Luka 9:1-62
9 Bongo abengaki bantoma zomi na mibale mpe apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana bademo nyonso mpe ya kosilisa bamaladi.+
2 Bongo atindaki bango kosakola bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa,
3 mpe alobaki na bango ete: “Bómema eloko te mpo na mobembo, lingenda te saki ya bilei te, limpa te, mbongo ya palata te; bózwa mpe bilamba mibale ya nse te.+
4 Kasi esika nyonso oyo bokokɔta na ndako moko, bófanda wana mpe bólongwa wana.+
5 Mpe na esika nyonso oyo bato bayambi bino te, ntango bokobima na engumba+ wana bópupola putulu ya makolo na bino mpo ezala litatoli epai na bango.”+
6 Bongo basimbaki nzela bakatisi teritware yango, baleki mboka na mboka, basakoli nsango malamu mpe babikisi na bisika nyonso.+
7 Nzokande Erode moyangeli ya etúká ayokaki nsango ya makambo nyonso oyo esalemaki, mpe abulunganaki mpenza mpamba te bamosusu bazalaki koloba ete Yoane akufaki alamuki,+
8 kasi bamosusu ete Eliya abimaki, kasi bamosusu mpe ete moko ya basakoli ya kala asekwaki.
9 Erode alobaki ete: “Ngai nakataki Yoane motó.+ Bongo moto oyo nazali koyoka na nsango, ezali nani?” Bongo azalaki koluka+ komona ye.
10 Mpe ntango bantoma bazongaki bayebisaki ye makambo oyo basalaki.+ Bongo akamataki bango mpe akei na bango na esika oyo bazalaki kaka bango moko+ na engumba oyo babengi Betesaida.
11 Kasi ebele yango ya bato ntango bayebaki yango, balandaki ye. Mpe ayambaki bango na boboto mpe abandaki kolobela bango makambo oyo etali bokonzi ya Nzambe,+ mpe abikisaki baoyo bazalaki na mposa ya kobikisama.+
12 Bongo moi ebandaki kokita. Mpe bantoma zomi na mibale bayaki mpe balobaki na ye ete: “Zongisá ebele ya bato oyo bákende na bamboka mpe na bamboka ya zamba oyo ezali zingazinga mpo bázwa esika ya kolala mpe biloko ya kolya, mpo awa tozali na esika oyo bato bazalaka te.”+
13 Kasi alobaki na bango ete: “Bino bópesa bango eloko ya kolya.”+ Bango balobaki ete: “Tozali na eloko te kaka mampa mitano mpe mbisi mibale,+ lobá nde biso moko tókende kosombela bato nyonso oyo biloko ya kolya.”+
14 Ya solo, bazalaki mibali soki nkóto mitano (5 000).+ Kasi alobaki na bayekoli na ye ete: “Bóloba na bango báfanda ndenge bafandaka mpo na kolya, na bituluku ya bato soki ntuku mitano ntuku mitano.”+
15 Mpe basalaki bongo mpe balobaki na bango nyonso báfanda.
16 Bongo akamataki mampa yango mitano ná mbisi yango mibale, atalaki na likoló, apambolaki yango mpe abukaki yango mpe apesaki bayekoli bátya yango liboso ya ebele ya bato yango.+
17 Bongo bango nyonso balyaki mpe batondaki, mpe balɔkɔtaki oyo etikalaki, kitunga zomi na mibale ya biteni mikemike.+
18 Na nsima, ntango azalaki kobondela kaka ye moko, bayekoli bayaki elongo epai na ye, mpe atunaki bango motuna ete: “Ebele ya bato bazali koloba ete ngai nazali nani?”+
19 Bango bazongisaki ete: “Yoane Mobatisi; kasi bamosusu: Eliya, bamosusu mpe: mosakoli moko ya kala asekwi.”+
20 Mpe alobaki na bango ete: “Bongo bino bolobi ete ngai nazali nani?” Petro ayanolaki ete:+ “Kristo+ ya Nzambe.”
21 Bongo abendaki bango matoi, apekisi bango báyebisa yango bato,+
22 mpe alobaki ete: “Mwana ya moto asengeli komona mpasi mingi mpe mikóló ná banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bakoboya ye, mpe bakoboma ye,+ mpe na mokolo ya misato akolamuka.”+
23 Bongo alobaki na bato nyonso ete: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya+ mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alanda ngai ntango nyonso.+
24 Mpo moto nyonso oyo alingi kobikisa molimo na ye akobungisa yango; kasi moto nyonso oyo abungisi molimo na ye mpo na ngai ye nde akobikisa yango.+
25 Kutu, litomba nini moto azali na yango soki azwi mokili mobimba kasi abungisi bomoi na ye to azwi likama?+
26 Mpo moto nyonso oyo azali koyoka nsɔni mpo na ngai mpe mpo na maloba na ngai, Mwana ya moto akoyoka moto yango nsɔni ntango akoya na nkembo na ye mpe na oyo ya Tata mpe ya baanzelu basantu.+
27 Kasi nayebisi bino ya solo mpenza ete: Bato mosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa bakoyoka ata nsolo ya liwa te liboso bámona bokonzi ya Nzambe.”+
28 Ya solo mpenza, soki mikolo mwambe nsima ya maloba wana, akamataki Petro ná Yoane ná Yakobo mpe amataki na bango na ngomba kobondela.+
29 Mpe ntango azalaki kobondela elongi+ na ye ekómaki ndenge mosusu mpe bilamba na ye ekómaki mpɛmbɛ makasi.+
30 Lisusu, talá! mibali mibale bazali kosolola na ye, Moize ná Eliya.+
31 Bango bamonanaki na nkembo mpe babandaki kolobela kokende na ye oyo esengelaki mpenza kosalema na Yerusaleme.+
32 Nzokande Petro ná baoyo bazalaki na ye bazalaki kobunda na mpɔngi; kasi ntango balamukaki mpenza bamonaki nkembo+ na ye mpe mibali yango mibale batɛlɛmi elongo na ye.
33 Mpe ntango bango bazalaki kokabwana na ye, Petro alobaki na Yesu ete: “Molakisi, ezali malamu tózala awa, boye tótɛlɛmisa bahema misato, moko ya yo mpe moko ya Moize mpe moko ya Eliya,” azalaki koyeba te makambo azalaki koloba.+
34 Kasi ntango azalaki koloba makambo wana lipata moko esalemaki mpe ebandaki kozipa bango. Ntango bazalaki kokɔta na lipata yango, babangaki.+
35 Mpe mongongo+ moko eutaki na lipata yango mpe elobaki ete: “Oyo azali Mwana na ngai, oyo aponami.+ Bóyoka ye.”+
36 Mpe ntango mongongo wana eyokanaki bamonaki Yesu kaka ye moko.+ Kasi bafandaki nyɛɛ mpe na mikolo yango, bayebisaki moto ata likambo moko te na makambo oyo bamonaki.+
37 Na mokolo oyo elandaki, ntango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bakutanaki na ye.+
38 Mpe talá! mobali moko na kati ya ebele ya bato wana azalaki koganga ete: “Moteyi, nalɔmbi yo ete obwakela mwana na ngai liso, mpo azali mwana na ngai+ se moko oyo nabotá,+
39 mpe talá! elimo+ moko ekangaka ye, mpe na mbala moko agangaka, mpe etutukisaka ye mpe ebimisaka ye fulufulu, mpe elongwaka na ye na mpasi mpenza nsima ya konikanika ye.
40 Mpe nalɔmbaki bayekoli na yo ete bábimisa yango, kasi bakokaki te.”+
41 Yesu azongisaki ete: “Ee libota ezangá kondima mpe egumbamá,+ nakoumela na bino tii ntango nini mpe nakokanga motema na makambo na bino tii ntango nini? Yaká na mwana na yo awa.”+
42 Kasi ata ntango azalaki kopusana pene, demo yango abwakaki ye na nse mpe atutukisaki ye makasi mpenza. Nzokande, Yesu apamelaki elimo yango ya mbindo mpe abikisaki elenge mobali yango mpe apesaki ye epai ya tata na ye.+
43 Mpe bango nyonso babandaki kokamwa na nguya monene+ wana ya Nzambe.
Nzokande ntango bazalaki bango nyonso kokamwa na makambo oyo azalaki kosala, alobaki na bayekoli na ye ete:
44 “Bósimba maloba oyo malamu: Mwana ya moto akokabama na mabɔkɔ ya bato.”+
45 Kasi bazalaki kaka kokanga ntina ya liloba wana te. Ya solo, likambo yango ebombamaki mpo básosola yango te, mpe bazalaki kobanga kotuna ye mituna mpo na liloba yango.+
46 Bongo likanisi moko eyelaki bango ya koyeba nani na kati na bango aleki bamosusu nyonso.+
47 Lokola Yesu ayebaki likanisi ya mitema na bango, akamataki mwana moko ya moke, atye ye pene na ye+
48 mpe alobi na bango: “Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke mpo na nkombo na ngai ayambi mpe ngai, mpe moto nyonso oyo ayambi ngai ayambi mpe moto oyo atindaki ngai.+ Mpo moto oyo azali kosala lokola moto oyo azali mpenza moke+ na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.”+
49 Yoane azongisaki ete: “Molakisi, tomonaki moto moko azali kobimisa bademo+ na nkombo na yo mpe tomekaki kopekisa+ ye, mpamba te azali kolanda yo elongo na biso te.”+
50 Kasi Yesu alobaki na ye ete: “Bómeka kopekisa ye te, mpo moto oyo azali monguna na bino te azali na ngámbo na bino.”+
51 Lokola mikolo ya komata na ye na likoló elingaki kokoka,+ akanaki na mpiko kokende na Yerusaleme.
52 Bongo atindaki bamemi-nsango bákende liboso na ye. Mpe bakendaki mpe bakɔtaki na mboka moko ya Basamaria,+ mpo bábongisa koya na ye;
53 kasi bayambaki ye te, mpo akanaki kokende na Yerusaleme.+
54 Ntango bayekoli na ye Yakobo ná Yoane+ bamonaki bongo balobaki ete: “Nkolo, olingi tóyebisa mɔtɔ+ euta na likoló mpe esilisa bango nyɛɛ?”
55 Kasi abalukaki mpe apamelaki bango.
56 Bongo bakendaki na mboka mosusu.
57 Nzokande ntango bazalaki kotambola na nzela, moto moko alobaki na ye ete: “Nakolanda yo epai nyonso okokende.”+
58 Mpe Yesu alobaki na ye ete: “Bagambala ezali na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló ezali na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te.”+
59 Bongo alobaki na mosusu ete: “Landá ngai.”* Moto yango alobaki ete: “Pesá ngai naino nzela nakende kokunda tata na ngai.”+
60 Kasi ye alobaki na ye ete: “Tiká bakufi+ bákunda bakufi na bango, kasi yo kende kosakola bokonzi ya Nzambe bipai nyonso.”+
61 Mpe mosusu lisusu alobaki ete: “Nakolanda yo, Nkolo; kasi pesá ngai naino nzela ya kopesa bato ya ndako na ngai mbote.”+
62 Yesu alobaki na ye ete: “Moto oyo atye lobɔkɔ na ye na etimweli+ mpe azali kotala biloko oyo ezali na nsima+ abongi na bokonzi ya Nzambe te.”