Marko 14:1-72
14 Nzokande, etikalaki mikolo mibale elekeli+ mpe fɛti+ ya bagato ezangá levire ekoka.+ Mpe banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli bazalaki koluka ndenge ya kokanga ye na mayele mabe mpe koboma ye;+
2 mpo mbala na mbala bazalaki koloba ete: “Na fɛti te; ntango mosusu bato bakobimisa yikiyiki.”+
3 Mpe ntango azalaki na Betania na ndako ya Simo moto ya maba,+ wana afandaki mpo na kolya, mwasi moko ayaki na molangi* ya mafuta ya nsolo kitoko, narda ya solosolo, ya ntalo mingi. Nsima ya kobuka molangi yango, abandaki kosopela ye yango na motó.+
4 Kasi ezalaki na bamosusu oyo bazalaki kolobana bango na bango na nkanda ete: “Mpo na nini kobebisa mafuta oyo ya nsolo kitoko boye?+
5 Mpo mafuta oyo ya nsolo kitoko bakokaki kotɛka yango denari koleka nkama misato (300) mpe kopesa yango babola!” Mpe bayokelaki ye nkanda makasi.+
6 Kasi Yesu alobaki ete: “Bótika ye. Mpo na nini bolingi kotungisa ye? Asaleli ngai likambo moko ya malamu.+
7 Mpo bozali na babola ntango nyonso,+ mpe na ntango nyonso oyo bolingi bokoki kosalela bango malamu, kasi ngai bozali na ngai ntango nyonso te.+
8 Asali oyo ekoki na ye; atye libelalibela mafuta ya nsolo kitoko na nzoto na ngai mpo na kokundama na ngai.+
9 Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Epai nyonso bakosakola nsango malamu na mokili mobimba,+ bakolobela mpe likambo mwasi oyo asali mpo na kokanisa ye.”+
10 Mpe Yudasi Mokeriota, moko ya bantoma zomi na mibale, akendaki epai ya ba-nganga-nzambe bakonzi mpo na kotɛka ye epai na bango.+
11 Ntango bayokaki yango, basepelaki mpe balakaki kopesa ye shekele ya palata.+ Bongo abandaki koluka libaku moko oyo ebongi mpo na kotɛka ye.+
12 Nzokande na mokolo ya liboso ya bagato ezangi levire,+ ntango bapesaka mbeka ya elekeli na ndenge ya momeseno, bayekoli na ye+ balobaki na ye ete: “Epai wapi olingi tókende kobongisela yo esika ya kolya elekeli?”+
13 Na yango atindaki mibale na kati ya bayekoli na ye mpe alobaki na bango ete: “Bókende na engumba, mpe moto moko oyo amemi mbɛki ya mai akokutana na bino.+ Bólanda ye,
14 mpe esika nyonso akokɔta, bóloba na nkolo-ndako ete: ‘Moteyi alobi: “Wapi ndako ya koyamba bapaya epai nakoki kolya elekeli+ elongo na bayekoli na ngai?”’+
15 Mpe akolakisa bino shambrɛ moko monene ya likoló, oyo ezali na biloko nyonso mpe elɛngɛlami malamu; mpe kuna bóbongisela biso.”+
16 Bongo bayekoli babimaki, mpe bakɔtaki na engumba mpe bakutaki makambo kaka ndenge alobaki na bango; mpe babongisaki elekeli.+
17 Nsima wana mpokwa ekómaki, ayaki elongo na bantoma zomi na mibale.+
18 Mpe ntango bafandaki na mesa bazali kolya, Yesu alobaki ete: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Moko na bino, oyo azali kolya+ elongo na ngai, akotɛka ngai.”+
19 Babandaki koyoka mawa mpe koloba na ye moko na moko ete: “Ezali ngai te, boye te?”+
20 Alobaki na bango ete: “Ezali moko ya bantoma zomi na mibale, oyo azali kokɔtisa lobɔkɔ elongo na ngai na kati ya saani moko.+
21 Ya solo, Mwana ya moto azali kokende, ndenge ekomamá mpo na ye, kasi mawa na moto oyo azali kotɛka Mwana ya moto! Elingaki kozala malamu koleka soki moto yango abotamaka te.”+
22 Mpe ntango bazalaki kokoba kolya, akamataki limpa, abondelaki, abukaki yango mpe apesaki bango yango, mpe alobaki ete: “Bókamata yango, oyo elakisi nzoto na ngai.”+
23 Mpe akamataki kɔpɔ, apesaki matɔndi mpe apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamɛlaki yango.+
24 Mpe alobaki na bango ete: “Oyo elakisi ‘makila+ ya kondimana’+ na ngai, oyo ekosopama+ mpo na bato mingi.+
25 Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Nakomɛla lisusu eloko oyo euti na nzete ya vinyo te tii mokolo oyo nakomɛla yango ya sika na kati ya bokonzi ya Nzambe.”+
26 Na nsuka, nsima ya koyemba nzembo ya masanzoli,+ babimaki bakei na Ngomba ya Olive.+
27 Mpe Yesu alobaki na bango ete: “Bino nyonso bokobɛta libaku, mpamba te ekomamá ete: ‘Nakobɛta mobateli ya mpate,+ mpe bampate ekopanzana.’+
28 Kasi nsima ya kolamuka na ngai uta na bakufi, nakokende na Galile liboso na bino.”+
29 Kasi Petro alobaki na ye ete: “Ata soki bamosusu nyonso babɛti libaku, kasi ngai te.”+
30 Na yango Yesu alobaki na ye ete: “Ya solo mpenza nalobi na yo ete: Lelo, ɛɛ, na butu oyo, liboso ete nsoso elela mbala mibale, okowangana ngai mbala misato.”+
31 Kasi abandaki lisusu koloba mingi ete: “Soki esengeli nakufa na yo, nakowangana yo soki moke te.” Bamosusu nyonso mpe babandaki koloba kaka bongo.+
32 Bongo bakómaki na esika moko nkombo na yango Getesemane, mpe alobaki na bayekoli na ye ete: “Bófanda awa ntango nazali kobondela.”+
33 Mpe akamataki Petro ná Yakobo ná Yoane+ elongo na ye, mpe abandaki kobulungana mpe kotungisama makasi.+
34 Mpe alobaki na bango ete: “Molimo na ngai eyoki mawa makasi,+ ɛɛ tii na liwa. Bótikala awa mpe bósɛnzɛla.”+
35 Mpe apusanaki mwa moke liboso, akweaki na mabele mpe abandaki kobondela ete, soki likoki ezali, ngonga wana eleka mosika na ye.+
36 Mpe alobaki lisusu ete: “Aba, Tata,+ makambo nyonso ekoki kosalema epai na yo; longolelá ngai kɔpɔ oyo. Nzokande, ezala te oyo ngai nalingi, kasi oyo yo olingi.”+
37 Mpe ayaki mpe akutaki bango balali mpɔngi, mpe alobaki na Petro ete: “Simo, ozali kolala mpɔngi? Ozwi makasi ya kosɛnzɛla ata ngonga moko te?+
38 Bósɛnzɛlaka mpe bóbondelaka,+ mpo bókwea na komekama te. Ya solo, elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”+
39 Mpe akendaki lisusu mpe abondelaki, azalaki koloba kaka maloba oyo wana.+
40 Mpe ayaki lisusu mpe akutaki bango balali mpɔngi, mpo miso na bango ezalaki kilo, bongo bayebaki eyano ya kopesa ye te.+
41 Mpe ayaki mbala ya misato mpe alobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali kolala mpɔngi mpe kopema na ntango ya boye? Ekoki! Ngonga ekoki!+ Talá! Mwana ya moto atɛkami na mabɔkɔ ya basumuki.+
42 Bótɛlɛma, tókende.+ Talá! Motɛki na ngai akómi pene.”+
43 Mpe na mbala moko, ntango azalaki naino koloba, Yudasi, moko ya bantoma zomi na mibale ayaki elongo na ebele ya bato oyo basimbi mipanga ná mangenda, bauti epai ya banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli mpe mikóló.+
44 Nzokande motɛki na ye apesaki bango elembo oyo bayokanaki na yango, alobi: “Moto oyo nakopwɛpwa, ezali ye; bókanga ye mpe bókɛngɛla ye malamumalamu na nzela.”+
45 Mpe akendaki mbala moko mpe apusanaki epai na ye mpe alobaki ete: “Rabi!” mpe apwɛpwaki+ ye na boboto mpenza.
46 Bongo batyaki ye mabɔkɔ mpe bakangaki ye.+
47 Nzokande, moko ya baoyo batɛlɛmaki wana abimisaki mopanga na ye mpe abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene mpe akataki ye litoi.+
48 Kasi Yesu azongiselaki bango ete: “Bobimi na mipanga mpe na mangenda mpo na kokanga ngai lokola nde boyeli moyibi moko boye?+
49 Mokolo na mokolo nazalaki elongo na bino na tempelo mpo na koteya,+ kasi bokangaki ngai te. Nzokande, ezali mpo Makomami+ ekokisama.”+
50 Mpe bango nyonso basundolaki+ ye mpe bakimaki.+
51 Kasi elenge mobali moko oyo alataki kaka elamba ya lini ya kitoko na nzoto abandaki kolanda ye penepene; mpe balukaki kokanga ye,+
52 kasi atikaki elamba na ye ya lini mpe akimaki bolumbu.
53 Bamemaki Yesu sikoyo epai ya nganga-nzambe monene, mpe banganga-nzambe bakonzi nyonso mpe mikóló mpe bakomeli bayanganaki.+
54 Kasi Petro, na mwa mosika, alandaki ye+ tii na kati ya lopango ya nganga-nzambe monene; mpe afandaki esika moko na bato ya misala ya ndako mpe azalaki koyɔta mɔtɔ oyo ezalaki kongɛngisa.
55 Na ntango yango banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba bazalaki koluka litatoli oyo ekokweisa Yesu mpo báboma ye,+ kasi bazalaki kozwa ata moko te.+
56 Ya solo, mingi bazalaki kopesa litatoli ya lokuta mpo na kokweisa ye,+ kasi matatoli na bango ezalaki koyokana te.+
57 Bamosusu mpe bazalaki kotɛlɛma mpe kopesa litatoli ya lokuta mpo na kokweisa ye, balobi:
58 “Toyokaki ye azali koloba ete: ‘Nakobuka tempelo oyo, esalemá na mabɔkɔ mpe na mikolo misato nakotonga mosusu esalemá na mabɔkɔ te.’”+
59 Kasi ata na likambo yango litatoli na bango ezalaki koyokana te.
60 Nsukansuka nganga-nzambe monene atɛlɛmaki na katikati na bango mpe atunaki Yesu ete: “Ozali kozongisa ata eloko te? Likambo nini bato oyo bazali kofunda yo na yango?”+
61 Kasi afandaki kaka nyɛɛ mpe apesaki ata eyano te.+ Nganga-nzambe monene abandaki lisusu kotuna ye mpe alobaki na ye ete: “Yo nde Kristo Mwana ya Oyo apambwamá?”+
62 Bongo Yesu alobaki ete: “Ezali ngai; mpe bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali+ ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe azali koya na mapata ya likoló.”+
63 Na yango, nganga-nzambe monene apasolaki bilamba+ na ye ya kati mpe alobaki ete: “Ntina nini tóluka lisusu batatoli?+
64 Boyoki ndenge afingi Nzambe.+ Bomoni boni?” Bango nyonso bakweisaki ye ete abongi na liwa.
65 Mpe bamosusu babandaki kobwakela ye nsoi+ mpe kozipa ye elongi mobimba mpe kobɛta ye makofi mpe koloba na ye ete: “Sakolá!” Mpe, nsima ya kobɛta ye bambata na elongi, bapolisi bakamataki ye.+
66 Nzokande wana Petro azalaki na nse na kati ya lopango, moko ya bana basi ya misala ya nganga-nzambe monene ayaki,+
67 mpe, ntango amonaki Petro azali koyɔta mɔtɔ, atalaki ye na elongi mpe alobaki ete: “Yo mpe, ozalaki na Monazarete wana, Yesu oyo.”+
68 Kasi awanganaki yango, alobi: “Nayebi ye te mpe nazali kokanga ntina ya makambo ozali koloba te,” mpe abimaki, akei na esika ya kokɔta na lopango.+
69 Kuna mwana mwasi wana ya mosala, ntango amonaki ye, abandaki lisusu koloba na baoyo batɛlɛmaki wana ete: “Oyo azali moko na bango.”+
70 Awanganaki lisusu. Mpe nsima ya mwa ntango moke lisusu baoyo bazalaki kotɛlɛma wana babandaki koloba na Petro ete: “Ya solo, yo ozali moko na bango, kutu, ozali Mogalile.”+
71 Kasi abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndai+ ete: “Nayebi moto oyo bino bozali kolobela te.”+
72 Mpe na mbala moko nsoso elelaki mpo na mbala ya mibale;+ mpe Petro akanisaki lisusu liloba oyo Yesu alobaki na ye ete: “Liboso nsoso elela mbala mibale, okowangana ngai mbala misato.”+ Mpe alɛmbaki nzoto mpe abandaki kolela.+
Maloba na nse
^ Lil., “molangi ya albatre.” Ezalaki molangi ya moke oyo liboso esalemaki na mabanga oyo bazalaki kozwa pene na mboka Alabastron, na Ezipito.