Luka 6:1-49
6 Nzokande na sabata moko, azalaki koleka na bilanga ya blé, mpe bayekoli na ye bazalaki kobuka+ mpe kolya mitó ya blé, bazalaki konika yango na mabɔkɔ.+
2 Bongo Bafarisai mosusu balobaki ete: “Mpo na nini bozali kosala likambo oyo esengeli kosala te+ na sabata?”+
3 Kasi Yesu azongiselaki bango ete: “Botángá naino te likambo oyo Davidi+ asalaki ntango ye ná bato oyo bazalaki elongo na ye bayokaki nzala?+
4 Ndenge akɔtaki na ndako ya Nzambe mpe azwaki mampa ya kolakisa,+ oyo mibeko epekisaki moto alya longola kaka banganga-nzambe,+ mpe alyaki yango mpe apesaki bato oyo bazalaki elongo na ye ndambo?”
5 Mpe alobaki na bango lisusu ete: “Mwana ya moto azali Nkolo ya sabata.”+
6 Na boumeli ya sabata+ mosusu akɔtaki na sinagoga mpe abandaki koteya. Mpe kuna ezalaki na moto moko oyo lobɔkɔ na ye ya mobali ekauká.+
7 Bakomeli ná Bafarisai bazalaki sikoyo kotala+ ye na likebi nyonso mpo na komona soki akobikisa na sabata, mpo bázwa ndenge ya kofunda ye.+
8 Nzokande, ye ayebaki makanisi na bango,+ atako bongo alobaki na moto wana oyo lobɔkɔ ekauká ete: “Tɛlɛmá mpe zalá wana na katikati.” Mpe atɛlɛmaki wana.+
9 Bongo Yesu alobaki na bango ete: “Natuna bino: Epesami nzela na sabata kosala malamu+ to kosala mabe, kobikisa molimo moko boye to koboma yango?”+
10 Mpe nsima ya kotala bango nyonso, alobaki na moto yango ete: “Sembolá lobɔkɔ na yo.” Asembolaki yango, mpe lobɔkɔ na ye ezongaki malamu.+
11 Kasi bango batondaki na nkɛlɛ, mpe babandaki kosolola bango na bango nini bakoki kosala Yesu.+
12 Na mikolo wana abimaki mpe akendaki na ngomba kobondela,+ mpe abondelaki Nzambe butu mobimba.+
13 Kasi ntango ntɔngɔ etanaki abengaki bayekoli na ye epai na ye mpe aponaki zomi na mibale na kati na bango, oyo apesaki bango mpe nkombo “bantoma”:+
14 Simo, oyo ye apesaki lisusu nkombo Petro,+ ná Andre ndeko na ye, ná Yakobo ná Yoane,+ ná Filipe+ ná Bartelemi,
15 ná Matai ná Toma,+ ná Yakobo mwana ya Alfe, ná Simo oyo abengami “moto ya molende,”+
16 ná Yudasi mwana ya Yakobo, ná Yudasi Mokeriota, oyo atɛkaki ye.+
17 Mpe akitaki elongo na bango mpe atɛlɛmaki na esika moko ya patatalu, mpe ebele mpenza ya bayekoli na ye, mpe ebele mpenza ya bato,+ bautaki na Yudea mobimba mpe na Yerusaleme mpe na mokili ya Tire mpe ya Sidone oyo ezali pembeni ya mbu, bayaki koyoka ye mpe kobikisama na bamaladi na bango.+
18 Ata baoyo batungisamaki na bilimo ya mbindo babikisamaki.
19 Mpe ebele nyonso wana ya bato bazalaki koluka kosimba+ ye, mpamba te nguya+ ezalaki kobima ye mpe kobikisa bango nyonso.
20 Mpe atalaki bayekoli na ye mpe abandaki koloba ete:+
“Esengo na bino babola,+ mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bino.
21 “Esengo na bino baoyo bozali na nzala+ sikoyo, mpo bokotonda.+
“Esengo na bino baoyo bozali kolela sikoyo, mpo bokosɛka.+
22 “Esengo na bino ntango bato bazali koyina+ bino, mpe ntango bazali kobengana bino mpe kofinga bino mpe kobebisa+ nkombo na bino mpo na Mwana ya moto lokola nde bozali bato mabe.
23 Bósepela na mokolo yango mpe bópumbwa, mpo talá! mbano na bino ezali monene na likoló, mpo wana nde makambo bankɔkɔ na bango bazalaki kosalela basakoli.+
24 “Kasi mawa na bino bato ya bomɛngo,+ mpo bozwi libɔndisi na bino mobimba.+
25 “Mawa na bino baoyo botondi sikoyo, mpo bokoyoka nzala.+
“Mawa, bino baoyo bozali kosɛka sikoyo, mpo bokozala na mawa mpe bokolela.+
26 “Mawa, ntango bato nyonso bazali kolobela bino malamu, mpo ezali makambo ya ndenge wana nde bankɔkɔ na bango basalelaki basakoli ya lokuta.+
27 “Kasi ngai nalobi na bino baoyo bozali koyoka: Bókoba kolinga banguna na bino,+ kosala malamu+ na bato oyo bayinaka bino,
28 kopambola baoyo bazali kolakela bino mabe, kobondela mpo na baoyo bazali kofinga bino.+
29 Moto oyo abɛti yo na litama+ moko, pesá ye mpe oyo mosusu; mpe moto oyo abɔtɔli+ elamba na yo ya likoló, koboya te kopesa ye ata elamba ya nse.
30 Pesá moto nyonso oyo asɛngi yo,+ mpe soki moto abɔtɔli biloko na yo kosɛnga te ete azongisa yango.
31 “Lisusu, kaka ndenge bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.+
32 “Mpe soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino? Mpo ata basumuki mpe balingaka baoyo balingaka bango.+
33 Mpe soki bozali kosala malamu na baoyo basalelaka bino malamu, yango ezali mpenza na litomba nini mpo na bino? Ata basumuki mpe basalaka bongo.+
34 Lisusu, soki bozali kodefisa kozanga koluka benefisi+ epai ya baoyo bozali na elikya ete bakozongisela bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino? Ata basumuki mpe badefisaka kozanga koluka benefisi epai ya basumuki mosusu mpo na nsima bázwa oyo bapesaki.+
35 Nzokande, bino bókoba kolinga banguna na bino mpe kosala malamu mpe kodefisa+ kozanga koluka benefisi, kozanga ete bólikya kozwa mwa eloko na nsima; mpe mbano na bino ekozala ya monene, mpe bokozala bana ya Oyo-Aleki-Likoló,+ mpo ye asalelaka bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe makambo na boboto.+
36 Bókoba kokóma bato ya motema mawa, ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.+
37 “Lisusu, bótika kosambisa, mpe bokosambisama ata moke te;+ mpe bótika kokweisa bato na likambo, mpe bokokweisama na likambo ata moke te. Bókoba kofungola, mpe bakofungola bino.+
38 Bópesaka, mpe bato bakopesa bino.+ Bakosopa na mabenga na bino biloko mingi, oyo bafini, baningisi mpe etondi mɛkɛ. Mpo bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.”+
39 Bongo apesaki bango lisusu ndakisa moko: “Moto oyo akufá miso akoki te kolakisa moto oyo akufá miso nzela, boye te? Bango nyonso mibale bakokwea na libulu, boye te?+
40 Mwana-kelasi aleki moteyi na ye te, kasi moto nyonso oyo alakisami malamumalamu akozala lokola moteyi na ye.+
41 Bongo mpo na nini ozali kotala lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali kotya likebi te na libaya ya motɔndɔ oyo ezali na liso na yo moko?+
42 Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‘Ndeko, tiká nalongola lititi oyo ezali na liso na yo,’ nzokande yo moko ozali te kotala libaya ya motɔndɔ oyo ezali na liso na yo?+ Mokosi! Liboso longolá libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko,+ bongo okomona polele ndenge ya kolongola lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.+
43 “Mpo ezali na nzete moko te ya malamu oyo ebotaka mbuma ya mabe; mpe ezali na nzete moko te ya mabe oyo ebotaka mbuma ya malamu.+
44 Mpo nzete na nzete eyebanaka na mbuma na yango.+ Na ndakisa, babukaka bafigi na banzubɛ te, mpe bakataka mbuma ya vinyo na nzete ya nzubɛ te.+
45 Moto malamu abimisaka makambo ya malamu na bolamu oyo abombi+ na motema na ye, kasi moto mabe abimisaka makambo ya mabe na mabe oyo abombi; mpo monɔkɔ na ye elobaka nde makambo oyo etondi na motema.+
46 “Bongo mpo na nini bozali kobenga ngai ‘Nkolo! Nkolo!’ kasi bozali te kosala makambo oyo ngai nazali koloba?+
47 Moto nyonso oyo azali koya epai na ngai mpe azali koyoka maloba na ngai mpe azali kosalela yango, akokani na nani? Nakolakisa bino:+
48 Akokani na moto oyo atongaki ndako, oyo atimolaki libulu mozindo mpenza mpe atyaki moboko likoló ya mabanga. Bongo ntango mpela+ eyaki, ebale ebɛtabɛtaki ndako yango, kasi ezalaki makasi mingi te mpo na koningisa ndako yango, mpo etongamaki malamu.+
49 Lisusu, moto oyo ayokaka mpe asalelaka te,+ akokani na moto oyo atongaki ndako likoló ya mabele, kasi atyaki moboko te. Ebale ebɛtabɛtaki yango, mpe na mbala moko ekweaki, mpe ndako yango ebebaki+ mpenza kobeba.”+