Marko 13:1-37
13 Ntango azalaki kobima na tempelo, moko ya bayekoli na ye alobaki na ye ete: “Moteyi, talá! Oyo mabanga ya ndenge nini mpe oyo bandako ya ndenge nini!”+
2 Nzokande, Yesu alobaki na ye ete: “Ozali kotala bandako wana ya minene?+ Ata libanga moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu awa,+ nyonso ekokwea na nse.”+
3 Mpe ntango afandaki na Ngomba ya Olive, na esika oyo etalani na tempelo, Petro+ ná Yakobo, Yoane ná Andre babandaki kotuna ye na pembeni+ ete:
4 “Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa ntango oyo makambo nyonso wana esengeli kokóma mpenza na bosukisi?”+
5 Bongo Yesu abandaki koloba na bango ete: “Bókeba, moto akosa bino te.+
6 Mingi bakoya na nkombo na ngai, bakoloba ete: ‘Ngai nazali ye,’ mpe bakokosa bato mingi.+
7 Lisusu, ntango bokoyoka lokito ya bitumba mpe nsango ya bitumba, bózala na nsɔmɔ te; makambo wana esengeli kosalema, kasi nsuka eyei naino te.+
8 “Mpo ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi,+ mabele ekoningana+ na bisika ndenge na ndenge, nzala+ ekozala. Wana ezali ebandeli ya bampasi.+
9 “Nde bino, bókebaka na bino moko; bakokaba bino na batribinale ya mboka,+ mpe bakobɛta bino na basinagoga+ mpe bakotɛlɛmisa bino liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai, mpo na kopesa bango litatoli.+
10 Lisusu, nsango malamu+ esengeli liboso kosakolama na bikólo nyonso.+
11 Kasi ntango bazali komema bino mpo na kokaba bino, bómitungisa liboso te mpo na oyo bosengeli koloba;+ kasi oyo ekopesama epai na bino na ngonga wana bóloba yango, mpo ezali bino te bato bozali koloba, kasi nde elimo santu.+
12 Lisusu, ndeko akokaba ndeko na ye na liwa, mpe tata mwana,+ mpe bana bakotombokela baboti mpe bakobomisa bango;+
13 mpe bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.+ Kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka+ ye nde akobika.+
14 “Nzokande, ntango bokomona eloko ya bosɔtɔ+ oyo ebebisaka+ etɛlɛmi na esika oyo yango esengeli kotɛlɛma te (tiká motángi asosola),+ na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba.+
15 Moto oyo azali likoló ya ndako akita te, akɔta mpe na kati te mpo na kokamata eloko oyo ezali na ndako na ye;+
16 mpe moto oyo azali na bilanga azonga te na biloko oyo ezali na nsima mpo na kokamata elamba na ye ya likoló.+
17 Mawa na basi ya zemi mpe na baoyo bakomɛlisa bana mabɛlɛ na mikolo yango!+
18 Bóbondelaka ntango nyonso mpo ete yango ezala na eleko ya mpiɔ makasi te;+
19 mpo mikolo yango ekozala mikolo ya bolɔzi+ moko oyo esalemá naino te banda ebandeli ya bozalisi oyo Nzambe azalisaki tii na ntango wana, mpe ekosalema lisusu te.+
20 Kutu, soki Yehova+ ayeisaka mikolo yango mokuse te, mbɛlɛ ata moto moko te abiki. Kasi mpo na baponami+ oyo ye aponá,+ ayeisá mikolo yango mokuse.+
21 “Boye, lisusu, soki moto alobi na bino ete: ‘Talá! Kristo azali awa,’ ‘Talá! Azali kuna,’+ bóndima yango te.+
22 Mpo Ba-Kristo ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima+ mpe bakobimisa bilembo mpe bakosala makamwisi+ mpo na kobungisa baponami nzela, soki likoki ezali.+
23 Bongo bino bókeba;+ nayebisi bino makambo nyonso libelalibela.+
24 “Kasi na mikolo yango, nsima ya bolɔzi yango, moi ekoyinda, mpe sanza ekopesa pole na yango te,
25 mpe minzoto ekouta na likoló ekwei, mpe banguya oyo ezali na likoló ekoningana.+
26 Bongo bakomona Mwana ya moto+ azali koya na mapata na nguya makasi mpe na nkembo.+
27 Bongo akotinda baanzelu mpe bakoyanganisa baponami+ na ye esika moko uta na mipɛpɛ minei, uta na nsuka ya mabele tii na nsuka ya likoló.+
28 “Sikoyo, bózwa liteya na ndakisa ya nzete ya figi: Ntango kaka etape na yango ya sika ekómi pɛtɛpɛtɛ mpe ebimisi nkasa na yango, boyebi ete eleko ya molunge ekómi pene.+
29 Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete azali pene, na baporte.+
30 Ya solo mpenza nalobi na bino ete libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo yango nyonso ekosalema.+
31 Likoló+ ná mabele ekoleka, kasi maloba+ na ngai ekoleka te.+
32 “Kasi mpo na mokolo yango to ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu na likoló, ezala Mwana, kaka Tata.+
33 Bókebaka, bólala mpɔngi te,+ mpo boyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá ekokoka.+
34 Ezali lokola moto oyo asali mobembo na mboka mopaya+ oyo atiki ndako na ye mpe apesi bokonzi na baombo na ye, moto na moto mosala na ye, mpe apesi mokɛngɛli ya porte mitindo ete asɛnzɛlaka.
35 Na yango, bósɛnzɛlaka,+ mpo boyebi te ntango nini nkolo ya ndako akoya, soki na mpokwa* to na katikati ya butu* to na ntango nsoso eleli* to na ntɔngɔntɔngɔ;*+
36 mpo ntango akoya na mbalakaka, akuta bino te bozali kolala mpɔngi.+
37 Kasi oyo nazali koloba na bino nazali koloba yango na bato nyonso: Bósɛnzɛlaka.”+