Marko 7:1-37
7 Nzokande Bafarisai mpe bakomeli mosusu oyo bautaki Yerusaleme bayanganaki epai na ye.+
2 Mpe ntango bamonaki bayekoli na ye mosusu bazali kolya biloko na bango na mabɔkɔ mbindo, elingi koloba, oyo esukwami te+—
3 mpo Bafarisai ná Bayuda nyonso balyaka te kozanga kosukola mabɔkɔ kino na molɔku, bakangamaka makasi na bonkɔkɔ oyo euti na bato ya bantango ya kala,
4 mpe, ntango bauti na zando, balyaka te soki bamipɛtoli te na komimwangisa mai; mpe ezali na mimeseno+ mosusu mingi oyo bazwaki mpe bakangamá na yango makasi: kozindisa* bakɔpɔ, ná bilokó, mpe bambɛki ya motako na kati ya mai;+—
5 bongo Bafarisai ná bakomeli yango batunaki ye ete: “Mpo na nini bayekoli na yo bazali komitambwisa te na kolanda bonkɔkɔ oyo euti na bato ya kala, kasi bazali kolya biloko na mabɔkɔ mbindo?”+
6 Alobaki na bango ete: “Yisaya asakolaki malamu mpo na bino, bakosi, se ndenge ekomamá:+ ‘Bato oyo bazali kokumisa ngai na mbɛbu na bango, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai.+
7 Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.’+
8 Botiki mobeko ya Nzambe, bozali kokangama makasi na bonkɔkɔ ya bato.”+
9 Lisusu, alobaki na bango ete: “Na mayele, bozali kotya mobeko+ ya Nzambe pembeni mpo na kobatela bonkɔkɔ na bino.
10 Na ndakisa, Moize alobaki ete: ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo,’+ mpe, ‘Moto oyo afingi tata to mama akufa.’+
11 Kasi bino bozali koloba: ‘Soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye ete: “Eloko nyonso nazali na yango oyo okoki kozwela litomba ezali korbani,+ (elingi koloba, likabo oyo napesi+ Nzambe,)”’—
12 bozali kotika ye asala lisusu ata eloko moko te mpo na tata na ye to mama na ye,+
13 na bongo, bozali kokómisa liloba ya Nzambe+ eloko mpamba na bonkɔkɔ na bino oyo bopesaki. Mpe bosalaka makambo mingi+ ya ndenge wana.”
14 Bongo abengaki lisusu ebele yango ya bato epai na ye, abandaki koloba na bango ete: “Bóyoka ngai, bino nyonso, mpe bókanga ntina.+
15 Eloko moko te oyo euti na libándá ya moto mpe ekɔti na kati na ye ekoki kokómisa ye mbindo; kasi makambo oyo ebimaka na moto nde makambo oyo ekómisaka moto mbindo.”+
16 ——
17 Nzokande ntango akɔtaki na ndako moko mosika na ebele yango ya bato, bayekoli na ye babandaki kotuna ye mituna na ntina na ndakisa yango.+
18 Bongo alobaki na bango ete: “Bino mpe bozangi bososoli lokola bango?+ Boyebi te ete eloko oyo euti na libándá mpe ekɔti na moto ekoki kokómisa ye mbindo te,
19 mpo ezali kokɔta, na motema na ye te, kasi nde na misɔpɔ na ye, mpe ebimaka libándá na kabinɛ?”+ Na bongo, atángaki biloko nyonso ya kolya pɛto.+
20 Lisusu, alobaki ete: “Oyo ebimaka na moto nde ekómisaka moto mbindo;+
21 mpo na kati, na motema ya bato+ nde makanisi ya mabe ebimaka: misala ya pite,+ koyiba, koboma bato,+
22 misala ya ekobo, kolula biloko ya bato,+ misala ya motema mabe, kokosa, etamboli ya nsɔni,+ liso ya likunya, kofinga, lofundo, bozoba.
23 Makambo nyonso wana ya mabe eutaka na kati mpe ekómisaka moto mbindo.”+
24 Alongwaki kuna mpe akendaki na bitúká ya Tire mpe ya Sidone.+ Mpe akɔtaki na ndako moko mpe alingaki te ete moto ayeba yango. Atako bongo akokaki kobombama te;+
25 kasi na mbala moko mwasi moko oyo mwana na ye ya moke ya mwasi azalaki na elimo ya mbindo ayokaki nsango na ye mpe ayaki mpe afukamaki elongi na nse na makolo na ye.+
26 Mwasi yango azalaki Mogrɛki, moto ya Fenisia ya Siri; mpe azalaki kosɛnga ye ete abimisa demo yango na mwana na ye ya mwasi.+
27 Kasi abandaki na koloba na mwasi yango ete: “Tiká bana bátonda naino, mpo ezali malamu te kokamata mampa ya bana+ mpe kobwakela yango bana ya mbwa.”+
28 Nzokande, azongiselaki ye ete: “Ɛɛ, tata, kasi bana ya mbwa na nse ya mesa balyaka pumbulu+ ya bana mike.”+
29 Bongo alobaki na ye ete: “Lokola olobi bongo, kende; demo wana abimi na mwana na yo ya mwasi.”+
30 Bongo akendaki epai na ye mpe akutaki+ mwana yango ya moke alali na mbeto mpe demo yango abimi.
31 Nzokande autaki na bitúká ya Tire mpe akatisaki Sidone mpo na kokende na mbu ya Galile, akatisaki na katikati ya bitúká ya Dekapolisi.+
32 Awa bamemelaki ye moto moko oyo akufá matoi mpe azalaki na mokakatano ya koloba, mpe babondelaki ye ete atyela ye mabɔkɔ.+
33 Mpe alongolaki ye na kati ya ebele yango ya bato, atyaki ye pembeni, mpe atyaki misapi na ye na matoi ya moto yango mpe, nsima ya kobwaka nsoi, asimbaki lolemo na ye.+
34 Mpe wana atalaki likoló,+ apemaki+ makasi mpe alobaki na ye ete: “Efata,” elingi koloba: “Fungwamá.”
35 Bongo makoki na ye ya koyoka efungwamaki,+ mpe nsinga ya lolemo na ye efungwamaki, mpe abandaki koloba malamu.
36 Na yango, apekisaki bango ete báyebisa moto te;+ kasi soki kaka apekisi bango, wana nde basakoli lisusu koleka.+
37 Ya solo, bakamwaki+ na ndenge moko ya nsɔmɔ mpe balobaki ete: “Asali makambo nyonso malamu. Azali ata koyokisa bato bakufá matoi mpe kolobisa bato oyo balobaka te.”+
Maloba na nse
^ Lil., “batisimo.”