Marko 1:1-45
1 Ebandeli ya nsango malamu oyo etali Yesu Kristo:
2 Ndenge ekomami na mosakoli Yisaya: “(Talá! Nazali kotinda momemi-nsango na ngai liboso na yo, oyo akobongisa nzela na yo;)+
3 yoká! moto moko azali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova, bósembola babalabala na ye,’”+
4 Yoane Mobatisi abimaki na esobe, azalaki kosakola batisimo oyo ezali elembo ya kobongola motema mpo na bolimbisi ya masumu.+
5 Bongo teritware mobimba ya Yudea mpe bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme bakendaki epai na ye, mpe azalaki kobatisa bango na Ebale ya Yordani, bazalaki koyambola masumu na bango polelepolele.+
6 Nzokande Yoane azalaki kolata bilamba ya nsuki ya kamela mpe mokaba ya mposo ya nyama na loketo na ye,+ mpe azalaki kolya mayoyo+ ná mafuta ya nzoi ya zamba.+
7 Mpe azalaki kosakola ete: “Nsima na ngai moto moko ya makasi koleka ngai azali koya; nabongi te kogunzama mpe kofungola bansinga ya basandale na ye.+
8 Ngai nazali kobatisa bino na mai, kasi ye akobatisa bino na elimo santu.”+
9 Na boumeli ya mikolo yango, Yesu autaki na Nazarete ya Galile mpe Yoane abatisaki ye na Yordani.+
10 Mpe na mbala moko, ntango abimaki na mai, amonaki likoló ezali kofungwama, mpe elimo ezali kokitela ye lokola ebenga;+
11 mpe mongongo moko eutaki na likoló ete: “Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.”+
12 Mpe na mbala moko elimo epusaki ye akende na esobe.+
13 Bongo afandaki na esobe mikolo ntuku minei (40),+ Satana amekaki ye,+ mpe azalaki elongo na banyama ya zamba, kasi baanzelu bazalaki kosalela ye.+
14 Nzokande nsima ya kokangama ya Yoane, Yesu akendaki na Galile,+ azalaki kosakola nsango malamu ya Nzambe+
15 mpe koloba ete: “Ntango oyo etyamá ekoki,+ mpe bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Bóbongola mitema+ mpe bóndima nsango malamu.”
16 Ntango azalaki kotambola pembenipembeni ya mbu ya Galile amonaki Simo+ ná Andre ndeko ya Simo bazali kobwaka minyama na bango na mbu, mpo bazalaki baluki-mbisi.+
17 Bongo Yesu alobaki na bango ete: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.”+
18 Mpe na mbala moko basundolaki minyama na bango mpe balandaki ye.+
19 Mpe nsima ya kopusana mwa liboso amonaki Yakobo mwana ya Zebede ná Yoane ndeko na ye, wana bazali na masuwa na bango, bazali kobongisa minyama na bango;+
20 mpe nokinoki abengaki bango. Bongo batikaki tata na bango Zebede na masuwa elongo na bato ya misala mpe balandaki ye.
21 Mpe bakɔtaki na Kapernaume.+
Ntango kaka sabata ekómaki akɔtaki na sinagoga mpe abandaki koteya.
22 Mpe bakamwaki mingi na ndenge na ye ya koteya,+ mpo azalaki koteya bango lokola moto oyo azali na bokonzi, kasi lokola bakomeli te.+
23 Lisusu, na ntango wana kaka, moto moko azalaki na kati ya sinagoga oyo azalaki kotambwisama na nguya ya elimo moko ya mbindo, mpe agangaki,+
24 alobi: “Biso na yo likambo nini, Yesu Monazarete?+ Oyei nde koboma biso? Nayebi+ yo malamumalamu: ozali Mosantu+ ya Nzambe.”+
25 Kasi Yesu apamelaki yango ete: “Kangá monɔkɔ, mpe bimá na nzoto na ye!”+
26 Mpe elimo yango ya mbindo, nsima ya kotutukisa ye mpe koganga na makasi nyonso ya mongongo na yango, ebimaki na nzoto na ye.+
27 Boye, bato nyonso bakamwaki mingi kino babandaki kotunana bango na bango ete: “Oyo likambo nini? Liteya moko ya sika! Na bokonzi nyonso azali kopesa mitindo ata na bilimo ya mbindo, mpe bazali kotosa ye.”+
28 Bongo na mbala moko, nsango na ye epalanganaki bipai nyonso na mokili wana mobimba ya zingazinga na Galile.+
29 Mpe na mbala moko babimaki na sinagoga mpe bakendaki na ndako ya Simo+ ná Andre elongo na Yakobo ná Yoane.
30 Nzokande bokilo ya Simo ya mwasi+ alalaki na fiɛvrɛ,+ mpe na mbala moko bayebisaki ye likambo na ye.
31 Mpe akendaki epai na ye, asimbi ye na lobɔkɔ, atɛlɛmisi ye; mpe fiɛvrɛ na ye esilaki,+ mpe abandaki kosalela bango.+
32 Nsima wana mpokwa ekómaki, ntango moi elalaki, bato babandaki komemela ye baoyo nyonso bazalaki na maladi+ mpe baoyo bazalaki na bademo;+
33 mpe engumba mobimba eyanganaki liboso mpenza ya porte.
34 Bongo abikisaki bato mingi oyo bazalaki kobɛla bamaladi ya ndenge na ndenge,+ mpe abimisaki bademo mingi, kasi atikelaki bademo nzela báloba te, mpo bayebaki ete ye azali Kristo.+
35 Mpe na ntɔngɔntɔngɔ, wana molili ezalaki naino, atɛlɛmaki, abimi na libándá mpe akei na esika oyo bato bazali te,+ mpe kuna abandaki kobondela.+
36 Nzokande, Simo mpe baoyo bazalaki elongo na ye bakendaki koluka ye
37 mpe bamonaki ye, mpe balobaki na ye ete: “Bato nyonso bazali koluka yo.”
38 Kasi alobaki na bango ete: “Tókende epai mosusu, na bamboka ya pembeni, mpo nasakola+ mpe kuna, mpamba te ezali mpo na yango nde nabimaki.”+
39 Mpe akendaki, azalaki kosakola na basinagoga na bango na Galile mobimba mpe azalaki kobimisa bademo.+
40 Moto moko ya maba mpe ayaki epai na ye, azalaki kobondela ye afukami na mabɔlɔngɔ, alobi na ye ete: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.”+
41 Na yango mawa ekangaki ye,+ mpe asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki ye, mpe alobaki na ye ete: “Nalingi. Kómá pɛto.”+
42 Mpe na mbala moko maba na ye elimwaki, mpe akómaki pɛto.+
43 Lisusu, apesaki ye mitindo ya makasi mpe na mbala moko atikaki ye akende,
44 mpe alobaki na ye: “Kebá, koyebisa moto te, kasi kende komilakisa epai ya nganga-nzambe+ mpe, mpo na kopɛtolama na yo, pesá biloko oyo Moize asɛngaki,+ mpo bámona ete obiki.”+
45 Kasi nsima ya kokende, moto yango abandaki kosakola likambo yango mingi mpe kopalanganisa nsango, bongo Yesu akokaki lisusu te kokɔta polele na engumba moko, kasi azalaki kofanda kaka na libándá na bisika oyo bato bazali te. Atako bongo bakobaki koya epai na ye, bazalaki kouta bipai nyonso.+