bango ekufaka te mpe mɔtɔ ebomamaka te.+ 49  “Mpo moto nyonso asengeli kotyama mungwa,+ mungwa yango nde mɔtɔ. 50  Mungwa ezalaka malamu mingi; kasi soki mungwa esili bokasi na yango, bokopesa yango elɛngi na nini?+ Bózala na mungwa+ na kati na bino, mpe bózalaka na kimya+ kati na bino.”

Maloba na nse