Marko 11:1-33
11 Nzokande, ntango babandaki kopusana pene na Yerusaleme, na Betefage mpe na Betania+ na Ngomba ya Olive, atindaki mibale kati na bayekoli na ye+
2 mpe ayebisaki bango ete: “Bókende na mboka oyo etalani na bino, mpe ntango bokokɔta na kati na yango, bokokuta mwana ya mpunda oyo bakangi nsinga, likoló na yango moto moko afandá naino te; bófungola yango mpe bóya na yango.+
3 Mpe soki moto moko alobi na bino: ‘Mpo na nini bozali kosala bongo?’ bóloba: ‘Nkolo azali na mposa na yango, mpe akozongisa yango na mbala moko awa.’”+
4 Bongo bakendaki mpe bakutaki mwana wana ya mpunda oyo bakangá nsinga na porte, na libándá na balabala oyo ekatisá, mpe bafungolaki yango.+
5 Kasi bato mosusu oyo batɛlɛmaki kuna babandaki koloba na bango ete: “Mpo na nini bozali kofungola mwana ya mpunda wana?”+
6 Balobaki na bango se ndenge Yesu alobaki; mpe batikaki bango bákende.+
7 Mpe bayaki na mwana yango ya mpunda+ epai na Yesu, mpe batyaki likoló na yango bilamba na bango ya likoló, mpe afandelaki mwana yango ya mpunda.+
8 Mpe, mingi batandaki bilamba+ na bango ya likoló na nzela, kasi bamosusu bakataki nkasa+ na bilanga.+
9 Mpe baoyo bazalaki kotambola liboso mpe baoyo bazalaki koya na nsima bazalaki se koganga ete: “Tobondeli yo, bikisá!+ Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama!+
10 Bokonzi ya tata na biso Davidi+ oyo ezali koya epambwama! Bikisá, tobondeli yo, kuna na likoló!”
11 Mpe akɔtaki na Yerusaleme, na tempelo; mpe atalaki biloko nyonso epai na epai, mpe, lokola ngonga epusanaki, abimaki mpo na kokende na Betania elongo na bantoma zomi na mibale.+
12 Na mokolo oyo elandaki, ntango babimaki na Betania, ayokaki nzala.+
13 Mpe na mosika amonaki nzete moko ya figi oyo ezalaki na nkasa, mpe akendaki kotala soki akokaki mbala mosusu kokuta mwa eloko likoló na yango. Kasi, ntango akómaki kuna, akutaki eloko te kaka nkasa, mpo ezalaki eleko ya bafigi te.+
14 Bongo alobaki na yango ete: “Moto alya mbuma na yo lisusu te, libela na libela.”+ Mpe bayekoli na ye bazalaki koyoka.
15 Bongo bakómaki na Yerusaleme. Kuna akɔtaki na tempelo mpe abandaki kobwaka libándá baoyo bazalaki kotɛka mpe kosomba na tempelo, mpe abalolaki bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe bibonga ya baoyo bazalaki kotɛka bibenga;+
16 mpe atikaki nzela te ete moto aleka na esaleli moko na kati ya tempelo,
17 kasi akobaki koteya mpe koloba ete: “Ekomamá nde te ete: ‘Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli+ mpo na bikólo nyonso’?+ Kasi bino bokómisi yango mobenga ya miyibi.”+
18 Mpe banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bayokaki yango, mpe babandaki koluka ndenge ya koboma ye;+ mpo bazalaki kobanga ye, mpo ebele nyonso wana ya bato bazalaki ntango nyonso kokamwa na mateya na ye.+
19 Mpe na mpokwa, bazalaki kobima na engumba yango.
20 Kasi ntango bazalaki koleka ntɔngɔntɔngɔ, bamonaki nzete yango ya figi esili kokauka banda na misisa.+
21 Bongo Petro, akanisaki likambo yango, alobaki na ye ete: “Rabi, talá! nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekauki.”+
22 Mpe Yesu azongiselaki bango ete: “Bóndimela Nzambe.
23 Ya solo nalobi na bino ete moto nyonso oyo alobi na ngomba oyo ete: ‘Pikolamá mpe bwakamá na mbu,’ mpe azali kotya ntembe na motema na ye te, kasi azali na kondima ete oyo azali koloba ekosalema, ekosalema mpe bongo epai na ye.+
24 Yango wana nazali koyebisa bino: Biloko nyonso bozali kobondela mpo na yango mpe kosɛnga, bózala na kondima ete bozwi yango mpenza, mpe bokozala na yango.+
25 Mpe ntango botɛlɛmi mpe bozali kobondela, bólimbisa+ mabe nyonso oyo moto asalaki bino; mpo Tata na bino oyo azali na likoló alimbisa bino mpe mabunga na bino.”+
26 ——
27 Mpe bakómaki lisusu na Yerusaleme. Mpe na ntango azalaki kotambola na tempelo, banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli mpe mikóló bayaki esika azalaki+
28 mpe babandaki koloba na ye ete: “Bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo? To nani apesi yo bokonzi oyo ya kosala makambo wana?”+
29 Yesu alobaki na bango ete: “Nakotuna bino motuna moko. Bóyanola ngai, ngai mpe nakoyebisa bino na lotomo nini nazali kosala makambo oyo.+
30 Batisimo+ ya Yoane eutaki na likoló to na bato? Bóyanola ngai.”+
31 Bongo babandaki kokanisakanisa na kati na bango, mpe koloba ete: “Soki tolobi: ‘Na likoló,’ akoloba ete: ‘Bongo mpo na nini bondimaki ye te?’+
32 Kasi tokomeka nde koloba: ‘Na bato’?”—Bazalaki kobanga ebele wana ya bato, mpo bango nyonso bazalaki kozwa Yoane ete azalaki mpenza mosakoli.+
33 Bongo bazongiselaki Yesu ete: “Toyebi te.” Mpe Yesu alobaki na bango ete: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na lotomo nini nazali kosala makambo oyo.”+