Marko 8:1-38

8  Na mikolo yango, wana ebele mpenza ya bato basanganaki lisusu mpe bazalaki na eloko ya kolya te, abengisaki bayekoli mpe alobaki na bango ete:+  “Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa,+ mpo mikolo misato mobimba, bazali pene na ngai mpe bazali na eloko ya kolya te;  mpe soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakokwea na nzela. Kutu, bamosusu na kati na bango bauti mosika.”  Kasi bayekoli na ye bayanolaki ye ete: “Epai wapi moto akoki kozwa mampa ya kotondisa bato oyo awa na esika oyo bato bazalaka te?”+  Nzokande atunaki bango ete: “Bozali na mampa boni?” Balobaki ete: “Nsambo.”+  Mpe asɛngaki ebele ya bato yango ete báfanda na nse, mpe akamataki mampa yango nsambo, apesaki matɔndi,+ abukaki yango, mpe abandaki kopesa yango bayekoli na ye mpo bákabola yango, mpe bakabolaki yango na ebele yango ya bato.+  Bazalaki mpe na mwa ndambo ya mbisi ya mike; mpe, nsima ya kopambola yango, ayebisaki bango ete bákabola mpe yango.+  Bongo balyaki mpe batondaki, mpe balɔkɔtaki biteni oyo etikalaki: kitunga nsambo mɛkɛ ya biloko.+  Nzokande, mibali bazalaki soki nkóto minei (4 000). Nsukansuka azongisaki bango.+ 10  Mpe na mbala moko amataki na masuwa elongo na bayekoli na ye mpe akómaki na etúká ya Dalamanuta.+ 11  Awa Bafarisai babimaki mpe babandaki kotyana na ye ntembe, basɛngi ye elembo moko oyo euti na likoló, mpo na komeka ye.+ 12  Bongo alelaki makasi+ na elimo na ye, mpe alobaki ete: “Mpo na nini libota oyo ezali kosɛnga elembo? Ya solo nazali koloba ete: Bakopesa na libota oyo elembo moko te.”+ 13  Na yango atikaki bango, akɔtaki lisusu na masuwa, mpe akendaki na ngámbo mosusu. 14  Nzokande, babosanaki komema mampa, mpe bazalaki na eloko te na kati ya masuwa, kaka limpa moko mpamba.+ 15  Mpe abandaki kopesa bango mitindo polele mpe koloba ete: “Bófungola miso, bókeba na levire ya Bafarisai mpe na levire ya Erode.”+ 16  Bongo bakómaki kolobana bango na bango mpo bazalaki na mampa te.+ 17  Ntango amonaki bongo, alobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali kolobana bino na bino mpo bozali na mampa te?+ Naino boyebi kaka te mpe bokangi ntina te? Bozali nde na mitema ya kososola noki te?+ 18  ‘Atako bozali na miso, bozali komona te; mpe atako bozali na matoi, bozali koyoka te?’+ Mpe bobosani nde, 19  ntango nabukaki mampa mitano+ mpo na mibali nkóto mitano (5 000), bolɔkɔtaki bakitunga boni oyo etondi na bitenibiteni oyo etikalaki?” Balobaki na ye ete: “Zomi na mibale.”+ 20  “Ntango nabukaki mampa nsambo mpo na mibali nkóto minei (4 000), bolɔkɔtaki bakitunga boni oyo etondi na bitenibiteni oyo etikalaki?” Mpe balobaki na ye ete: “Nsambo.”+ 21  Na yango alobaki na bango ete: “Bokangi naino ntina te?”+ 22  Nzokande bakómaki na Betesaida. Awa bato bamemelaki ye moto moko oyo akufá miso, mpe babondelaki ye ete asimba+ ye. 23  Mpe asimbaki moto yango oyo akufá miso na lobɔkɔ, amemaki ye na libándá ya mboka, mpe, wana abwakaki nsoi+ na miso na ye, atyelaki ye mabɔkɔ mpe abandaki kotuna ye ete: “Ozali komona eloko?” 24  Mpe moto yango atalaki mpe abandaki koloba ete: “Nazali komona bato, mpo nazali komona biloko moko boye lokola banzete, kasi ezali kotambola.” 25  Na nsima, atyaki mabɔkɔ na ye lisusu na miso ya moto yango, mpe moto yango amonaki polele, mpe abikaki, mpe azalaki komona eloko nyonso ndenge yango ezali mpenza. 26  Bongo azongisaki ye na ndako na ye, alobi: “Kasi kokɔta na mboka te.”+ 27  Yesu ná bayekoli na ye bakendaki na ntango yango na bamboka ya Kaisaria ya Filipe, mpe na nzela abandaki kotuna bayekoli na ye motuna, alobi na bango: “Bato bazali koloba ete nazali nani?”+ 28  Balobaki na ye ete: “Yoane Mobatisi,+ mpe bamosusu: Eliya,+ bamosusu mpe: Moko ya basakoli.”+ 29  Mpe atunaki bango motuna ete: “Bongo bino bolobi ete nazali nani?” Petro ayanolaki ye ete: “Ozali Kristo.”+ 30  Na yango, apekisaki bango makasi ete báyebisa moto eloko moko te na oyo etali ye.+ 31  Lisusu, abandaki koteya bango ete Mwana ya moto asengeli komona mpasi mingi mpe koboyama na mikóló ná banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli mpe kobomama,+ mpe kosekwa mikolo misato na nsima.+ 32  Ya solo, azalaki koloba likambo yango polelepolele. Kasi Petro abendaki ye pembeni mpe abandaki kopamela ye.+ 33  Abalukaki, atalaki bayekoli na ye mpe apamelaki Petro, mpe alobaki ete: “Leká nsima na ngai, Satana, mpo ozali kokanisa makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”+ 34  Bongo abengaki ebele yango ya bato ná bayekoli epai na ye mpe alobaki na bango ete: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.+ 35  Mpo moto nyonso oyo alingi kobikisa molimo na ye akobungisa yango; kasi moto nyonso oyo abungisi molimo na ye mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu akobikisa yango.+ 36  Kutu, litomba nini moto azali na yango na kozwa mokili mobimba mpe kobungisa molimo na ye?+ 37  Eloko nini, kutu, moto akoki kopesa na esika ya molimo na ye?+ 38  Mpo moto nyonso oyo azali koyoka nsɔni mpo na ngai mpe mpo na maloba na ngai na libota oyo ya ekobo mpe ya masumu, Mwana ya moto mpe akoyoka nsɔni+ mpo na ye ntango akoya na nkembo ya Tata na ye elongo na baanzelu basantu.”+

Maloba na nse