Marko 16:1-20

16  Bongo ntango sabata+ elekaki, Maria Magadalena,+ mpe Maria mama ya Yakobo, mpe Salome basombaki matiti ya nsolo kitoko mpo na koya mpe kopakola ye.+  Mpe na ntɔngɔntɔngɔ na mokolo ya liboso+ ya pɔsɔ bayaki na lilita, nsima ya kobima ya moi.+  Mpe bazalaki kolobana bango na bango ete: “Nani akobalolela biso libanga oyo elongwa na monɔkɔ ya lilita?”  Kasi ntango batalaki, bamonaki ete libanga ebalolami, atako ezalaki monene mingi.+  Ntango bakɔtaki na lilita, bamonaki elenge mobali moko afandi na lobɔkɔ ya mobali mpe alati zambala moko ya mpɛmbɛ, mpe bayokaki nsɔmɔ.+  Alobaki na bango ete: “Bótika koyoka nsɔmɔ. Bozali koluka Yesu Monazarete, oyo babakaki na nzete.+ Alamuki,+ azali awa te. Bótala! Esika balalisaki ye.+  Kasi bókende, bóyebisa bayekoli na ye mpe Petro ete: ‘Akei liboso na bino na Galile;+ kuna nde bokomona ye, ndenge ayebisaki bino.’”+  Bongo ntango babimaki, bakimaki banda na lilita yango mpo kolɛnga ná nsɔmɔ makasi ekangaki bango. Mpe bayebisaki moto moko likambo te, mpo bazalaki na kobanga.+ BOSUKISI YA MOKUSE Bamaniskri mosusu mpe mabongoli mosusu ya nsima ezali na bosukisi oyo ya mokuse nsima ya Marko 16:8: Kasi makambo nyonso oyo etindamaki bayebisaki yango na mokuse epai ya baoyo bazalaki zingazinga na Petro. Lisusu, nsima ya makambo wana, na nzela na bango, Yesu ye moko atindaki banda na ɛsti tii na wɛsti kosakolama mosantu mpe oyo ekoki kobeba te ya lobiko ya seko. BOSUKISI YA MOLAI Bamaniskri mosusu ya kala (ACD) mpe mabongoli mosusu (VgSyc,p) ebakisi bosukisi oyo ya molai, kasi oyo אBSysArm elobeli te:  Nsima ya kosekwa na ntɔngɔntɔngɔ na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, abimelaki liboso Maria Magadalena, oyo ye abimisaki bademo nsambo na kati na ye. 10  Akendaki mpe apesaki nsango epai na baoyo bazalaki elongo na ye, mpo bazalaki na mawa mpe kolela. 11  Kasi bango, ntango bayokaki nsango ete azongi na bomoi mpe mwasi wana amonaki ye, bandimaki te. 12  Lisusu, nsima ya makambo wana abimaki na ndenge mosusu epai ya mibale na bango oyo bazalaki kotambola elongo, ntango bazalaki kokende na mboka; 13  mpe bazongaki mpe bapesaki bamosusu nsango. Bandimaki mpe bango te. 14  Kasi na nsima, abimelaki bazomi na moko bango mpenza ntango bafandaki na mesa, mpe apamelaki bango na ndenge bazangaki kondima mpe mpo na motó makasi na bango, mpo bandimaki te baoyo bamonaki ye ete alamuki na bakufi. 15  Mpe alobaki na bango ete: “Bókende na mokili mobimba mpe bósakola nsango malamu epai ya bozalisi nyonso. 16  Moto oyo azali kondima mpe azwi batisimo akobika, kasi moto oyo azali kondima te akokweisama likambo. 17  Lisusu, bilembo oyo ekozala na baoyo bakondima: Ntango bakosalela nkombo na ngai bakobimisa bademo, bakoloba na minɔkɔ mosusu, 18  mpe na mabɔkɔ na bango bakolɔkɔta banyoka, mpe soki bamɛli eloko moko oyo ebomaka ekosala bango mabe soki moke te. Bakotya mabɔkɔ na bango likoló ya bato ya maladi, mpe bato yango bakobika.” 19  Bongo Nkolo Yesu, nsima ya koloba na bango, akamatamaki na likoló mpe afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe. 20  Na yango, babimaki mpe basakolaki bipai nyonso, wana Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe kosimba nsango yango na bilembo oyo ezalaki kokende nzela moko na yango.

Maloba na nse