Luka 24:1-53

24  Nzokande na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, bakendaki ntɔngɔntɔngɔ na lilita, bamemaki matiti ya nsolo kitoko oyo babongisaki.+  Kasi bakutaki libanga ebalolami, elongwe na lilita,+  mpe ntango bakɔtaki na kati bakutaki nzoto ya Nkolo Yesu te.+  Na ntango bazalaki komitungisa na likambo yango, talá! mibali mibale oyo balataki bilamba ya ngɛlingɛli batɛlɛmaki pene na bango.+  Lokola basi yango bakómaki kobanga mpe bakitisaki bilongi na nse, mibali wana balobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali koluka Moto ya bomoi na kati ya bakufi?  [[Azali awa te, kasi alamuki.]]+ Bókanisa lisusu ndenge ayebisaki bino ntango oyo azalaki naino na Galile,+  alobaki ete Mwana ya moto asengeli kokabama na mabɔkɔ ya bato ya masumu mpe bakobaka ye na nzete kasi na mokolo ya misato akosekwa.”+  Bongo bakanisaki lisusu maloba na ye,+  mpe balongwaki na lilita mpe bakendaki koyebisa makambo nyonso wana epai ya bantoma na ye zomi na moko mpe epai ya bayekoli mosusu nyonso.+ 10  Ezalaki Maria ya Magadala, ná Yoana,+ ná Maria mama ya Yakobo. Mpe basi mosusu+ oyo bazalaki elongo na bango bazalaki koyebisa bantoma makambo wana. 11  Kasi bamonaki maloba wana lokola bilobaloba mpamba mpe bandimelaki basi wana te.+ 12  [[Kasi Petro atɛlɛmaki mpe apotaki mbangu tii na lilita, mpe agunzamaki, amoni kaka biteni ya bilamba. Bongo akendaki, azali kokamwa na motema na ye na likambo oyo esalemaki.]] 13  Kasi talá! na mokolo wana kaka, bayekoli mibale na kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo ekabwani na Yerusaleme na ntaka ya kilomɛtrɛ soki zomi na moko mpe nkombo na yango Emause, 14  mpe bazalaki kosolola makambo+ oyo esalemaki. 15  Nzokande ntango bazalaki kosolola mpe kolobana, Yesu ye moko apusanaki penepene+ mpe abandaki kotambola elongo na bango; 16  kasi miso na bango ezipamaki mpo báyeba ye te.+ 17  Alobaki na bango ete: “Makambo nini yango bozali kosolola awa bozali kotambola na nzela?” Batɛlɛmaki na bilongi ya mawa. 18  Moko na bango na nkombo Kleopasi azongiselaki ye ete: “Yo ozali nde mopaya mpe ofandi yo moko na Yerusaleme mpo oyeba te makambo oyo esalemi kuna mikolo oyo?” 19  Mpe ye alobaki na bango ete: “Makambo nini?” Balobaki na ye: “Makambo ya Yesu Monazarete,+ oyo akómaki mosakoli+ ya nguya na misala mpe na maloba liboso ya Nzambe mpe ya bato nyonso; 20  mpe ndenge banganga-nzambe bakonzi na biso mpe bayangeli bakabaki ye na etumbu ya liwa mpe babakaki ye na nzete.+ 21  Kasi tozalaki kolikya ete moto yango nde azalaki moto oyo asengelaki kosikola Yisraele;+ ɛɛ, mpe longola makambo nyonso wana, oyo ezali mokolo ya misato banda makambo yango esalemaki. 22  Mpe basi mosusu+ oyo bautaki na kati na biso mpe bakamwisaki biso, mpo bakendaki ntɔngɔntɔngɔ na lilita 23  kasi bakutaki nzoto na ye te mpe bayaki koloba ete bamoni lisusu emonaneli moko ya kokamwa ya baanzelu, oyo balobaki ete azali na bomoi. 24  Mpe bamosusu na kati ya bato oyo bazalaka elongo na biso bakendaki na lilita yango;+ mpe bakutaki yango bongo, se ndenge basi wana balobaki, kasi bamonaki ye te.” 25  Bongo alobaki na bango ete: “Ee bino bato bozangá bososoli mpe oyo motema endimaka noki te makambo nyonso oyo basakoli balobaki!+ 26  Esengelaki nde te ete Kristo anyokwama+ na makambo wana mpe akɔta na nkembo na ye?”+ 27  Mpe alimbwelaki bango makambo na ye na kati ya Makomami nyonso, banda na Moize+ tii na Basakoli nyonso.+ 28  Nsukansuka bakómaki pene na mboka oyo bazalaki kokende, mpe ye asalaki lokola nde azali kokende mosika. 29  Kasi batyaki ye mbamba, balobi: “Fandá na biso, mpo mpokwa ezali koya mpe mokolo ekómi na nsuka.” Bongo akɔtaki kofanda na bango. 30  Mpe ntango afandaki na bango mpo na kolya akamataki limpa, apamboli yango, abuki yango mpe abandi kopesa bango yango.+ 31  Bongo miso na bango efungwamaki polele mpe bayebaki ye; mpe alimwaki na miso na bango.+ 32  Mpe balobanaki ete: “Mitema na biso ezalaki mɔtɔmɔtɔ ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kolimbolela biso Makomami polelepolele, boye te?” 33  Mpe na ngonga wana mpenza batɛlɛmaki bazongi na Yerusaleme, mpe bakutaki bantoma na ye zomi na moko mpe bayekoli oyo bayanganaki elongo na bango, 34  balobi ete: “Ya solo mpenza Nkolo alamukaki mpe abimelaki Simo!”+ 35  Bongo bango mpe bayebisaki makambo oyo elekaki na nzela mpe ndenge bayebaki ye na ntango oyo abukaki limpa.+ 36  Ntango bazalaki kolobela makambo wana ye moko atɛlɛmaki na katikati na bango [[mpe alobaki na bango ete: “Kimya ezala na bino.”]] 37  Kasi lokola bazalaki na nsɔmɔ, mpe bakómaki kobanga,+ bakanisaki ete bamoni elimo moko boye. 38  Bongo ye alobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali kobulungana, mpe mpo na nini mitema na bino ezali kotya ntembe? 39  Bótala mabɔkɔ na ngai mpe makolo na ngai, ezali ngai mpenza; bósimba+ ngai mpe bómona, mpo elimo ezalaka na misuni ná mikuwa te+ ndenge bozali komona ngai nazali na yango.” 40  [[Mpe ntango alobaki bongo alakisaki bango mabɔkɔ na ye mpe makolo na ye.]] 41  Kasi lokola bazalaki naino kondima te+ mpo na esengo wana ya makasi mpe bazalaki kokamwa, alobaki na bango ete: “Bozali na mwa eloko ya kolya awa?”+ 42  Mpe bapesaki ye ndambo ya mbisi+ ya kotumba; 43  mpe akamataki yango mpe alyaki yango+ na miso na bango. 44  Sikoyo alobaki na bango ete: “Oyo ezali maloba nalobaki na bino ntango nazalaki naino elongo na bino,+ ete makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ngai na mibeko ya Moize mpe na Basakoli+ mpe na Nzembo+ esengeli kokokisama.” 45  Bongo afungolaki mayele na bango malamumalamu mpo bákanga ntina ya Makomami,+ 46  mpe alobaki na bango ete: “Ndenge wana nde ekomamá ete Kristo asengeli komona mpasi, kokufa mpe kosekwa na mokolo ya misato,+ 47  mpe mpo na nkombo na ye kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu+ esengeli kosakolama na bikólo nyonso+—banda na Yerusaleme,+ 48  bino bosengeli kozala batatoli+ ya makambo wana. 49  Mpe talá! nazali kotindela bino eloko oyo Tata na ngai alakaki. Kasi, bino bótikala kaka na engumba tii ntango bokozwa nguya oyo euti na likoló.”+ 50  Kasi abimisaki bango tii na Betania, mpe atombolaki mabɔkɔ na ye mpe apambolaki bango.+ 51  Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe abandaki komata na likoló.+ 52  Mpe bakumisaki ye mpe bazongaki na Yerusaleme na esengo mingi.+ 53  Mpe ntango nyonso bazalaki na kati ya tempelo kopambola Nzambe.+

Maloba na nse