Malaki 2:1-17

2  “Mpe sikoyo, Ee banganga-nzambe, mobeko oyo ezali mpo na bino.+  Soki boyoki te,+ mpe soki botye na motema te+ likambo ya kopesa nkombo na ngai nkembo,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “ngai mpe nakotindela bino elakeli mabe,+ mpe nakolakela mapamboli na bino mabe.+ Ɛɛ, kutu nalakeli lipamboli yango mabe, mpo bozali kotya yango na motema te.”  “Talá! Nazali kopamela momboto oyo elonami mpo na bino,+ mpe nakopanza nyɛi na bilongi na bino, nyɛi ya bafɛti na bino; mpe moto moko akokende na bino mpenza epai yango ezali.  Mpe bokoyeba mpenza ete natindeli bino mitindo oyo,+ mpo kondimana na ngai+ na Levi ekoba kozala,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.  “Kondimana na ngai ezalaki elongo na ye, kondimana ya bomoi mpe ya kimya,+ mpe napesaki ye yango, na kobanga. Mpe akobaki kobanga ngai;+ ɛɛ, mpo na nkombo na ngai ye moko azalaki kolɛnga na nsɔmɔ.+  Mobeko ya solo ezalaki na monɔkɔ na ye,+ mpe makambo ya kozanga boyengebene ezalaki na mbɛbu na ye te. Atambolaki na ngai na kimya mpe na bosembo,+ mpe bato oyo ye alongolaki na libunga bazalaki mingi.+  Mpo mbɛbu ya nganga-nzambe nde esengeli kobatela boyebi, mpe mobeko nde eloko oyo bato basengeli koluka na monɔkɔ na ye;+ mpo ye azali momemi-nsango ya Yehova ya mampinga.+  “Kasi bino—botiki nzela.+ Bobɛtisi bato mingi libaku na mobeko.+ Bobebisi kondimana ya Levi,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.  “Ngai mpe nakokómisa bino mpenza eloko ya kotyolama mpe ya kokitisama na bato nyonso,+ mpo bozalaki kobatela banzela na ngai te, kasi bozalaki kopona bilongi na mobeko.”+ 10  “Biso nyonso tozali na tata kaka moko, boye te?+ Nzambe kaka moko nde azalisaki biso, boye te?+ Mpo na nini biso tozali kosalelana makambo na bokosi,+ na ndenge tozali kokómisa kondimana ya bankɔkɔ na biso eloko mpamba?+ 11  Yuda asali makambo na bokosi, mpe likambo oyo eyinamá esalemi na Yisraele mpe na Yerusaleme;+ mpo Yuda atuki bosantu ya Yehova,+ oyo Ye alingaki, mpe azwi mwana mwasi ya nzambe mopaya ete azala mwasi na ye.+ 12  Yehova akolongola, na hema ya Yakobo, moto nyonso oyo azali kosala bongo,+ moto oyo alamuki mpe moto oyo azali koyanola, mpe moto oyo azali kopesa Yehova ya mampinga likabo.”+ 13  “Mpe talá likambo ya mibale oyo bino bozali kosala, oyo esali ete etumbelo ya Yehova ezipama na mpisoli, na kolela mpe na kokimela, mpe likabo na bino etalelama lisusu te mpe eloko nyonso oyo euti na lobɔkɔ na bino esepelisa te.+ 14  Mpe bino bolobi ete: ‘Na likambo nini?’+ Na likambo oyo, ete Yehova ye moko atatoli kati na yo ná mwasi ya bolenge na yo,+ oyo yo osaleli makambo na bokosi, atako azali moninga na yo mpe mwasi ya kondimana na yo.+ 15  Mpe ezali na moto moko oyo asalaki likambo yango te, mpo azalaki na mwa ndambo ya elimo oyo etikalaki. Mpe moto yango azalaki koluka nini? Momboto ya Nzambe.+ Mpe bino bosengeli kokeba mpenza mpo na elimo na bino,+ mpe moto moko te asalela mwasi ya bolenge na ye makambo na bokosi.+ 16  Mpo ye ayini koboma libala,”+ Yehova Nzambe ya Yisraele alobi bongo; “mpe moto oyo azipi elamba na ye na mobulu,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. “Mpe bosengeli mpenza kokeba mpo na elimo na bino, mpe bosengeli kosala makambo na bokosi te.+ 17  “Bino bolɛmbisi Yehova na maloba na bino,+ mpe bolobi ete: ‘Tolɛmbisi ye na ndenge nini?’ Na ndenge bozali koloba ete: ‘Moto nyonso oyo azali kosala mabe azali malamu na miso ya Yehova, mpe ye asepeli na bato ya motindo wana’;+ to, ‘Wapi Nzambe ya bosembo?’”+

Maloba na nse