Marko 15:1-47
15 Mpe na mbala moko ntango ntɔngɔ ebandaki kotana banganga-nzambe bakonzi elongo na mikóló mpe bakomeli, ɛɛ Sanedrina mobimba, basalaki likita,+ mpe bakangaki Yesu bansinga mpe bakendaki na ye mpe bakabaki ye epai ya Pilate.+
2 Bongo Pilate atunaki ye motuna ete: “Yo ozali mokonzi+ ya Bayuda?” Azongiselaki ye ete: “Yo moko olobi yango.”+
3 Kasi banganga-nzambe bakonzi babandaki kofunda ye na makambo mingi.+
4 Nzokande Pilate abandaki kotuna ye lisusu ete: “Ozali na eyano ya kopesa te?+ Talá ebele ya bifundeli bazali kofunda yo na yango.”+
5 Kasi Yesu apesaki eyano mosusu te, mpe Pilate abandaki kokamwa.+
6 Nzokande, na fɛti nyonso azalaki kobimisela bango moto moko ya bolɔkɔ, oyo bango bazalaki kosɛnga.+
7 Na ntango wana ezalaki na moto moko oyo bazalaki kobenga Barabasi oyo azalaki na minyɔlɔlɔ esika moko na batombokisi, oyo babomaki moto ntango batombokaki.+
8 Bongo ebele ya bato bamataki mpe babandaki kosɛnga ete asala ndenge amesaná kosalela bango.
9 Pilate ayanolaki bango ete: “Bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda?”+
10 Mpo ayebaki ete banganga-nzambe bakonzi bakabaki ye+ nde mpo na likunya.+
11 Kasi banganga-nzambe bakonzi bapusaki ebele yango ya bato bátinda ye abimisela bango nde Barabasi.+
12 Lisusu Pilate azalaki kozongisela bango ete: “Bongo nasala nini na moto oyo bozali kobenga ete mokonzi+ ya Bayuda?”+
13 Mbala moko lisusu bagangaki ete: “Baká ye na nzete!”+
14 Kasi Pilate alobaki na bango lisusu ete: “Mpo na nini, mabe nini asali?” Atako bongo bagangaki lisusu makasi koleka ete: “Baká ye na nzete!”+
15 Na yango Pilate, mpo na koluka kosepelisa ebele yango ya bato,+ abimiselaki bango Barabasi, mpe, nsima ya kobɛtisa Yesu fimbo, akabaki ye mpo bábaka ye na nzete.+
16 Basoda bakendaki na ye sikoyo na kati ya lopango, elingi koloba, na ndako ya guvɛrnɛrɛ; mpe babengisaki etuluku mobimba ya basoda,+
17 mpe balatisaki ye elamba ya mo-tane-bulé mpe batongaki motole ya nzubɛ mpe balatisaki ye yango.+
18 Mpe babandaki kopesa ye mbote ete: “Mbote,+ yo Mokonzi ya Bayuda!”
19 Bazalaki mpe kobɛta ye na motó na mongendu mpe kobwakela ye nsoi mpe, bazalaki kogumba mabɔlɔngɔ na bango, kopesa ye lokumu.+
20 Na nsuka, ntango basilisaki kosɛkasɛka ye, balongolaki ye elamba ya motane-bulé mpe balatisaki ye bilamba na ye ya likoló. Mpe bamemaki ye na libándá mpo na kobaka ye na nzete.+
21 Mpe bazwaki na makasi moleki-nzela moko, Simo moko boye ya Sirene, autaki na mboka ya zamba, tata ya Alezandre mpe Rufusi, mpo amema nzete na ye ya mpasi.+
22 Bongo bamemaki ye na esika ebengami Golgota, oyo soki babongoli, elakisi Esika ya Mokuwa ya Motó.+
23 Awa bamekaki kopesa ye vinyo esangisami na elangwiseli mire,+ kasi alingaki komɛla yango te.+
24 Mpe babakaki ye na nzete mpe babwakaki mbɛsɛ mpo na kokabola bilamba+ na ye ya likoló mpo na koyeba nani akokamata nini.+
25 Ezalaki bongo ngonga ya misato,+ mpe babakaki ye na nzete.
26 Mpe likomi ya likambo oyo bafundaki+ ye na yango ekomamaki na likoló ete: “Mokonzi ya Bayuda.”+
27 Lisusu, babakaki miyibi mibale elongo na ye, moko na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+
28 ——
29 Mpe baoyo bazalaki koleka wana bazalaki kofinga+ ye, koningisa mitó na bango mpe koloba ete: “Ɛɛ! Yo moto olingaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato,+
30 omibikisa yo moko, okita na nzete ya mpasi.”+
31 Ndenge moko mpe banganga-nzambe bakonzi bazalaki kosɛkasɛka bango na bango elongo na bakomeli mpe bazalaki koloba ete: “Abikisaki bamosusu; akoki komibikisa ye moko te!+
32 Kristo Mokonzi ya Yisraele akita sikoyo na nzete ya mpasi, mpo tómona mpe tóndima.”+ Ata baoyo babakamaki esika moko na ye bazalaki kofinga ye.+
33 Ntango ekómaki ngonga ya motoba molili ekɔtaki na mokili wana mobimba tii na ngonga ya libwa.+
34 Mpe na ngonga ya libwa Yesu abelelaki na mongongo makasi ete: “Eli, Eli, lama sabakatani?” oyo soki babongoli, elakisi ete: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?”+
35 Mpe bamosusu na kati ya baoyo batɛlɛmaki penepene, ntango bayokaki yango, babandaki koloba ete: “Talá! Azali kobenga Eliya.”+
36 Kasi moto moko apotaki mbangu, apɔlisaki linyuka moko na vinyo ya ngayi, atyaki yango na mongendu, mpe abandaki kopesa ye amɛla,+ alobi: “Tiká ye! Tótala soki Eliya akoya kokitisa ye.”+
37 Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema.+
38 Mpe rido+ ya esika mosantu epasukaki na mibale banda na likoló tii na nse.+
39 Nzokande, ntango mokonzi ya basoda oyo atɛlɛmaki liboso na ye amonaki ete akati motema na ntango makambo wana ezalaki kosalema, alobaki ete: “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.”+
40 Basi mosusu mpe bazalaki kotala na mosika,+ na kati na bango Maria Magadalena mpe Maria mama ya Yakobo Moke mpe Yose mpe Salome,+
41 oyo bazalaki kotambola na ye+ mpe kosalela ye ntango azalaki na Galile, mpe basi mosusu mingi oyo bamataki elongo na ye na Yerusaleme.+
42 Bongo nsima ya midi, lokola ngonga epusanaki mpenza, mpe lokola ezalaki ntango ya Bolɛngɛli, elingi koloba mokolo oyo ezalaka liboso ya sabata,
43 Yozefe ya Arimatea ayaki, ye moko ya basambisi ya lokumu mingi ya Sanedrina, ye moko mpe azalaki kozela bokonzi ya Nzambe.+ Azwaki mpiko ya kokende liboso ya Pilate mpe asɛngaki nzoto+ ya Yesu.
44 Kasi Pilate akamwaki mpe amitunaki soki asilaki mpenza kokufa, mpe abengaki mokonzi ya basoda, atunaki ye soki asilaki kokufa.
45 Bongo nsima ya koyeba likambo yango malamumalamu epai ya mokonzi ya basoda, apesaki Yozefe ebembe yango.+
46 Na yango asombaki lini ya kitoko mpe akitisaki ye, azingaki ye na lini yango ya kitoko mpe alalisaki ye+ na lilita+ oyo batimolá na kati ya mabanga; mpe abalolaki libanga tii na monɔkɔ ya lilita yango.+
47 Kasi Maria Magadalena ná Maria mama ya Yose bazalaki kaka kotala esika oyo alalisamaki.+