Luka 7:1-50

7  Ntango asilisaki koloba maloba na ye nyonso na matoi ya bato, akɔtaki na Kapernaume.+  Nzokande moombo ya mokonzi moko ya basoda, oyo mokonzi yango alingaki mingi, abɛlaki mpe akómaki pene na kokufa.+  Ntango ayokaki nsango ya Yesu, atindelaki ye mikóló ya Bayuda básɛnga ye aya kobikisa moombo na ye na likama.  Bongo baoyo bayaki epai ya Yesu babandaki kobondela ye na etingya mpe koloba: “Ebongi osalela ye likambo yango,  mpo alingaka ekólo na biso+ mpe ye nde moto atongelaki biso sinagoga.”  Bongo Yesu asimbaki nzela akei elongo na bango. Kasi ntango akómaki pene na ndako, mokonzi yango ya basoda atindi baninga báloba na ye ete: “Tata, komitungisa te, mpo ngai nabongi te kokɔtisa yo na ndako na ngai.+  Yango wana namimonaki ete nabongi te mpo na koya epai na yo. Kasi lobá se liloba, bongo mosaleli na ngai abika.  Mpo ngai mpe nazali na bakonzi likoló na ngai, nazali na basoda na nse na ngai, mpe nalobaka na oyo: ‘Kende!’ mpe akendeke, mpe na mosusu: ‘Yaká!’ mpe ayaka, mpe na moombo na ngai: ‘Salá boye!’ mpe asalaka yango.”+  Bongo ntango Yesu ayokaki makambo yango akamwaki mingi mpo na ye, mpe abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda ye mpe alobaki ete: “Nazali koyebisa bino ete: Namoná naino kondima ya monene boye te ata na Yisraele.”+ 10  Mpe ntango baoyo batindamaki bazongaki na ndako, bakutaki moombo yango nzoto kolɔngɔnɔ.+ 11  Mwa moke na nsima na yango akendaki na engumba oyo babengi Naine, mpe bayekoli na ye ná ebele mpenza ya bato bazalaki kokende nzela moko na ye. 12  Ntango akómaki pene na porte ya engumba, talá! bazalaki komema mokufi+ moko na libándá, mwana se moko+ oyo mama na ye abotaki. Lisusu, mama yango azalaki mwasi oyo mobali akufá. Ebele mpenza ya bato oyo bautaki na engumba bazalaki mpe elongo na ye. 13  Mpe ntango Nkolo amonaki ye, ayokelaki ye mawa,+ mpe alobaki na ye ete: “Tiká kolela.”+ 14  Bongo apusanaki mpe asimbaki mbeto ya ebembe, mpe bato oyo bazalaki komema batɛlɛmaki, mpe alobaki ete: “Elenge mobali, nalobi na yo: Tɛlɛmá!”+ 15  Mpe mokufi afandaki mpe abandaki koloba, mpe apesaki ye mama na ye.+ 16  Mpe bango nyonso babangaki,+ mpe babandaki kokumisa Nzambe mpe koloba ete: “Mosakoli+ monene abimi na kati na biso,” mpe, “Nzambe atyeli bato na ye likebi.”+ 17  Mpe nsango na ye epalanganaki na Yudea mobimba mpe na bisika nyonso ya zingazinga. 18  Nzokande bayekoli ya Yoane bayebisaki ye makambo nyonso wana.+ 19  Bongo Yoane abengaki bayekoli mibale na kati ya bayekoli na ye mpe atindaki bango epai ya Nkolo mpo na kotuna ete: “Yo ozali Moto oyo azali koya to tosengeli nde kozela mosusu?”+ 20  Ntango bakómaki epai na ye mibali yango balobaki ete: “Yoane Mobatisi atindi biso epai na yo mpo tótuna: ‘Yo ozali Moto oyo azali koya to tosengeli nde kozela moto mosusu?’” 21  Na ngonga yango abikisaki bato mingi oyo bazalaki na bamaladi+ mpe na bampasi ya makasi mpe na bilimo mabe, mpe asalaki ete bato mingi oyo bakufá miso bákoka komona. 22  Bongo azongiselaki bayekoli yango mibale ete: “Bókende+ koyebisa Yoane oyo bomoni mpe oyo boyoki: bato oyo bakufá miso+ bazali komona, batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka, bakufi bazali kolamuka, nsango malamu ezali koyebisama epai ya babola.+ 23  Mpe esengo na moto oyo abɛti libaku mpo na ngai te.”+ 24  Ntango bamemi-nsango ya Yoane bakendaki, abandaki koloba na ebele ya bato yango na oyo etali Yoane ete: “Bobimaki kotala nini na esobe? Mongendu oyo mopɛpɛ ezali kobɛtabɛta?+ 25  Bongo bobimaki kotala nini? Moto moko oyo alati bilamba ya likoló ya pɛtɛpɛtɛ?+ Te, baoyo balataka bilamba ya kitoko mpe bazali na bomɛngo bazalaka na bandako ya bakonzi.+ 26  Bongo bobimaki mpenza kotala nini? Mosakoli?+ Ya solo, nazali koyebisa bino, aleki mosakoli mosika.+ 27  Mpo na ye nde ekomamá ete: ‘Talá! Nazali kotinda momemi-nsango na ngai liboso na yo,+ mpe akobongisa nzela na yo liboso na yo.’+ 28  Nazali koyebisa bino ete: Na bato nyonso oyo basi babotá, moto oyo aleki Yoane azali te;+ kasi moto oyo aleki moke na bokonzi ya Nzambe aleki ye.”+ 29  (Mpe ntango bato nyonso ná bakɔngɔli-mpako bayokaki bongo, batángaki Nzambe moyengebene+ mpe bazwaki batisimo ya Yoane.+ 30  Kasi Bafarisai mpe baoyo bayebaki Mibeko malamumalamu batyolaki toli+ oyo Nzambe apesaki bango, Yoane abatisaki bango te.) 31  “Sikoyo nakokokanisa libota oyo na nani, mpe bazali lokola banani?+ 32  Bazali lokola bana mike oyo bafandi na zando mpe bazali kobelelana mpe koloba ete, ‘Tobɛtɛlaki bino piololo, kasi bobinaki te; togangaki na kolela, kasi bolelaki te.’+ 33  Ndenge moko mpe, Yoane Mobatisi ayaki, azali kolya mampa te mpe komɛla vinyo te, kasi bino bolobi: ‘Azali na demo.’+ 34  Mwana ya moto ayei azali kolya mpe komɛla, kasi bino bolobi ete: ‘Talá! Moto oyo amipesá na kolunda mpe na komɛla vinyo, moninga ya bakɔngɔli-mpako mpe ya basumuki!’+ 35  Atako bongo, bwanya+ ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.”+ 36  Sikoyo Mofarisai moko azalaki kosɛnga ye aya kolya epai na ye. Bongo akɔtaki na ndako+ ya Mofarisai yango mpe afandaki na mesa. 37  Mpe talá! mwasi moko oyo ayebanaki na engumba wana ete azali mosumuki ayokaki ete ye afandaki mpo na kolya na ndako ya Mofarisai yango, mpe ayaki na molangi*+ ya mafuta ya nsolo kitoko, 38  mpe amityaki na nsima na makolo na ye, alelaki mpe abandaki kopɔlisa makolo na ye na mpisoli na ye mpe azalaki kopangwisa yango na nsuki ya motó na ye. Lisusu, azalaki kopwɛpwa makolo na ye na boboto mpe kopakola yango mafuta wana ya nsolo kitoko. 39  Ntango Mofarisai oyo abengisaki ye amonaki bongo alobaki na motema na ye ete: “Soki moto oyo azalaka mpenza mosakoli,+ mbɛlɛ ayebi mwasi oyo azali kosimba ye mpe bizaleli na ye, mbɛlɛ ayebi ete azali mosumuki.”+ 40  Kasi Yesu azongiselaki ye ete: “Simo, nazali na mwa likambo ya koloba na yo.” Ye alobaki ete: “Moteyi, lobá yango!” 41  “Bato mibale bazalaki na nyongo ya modefisi moko boye; moko azalaki na nyongo ya denari+ nkama mitano (500), kasi mosusu ya ntuku mitano (50). 42  Lokola bazalaki na eloko ya kozongisa te, alimbisaki+ bango nyonso mibale na motema moko. Sikoyo, nani na kati na bango akolinga ye mingi koleka?” 43  Simo azongisaki ete: “Nakanisi ezali moto oyo ye alimbisaki nyongo ya monene koleka na motema moko.” Alobaki na ye ete: “Okati likambo yango malamu.” 44  Bongo atalaki mwasi yango mpe alobaki na Simo ete: “Omoni mwasi oyo? Nakɔti na ndako na yo; opesi ngai mai+ ya kosukola makolo na ngai te. Kasi mwasi oyo apɔlisi makolo na ngai na mpisoli na ye mpe apangwisi yango na nsuki na ye. 45  Opesi ngai lipwɛpwɛ te;+ kasi mwasi oyo, banda ngonga oyo nakɔtaki awa, atiki te kopwɛpwa makolo na ngai na boboto. 46  Yo opakoli motó na ngai mafuta te;+ kasi mwasi oyo apakoli makolo na ngai mafuta ya nsolo kitoko. 47  Yango wana, nazali koyebisa yo, masumu na ye, atako ezali mingi mpenza, elimbisami,+ mpo alingaki mingi; kasi moto oyo balimbisi moke, alingaka moke.” 48  Yango wana, alobaki na ye ete: “Masumu na yo elimbisami.”+ 49  Bongo baoyo bafandaki na mesa elongo na ye babandaki koloba na mitema na bango ete: “Moto oyo azali nani mpo alimbisa ata masumu?”+ 50  Kasi alobaki na mwasi yango ete: “Kondima na yo ebikisi yo;+ kende na kimya.”+

Maloba na nse

Lil., “molangi ya albatre.” Ezalaki molangi ya moke oyo liboso esalemaki na mabanga oyo bazalaki kozwa pene na mboka Alabastron, na Ezipito.