Malaki 3:1-18

3  “Talá! Nazali kotinda mo-memi-nsango na ngai,+ mpe akobongisa mpenza nzela liboso na ngai.+ Mpe Nkolo ya solosolo+ oyo bino bozali koluka akoya pwasa na tempelo na Ye+ ná momemi-nsango+ ya kondimana+ oyo bino bozali kosepela na ye.+ Talá! Ye akoya mpenza,” Yehova ya mampinga alobi bongo.+  “Kasi nani akokoka na mokolo ya koya na ye,+ mpe nani akotɛlɛma ntango ye akomonana?+ Mpo ye akozala lokola mɔtɔ ya monyangwisi-bibende+ mpe lokola sabuni+ ya basukoli-bilamba.+  Mpe ye akofanda mpenza lokola moto oyo anyangwisaka mpe apɛtolaka palata+ mpe akopɛtola bana ya Levi;+ mpe akokómisa bango pɛɛ lokola wolo+ mpe lokola palata, mpe bakokóma mpenza na miso ya Yehova bato oyo bazali kopesa likabo+ na boyengebene.  Mpe Yehova akosepela mpenza na likabo ya Yuda mpe ya Yerusaleme,+ lokola na mikolo ya kala mpe lokola na bambula ya kalakala.+  “Mpe nakobɛlɛma epai na bino mpo na kosambisa,+ mpe nakokóma moto oyo azali kotatola na lombangu+ mpo na kotɛmɛla banganga-nkisi,+ mpe bato ya ekobo,+ mpe baoyo balapaka ndai ya lokuta,+ mpe baoyo babubaka mosali na lifuti ya mosala na ye,+ baoyo babubaka mwasi oyo mobali akufá+ mpe mwana mobali oyo tata akufá,+ mpe baoyo bazali koboya moto oyo afandi mopaya,+ mpe bazali kobanga ngai te,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.  “Mpo ngai nazali Yehova; nabongwani te.+ Mpe bino bozali bana ya Yakobo; bosili te.+  Banda na mikolo ya bankɔkɔ na bino botikaki malako na ngai mpe bobatelaki yango te.+ Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. Mpe bino bolobi ete: “Tokozonga ndenge nini?”  “Moto ya mabele akoyiba nde Nzambe? Kasi bino bozali koyiba ngai.” Mpe bino bolobi ete: “Toyibi yo ndenge nini?” “Na moko ya bandambo zomi ya biloko mpe na makabo.  Bozali kolakela ngai mabe na elakeli mabe,+ mpe bozali koyiba ngai—ɛɛ ekólo oyo mobimba. 10  Bóya na moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso+ na ndako ya kobomba biloko, mpo bilei ezala na ndako na ngai;+ mpe nabondeli bino, bómeka ngai na likambo oyo,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “bómona soki nakofungwela bino baporte ya mai ya likoló+ te mpe soki nakosopela bino lipamboli te kino bosɛnga ekozala lisusu te.”+ 11  “Mpe nakopamela mpo na bino eloko oyo elyaka,+ mpe yango ekobebisela bino mbuma ya mabele te, mpe nzete ya vinyo ekozanga te kobotela bino mbuma na elanga,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 12  “Mpe bikólo nyonso ekotánga bino bato ya esengo,+ mpo bino mpenza bokokóma mokili moko ya kosepelisa,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 13  “Maloba na bino mpo na kotɛmɛla ngai ezalaki makasi,”+ Yehova alobi bongo. Mpe bino bolobi ete: “Makambo nini tolobanaki mpo na kotɛmɛla yo?”+ 14  “Bino bolobi ete: ‘Kosalela Nzambe ezali na ntina te.+ Kokokisa mokumba na ye, mpe kotambola mawamawa mpo na Yehova ya mampinga ezali na litomba nini?+ 15  Mpe sikoyo tozali kotánga bato ya lofundo ete bazali bato ya esengo.+ Mpe bato oyo basalaka makambo mabe bapikami.+ Lisusu, bamekimeki Nzambe mpe bazali se kolonga.’”+ 16  Na ntango yango baoyo babangaka Yehova+ balobanaki, moto na moto na moninga na ye, mpe Yehova azalaki kotya likebi mpe koyoka.+ Mpe buku ya kokanisama ebandaki kokomama liboso na ye+ mpo na baoyo babangaka Yehova mpe mpo na baoyo bakanisaka nkombo na ye.+ 17  “Mpe bango bakokóma mpenza bato na ngai,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “na mokolo oyo nakobimisa eloko ya ngai moko.+ Mpe nakomonisela bango motema mawa, ndenge moto amoniselaka mwana na ye oyo azali kosalela ye motema mawa.+ 18  Mpe ya solo, bokomona lisusu bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe,+ kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.”+

Maloba na nse