Marko 5:1-43

5  Bakómaki bongo na ngámbo mosusu ya mbu na mokili ya Bageraza.+  Mpe nokinoki nsima ya kobima na masuwa, moto moko oyo azalaki kotambwisama na nguya ya elimo moko ya mbindo akutanaki na ye, auti na malita.+  Azalaki kofanda na kati ya malita yango; mpe tii ntango wana, moto moko te akokaki kokanga ye ata monyɔlɔlɔ,  mpamba te mbala mingi bazalaki kokanga ye na bikangeli mpe na minyɔlɔlɔ, kasi azalaki kokata minyɔlɔlɔ mpe bikangeli ezalaki kobukana; mpe moto moko te azalaki na makasi ya kotosisa ye.  Mpe ntango nyonso, butu moi, azalaki koganga na malita mpe na bangomba mpe azalaki komizokisa na mabanga.  Kasi ntango amonaki Yesu na mosika apotaki mbangu mpe agumbamelaki ye,  mpe, ntango agangaki na mongongo makasi,+ alobaki ete: “Ngai na yo likambo nini, Yesu, Mwana ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló?+ Nalapisi yo ndai+ na nkombo ya Nzambe ete onyokola ngai te.”+  Mpo azalaki koloba na ye ete: “Bimá na nzoto ya moto oyo, yo elimo ya mbindo.”+  Kasi abandaki kotuna ye ete: “Nkombo na yo nani?” Mpe alobaki na ye ete: “Nkombo na ngai Limpinga,+ mpo tozali mingi.”+ 10  Mpe abondelaki ye mbala mingi ete abengana bilimo yango na mokili yango te.+ 11  Nzokande etonga moko monene ya bangulu+ ezalaki kolya kuna na ngomba.+ 12  Bongo babondelaki ye ete: “Tindá biso na kati ya bangulu, mpo tókɔta na kati na yango.” 13  Mpe apesaki bango nzela. Na yango, bilimo ya mbindo babimaki mpe bakɔtaki na kati ya bangulu; mpe etonga emibwakaki banda na esika ya likoló ya lobwaku tii na mbu, ezalaki soki nkóto mibale (2 000), mpe ezindaki na mbu moko nsima na mosusu.+ 14  Kasi babateli ya etonga yango bakimaki mpe bayebisaki yango na engumba mpe na bamboka ya zamba; mpe bato bayaki kotala likambo oyo esalemaki.+ 15  Bongo bayaki epai ya Yesu, mpe bamonaki moto oyo azalaki na bademo afandi, alati bilamba mpe akómi na makanisi malamu, ye moto oyo azalaki na limpinga ya bademo; mpe babangaki. 16  Lisusu, baoyo bamonaki likambo yango bayebisaki bango ndenge esalemaki epai ya moto oyo azalaki na bademo mpe likambo ya bangulu. 17  Na bongo, babandaki kobondela ye ete alongwa na bitúká na bango.+ 18  Sikoyo lokola azalaki kokɔta na masuwa, moto oyo azalaki na bademo abandaki kobondela ye ete akende elongo na ye.+ 19  Nzokande, apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye ete: “Kende na ndako epai ya bato ya libota na yo,+ mpe yebisá bango makambo nyonso oyo Yehova+ asaleli yo mpe ndenge ayokeli yo mawa.”+ 20  Mpe akendaki mpe abandaki kosakola na Dekapolisi+ makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye, mpe bato nyonso babandaki kokamwa.+ 21  Nsima wana Yesu akatisaki lisusu na masuwa na ngámbo mosusu, ebele mpenza ya bato bayanganaki esika moko epai na ye; mpe ye azalaki pembeni ya mbu.+ 22  Nde moko ya bakambi ya sinagoga, nkombo na ye Yairuse, ayaki mpe, ntango amonaki ye, akweaki na makolo na ye+ 23  mpe abondelaki ye mbala mingi, alobi: “Mwana na ngai ya moke ya mwasi akómi mpenza na nsuka. Nalɔmbi yo, yaká mpe tyá mabɔkɔ+ na yo likoló na ye mpo ayoka malamu mpe abika.”+ 24  Bongo akendaki elongo na ye. Mpe ebele mpenza ya bato bazalaki kolanda ye mpe kokanganakangana na ye.+ 25  Nzokande, mwasi moko azalaki na maladi ya kotanga makila+ mbula zomi na mibale,+ 26  mpe amonaki mpasi mingi na minganga ndenge na ndenge+ mpe asilisaki biloko na ye nyonso mpe azwaki litomba te, kutu, akómaki nde na mpasi koleka. 27  Ntango ayokaki makambo etali Yesu, ayaki nsimansima na kati ya ebele wana ya bato mpe asimbaki+ elamba na ye ya likoló; 28  mpo azalaki koloba ete: “Soki nasimbi kaka elamba na ye ya likoló nakobika.”+ 29  Mpe nokinoki liziba na ye ya makila ekaukaki, mpe ayokaki na nzoto na ye ete abiki na maladi wana ya mpasi.+ 30  Mpe, na mbala moko, Yesu ayebaki na kati na ye ete nguya+ ebimi na ye, mpe abalukaki na kati ya ebele yango ya bato mpe abandaki koloba ete: “Nani asimbi bilamba na ngai ya likoló?”+ 31  Kasi bayekoli na ye babandaki koloba na ye ete: “Ozali komona ebele wana ya bato ndenge bazali kokanganakangana na yo,+ mpe ozali koloba ete: ‘Nani asimbi ngai?’” 32  Nzokande, azalaki kotala epai na epai mpo na komona mwasi oyo asalaki bongo. 33  Kasi mwasi yango, na kobanga mpe na kolɛnga, lokola ayebaki nini ekómelaki ye, ayaki mpe akweaki liboso na ye mpe ayebisaki ye solo nyonso.+ 34  Alobaki na ye ete: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya,+ mpe biká na maladi na yo ya mpasi.”+ 35  Wana azalaki naino koloba, bato mosusu oyo bautaki na ndako ya mokambi ya sinagoga bayaki mpe balobaki ete: “Mwana na yo ya mwasi akufi! Mpo na nini kotungisa moteyi lisusu?”+ 36  Kasi Yesu, ayokaki, kaka boye, liloba oyo elobamaki, alobaki na mokambi ya sinagoga ete: “Kobanga te, monisá kaka kondima.”+ 37  Nzokande apesaki moto moko te nzela alanda ye, longola kaka Petro ná Yakobo ná Yoane ndeko ya Yakobo.+ 38  Bongo bakómaki na ndako ya mokambi ya sinagoga, mpe amonaki yikiyiki makasi mpe baoyo bazalaki kolela mpe koganga na komilelalela mingi, 39  mpe, nsima ya kokɔta, alobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali kotya yikiyiki makasi mpe kolela? Mwana moke oyo akufi te, kasi alali nde mpɔngi.”+ 40  Na yango, babandaki kosɛka ye na lityo. Kasi, nsima ya kobimisa bango nyonso libándá, akamataki tata ná mama ya mwana moke yango mpe baoyo bazalaki elongo na ye, mpe akɔtaki epai mwana yango ya moke azalaki.+ 41  Mpe azwaki lobɔkɔ ya mwana yango ya moke, alobi na ye: “Talita kumi,” oyo, soki babongoli, elakisi: “Elenge mwasi, nalobi na yo: Tɛlɛmá!”+ 42  Mpe na mbala moko elenge mwasi yango atɛlɛmaki mpe abandaki kotambola, mpamba te azalaki na mbula zomi na mibale. Mpe na mbala moko bazalaki bango lisusu te, bazalaki na esengo makasi.+ 43  Kasi alobaki na bango mbala na mbala ete báyebisa moto moko likambo yango te,+ mpe alobaki ete bápesa mwana mwasi yango eloko ya kolya.

Maloba na nse