Luka 20:1-47
20 Na mikolo yango, mokolo moko, ntango azalaki koteya bato na tempelo mpe kosakola nsango malamu, banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli elongo na mikóló bayaki penepene,+
2 mpe bazwaki maloba, balobaki na ye ete: “Yebisá biso, bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo, to nani apesi yo bokonzi oyo.”+
3 Azongiselaki bango ete: “Ngai mpe nakotuna bino motuna moko, mpe bino bóyebisa ngai:+
4 Batisimo ya Yoane eutaki na likoló to na bato?”+
5 Bongo bango na bango babandaki kokanisakanisa mpe koloba ete: “Soki tolobi ete: ‘Na likoló,’ akoloba ete: ‘Mpo na nini bondimaki ye te?’+
6 Kasi soki tolobi: ‘Na bato,’ bato nyonso bakobamba biso mabanga,+ mpo bandimaka mpenza ete Yoane+ azali mosakoli.”+
7 Bongo bazongisaki ete bayebi te esika yango eutaki.
8 Mpe Yesu alobaki na bango ete: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na lotomo nini nazali kosala makambo oyo.”+
9 Bongo abandaki kopesa bato ndakisa oyo: “Moto moko alonaki elanga ya vinyo+ mpe atikaki yango na mabɔkɔ ya basali-bilanga, mpe akendaki mobembo na mboka mopaya mpo na ntango molai.+
10 Kasi wana ntango ekokaki atindaki moombo+ moko epai ya basali-bilanga,+ mpo bápesa ye ndambo ya mbuma ya elanga ya vinyo.+ Nzokande, basali-bilanga babɛtaki ye mpe bazongisaki ye mabɔkɔ mpamba.+
11 Kasi atindelaki bango lisusu moombo mosusu. Ye mpe babɛtaki ye mpe basambwisaki ye mpe bazongisaki ye mabɔkɔ mpamba.+
12 Nzokande atindaki lisusu ya misato;+ ye mpe bazokisaki ye mpe babwakaki ye libándá.
13 Bongo nkolo ya elanga ya vinyo alobaki ete: ‘Nakosala nini? Nakotinda mwana na ngai ya bolingo.+ Mbala mosusu bakomemya ye.’
14 Ntango basali-bilanga bamonaki ye babandaki kopesana makanisi ete: ‘Talá mozwi-ya-libula; tóboma ye, mpo libula ekóma ya biso.’+
15 Bongo babwakaki ye libándá+ ya elanga ya vinyo mpe babomaki+ ye. Sikoyo nkolo ya elanga ya vinyo akosala bango nini?+
16 Akoya mpe akoboma basali-bilanga wana mpe akopesa elanga ya vinyo na mabɔkɔ ya bamosusu.”+
Ntango bayokaki bongo balobaki ete: “Likambo ya ndenge wana esalema ata mokolo moko te!”
17 Kasi atalaki bango mpe alobaki ete: “Bongo, likambo oyo ekomamá ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki+ ekómi libanga monene ya litumu ya ndako’+ elakisi nini?
18 Moto nyonso oyo akokwea likoló ya libanga wana akopanzana.+ Mpe moto nyonso oyo yango ekokwela,+ ekonikanika ye.”+
19 Bakomeli ná banganga-nzambe bakonzi bazalaki koluka ndenge ya kotya ye mabɔkɔ na ngonga wana mpenza, kasi bazalaki kobanga bato; mpo bayebaki ete apesaki ndakisa wana nde mpo na bango.+
20 Mpe nsima ya kotala ye malamumalamu, bafutaki bato na kobombana mpe batindaki bango bámimonisa lokola bayengebene, mpo bázwa+ ye na maloba, bápesa ye na mabɔkɔ ya guvɛrnema mpe na bokonzi ya guvɛrnɛrɛ.+
21 Mpe batunaki ye motuna ete: “Moteyi, toyebi ete yo olobaka mpe oteyaka makambo ndenge ezali mpenza mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka nzela ya Nzambe na boyokani na solo:+
22 Esengeli tófuta Kaisala mpako to te?”+
23 Kasi amonaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango ete:+
24 “Bólakisa ngai denari moko. Elilingi oyo mpe likomi oyo ya nani?” Balobaki ete: “Ya Kaisala.”+
25 Ye alobaki na bango ete: “Soki boye, bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala,+ kasi Nzambe biloko ya Nzambe.”+
26 Mpe bakokaki kozwa ye na liloba wana te liboso ya bato, kasi lokola bakamwaki na eyano na ye, balobaki eloko te.+
27 Nzokande, bato mosusu na kati ya Basadukai, bato oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki+ mpe batunaki ye motuna
28 ete: “Moteyi, Moize+ akomelaki biso ete: ‘Ntango ndeko mobali ya moto moko akufi, oyo azalaki na mwasi, kasi abotaki mwana te, ndeko na ye+ asengeli kokamata mwasi wana mpe kobotela ndeko na ye bana.’+
29 Sikoyo ezalaki na bandeko mibali nsambo; mpe oyo ya liboso akamataki mwasi mpe akufaki, abotaki bana te.+
30 Ndenge moko mpe oyo ya mibale,
31 mpe oyo ya misato akamataki ye. Mpe bango nyonso nsambo ndenge moko: batikaki bana te, kasi bakufaki.+
32 Nsukansuka, mwasi wana mpe akufaki.+
33 Bongo na lisekwa, mwasi yango akokóma mwasi ya nani na kati na bango? Mpo bango nsambo bazwaki ye mwasi.”+
34 Yesu alobaki na bango ete: “Bana ya ntango oyo babalaka+ mpe babalisamaka,
35 kasi baoyo bamonani ete babongi+ kozwa bomoi na ntango wana+ mpe na lisekwa na bakufi+ bakobala te mpe bakobalisama te.
36 Ya solo, bakoki lisusu kokufa te,+ mpo bazali lokola baanzelu, mpe bazali bana ya Nzambe mpo bazali bana ya lisekwa.+
37 Kasi likambo oyo ete bakufi bazali kolamuka ata Moize amonisaki yango polele, na lisolo ya mwa banzete ya nzubɛ,+ ntango abengi Yehova ‘Nzambe ya Abrahama mpe Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo.’+
38 Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi, mpo epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.”+
39 Bakomeli mosusu bazongisaki ete: “Moteyi, olobi malamu.”
40 Mpo bazalaki lisusu na mpiko ya kotuna ye ata motuna moko te.
41 Ye mpe alobaki na bango ete: “Ndenge nini balobaka ete Kristo azali mwana ya Davidi?+
42 Mpo Davidi ye moko alobi na mokanda ya Nzembo ete: ‘Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali
43 tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.”’+
44 Sikoyo, Davidi azali kobenga ye ‘Nkolo’; bongo ndenge nini ye azali mwana na ye?”
45 Bongo lokola bato nyonso bazalaki koyoka alobaki na bayekoli ete:+
46 “Bókeba na bakomeli oyo balingaka kolekaleka na bazambala mpe balingaka bambote na bazando mpe bakiti ya liboso na basinagoga mpe bisika ya lokumu mingi na ntango ya bilei ya mpokwa,+
47 mpe oyo balyaka bandako ya basi oyo mibali bakufá+ mpe mpo na kokosa basalaka mabondeli milaimilai. Bango bakozwa lisambisi moko ya makasi koleka.”+