Luka 21:1-38
21 Bongo ntango atombolaki miso amonaki bazwi bazali kotya makabo na bango na bakɛsi ya makabo.+
2 Bongo amonaki mwasi moko mobola oyo mobali akufá azali kotya wana mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza+
3 mpe alobaki ete: “Nazali koyebisa bino ya solo mpenza: Mwasi oyo mobali akufá, atako azali mobola, atye mingi koleka bango nyonso.+
4 Mpo bango nyonso batyaki oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele, kasi mwasi oyo na kokelela na ye atyaki nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.”+
5 Na nsima, lokola bato mosusu bazalaki kolobela tempelo, ndenge ebongisamá na mabanga ya kitoko mpe na biloko oyo bapesá Nzambe,+
6 alobaki ete: “Biloko wana oyo bozali kotala, mikolo ekoya, libanga moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu awa, nyonso ekokwea na nse.”+
7 Bongo batunaki ye motuna ete: “Moteyi, makambo yango ekosalema ntango nini mpenza, mpe elembo nini ekomonisa ntango oyo makambo wana esengeli kokóma?”+
8 Ye alobaki ete: “Bókeba, bákosa bino te;+ mpo mingi bakoya na nkombo na ngai, bakoloba ete: ‘Ngai nazali ye,’ mpe ete: ‘Ntango yango ekómi pene.’+ Bólanda bango te.
9 Lisusu, ntango bokoyoka lokito ya bitumba mpe ya makambo ya mobulu, bózala na nsɔmɔ te.+ Mpo makambo wana esengeli kokóma liboso, kasi nsuka ekoya na mbala moko te.”
10 Bongo alobaki na bango ete: “Ekólo ekobunda na ekólo,+ mpe bokonzi ekobunda na bokonzi;+
11 mpe mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge, mpe bamaladi mabe mpe nzala ekozala bisika ndenge na ndenge;+ makambo ya nsɔmɔ ekomonana mpe bilembo minene ekouta na likoló.+
12 “Kasi liboso ya makambo nyonso wana bato bakotya bino mabɔkɔ mpe bakonyokola+ bino, bakokaba bino na basinagoga mpe na babolɔkɔ, bakomema bino na makasi liboso ya bakonzi mpe baguvɛrnɛrɛ mpo na nkombo na ngai.+
13 Ekozala libaku mpo bópesa litatoli.+
14 Yango wana, bótya na mitema na bino ete bosengeli te kobongisa liboso ndenge oyo bokoloba ntango bokosamba,+
15 mpo nakopesa bino monɔkɔ mpe bwanya, oyo batɛmɛli na bino nyonso bakokoka te kotɛmɛla to kotyela ntembe.+
16 Lisusu, ata baboti,+ bandeko, bato ya libota ná baninga bakokaba bino, mpe bakoboma bamosusu na kati na bino;+
17 mpe bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.+
18 Nzokande ata nsuki+ moko ya mitó na bino ekobeba te.
19 Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokobikisa milimo na bino.+
20 “Lisusu, ntango bokomona mampinga ezingi+ Yerusaleme na bakaa, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene.+
21 Na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa, mpe baoyo bazali na bamboka ya zamba bákɔta na kati na yango te;+
22 mpamba te yango ezali mikolo ya kokata makambo na bosembo, mpo makambo nyonso oyo ekomamá ekokisama.+
23 Mawa na basi ya zemi mpe na baoyo bakomɛlisa bana mabɛlɛ na mikolo yango!+ Mpo mpasi moko monene ekozala na mokili mpe nkanda ekokwela bato oyo;
24 mpe bakokwea na mopanga mpe bakomema bango bakangami na bikólo nyonso;+ mpe Yerusaleme ekonyatama na bikólo, tii bantango oyo etyamá+ ya bikólo ekokoka.
25 “Lisusu, bilembo ekozala na moi+ mpe na sanza mpe na minzoto, mpe awa na mabele bikólo bakozala na nsɔmɔ, bakoyeba te ndenge ya kosala mpo mbu+ ezali konguluma mpe kotomboka,+
26 na ntango yango, bato bakolɛmba nzoto na kobanga+ mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabele esika bato bafandi;+ mpo banguya ya likoló ekoningana.+
27 Bongo bakomona Mwana ya moto+ azali koya na lipata na nguya mpe na nkembo mingi.+
28 Kasi ntango makambo wana ekobanda kosalema, bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpo kosikolama na bino ekómi pene.”
29 Yango wana apesaki bango ndakisa moko: “Bótala nzete ya figi mpe banzete mosusu nyonso:+
30 Soki ebimisi nkasa, ntango botalaka yango, boyebaka ete sikoyo eleko ya molunge ekómi pene.+
31 Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete bokonzi ya Nzambe ekómi pene.+
32 Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo nyonso ekosalema.+
33 Likoló ná mabele ekoleka,+ kasi maloba na ngai ekoleka ata moke te.+
34 “Kasi bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi+ mpe na mitungisi+ ya bomoi, noki na ntango wana kaka, mokolo wana ekwela bino pwasa+
35 lokola motambo.+ Mpo yango ekoyela bato nyonso oyo bafandi na mabele mobimba.+
36 Yango wana, bólala mpɔngi te,+ bópesa malɔmbɔ ntango nyonso+ mpo bókoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.”+
37 Bongo na moi azalaki koteya na tempelo,+ kasi na butu azalaki kokende kolala na ngomba oyo babengi Ngomba ya Olive.+
38 Mpe bato nyonso+ bazalaki koya ntɔngɔntɔngɔ epai na ye na tempelo mpo na koyoka ye.