Luka 2:1-52

2  Nzokande na mikolo wana Kaisala Augusto abimisaki mobeko+ ete mabele mobimba esika bato bafandi bákomisa nkombo;  (oyo nde kokomisama nkombo ya liboso oyo esalemaki ntango Kiriniusi azalaki guvɛrnɛrɛ ya Siri;)  mpe bato nyonso bazalaki kokende kokomisa nkombo,+ moto na moto na engumba na ye.  Yango wana Yozefe mpe alongwaki na Galile, na engumba ya Nazarete, akei na Yudea, na engumba ya Davidi, oyo babengi Beteleme,+ mpo azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi,+  mpo akomisa nkombo ye ná Maria,+ oyo na ntango wana asilaki kokóma mwasi na ye+ mpe na ntango yango, akómaki pene na kobota.+  Ntango bazalaki kuna, mikolo na ye ya kobota ekokaki.  Mpe abotaki mwana mobali, mwana ya liboso,+ mpe azingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ,+ mpo bazwaki esika te na bandako oyo bapaya bazalaki kolala.  Kaka na mokili yango babateli ya mpate bazalaki kofanda libándá butu mobimba* mpo na kobatela bitonga na bango.  Mpe na mbala moko anzelu+ ya Yehova atɛlɛmaki pene na bango, mpe nkembo ya Yehova+ engɛngɛlaki bango, mpe babangaki mingi. 10  Kasi anzelu yango alobaki na bango ete: “Bóbanga te, mpo talá! nazali kosakwela bino nsango malamu ya esengo moko monene oyo bato nyonso bakozala na yango,+ 11  mpo lelo, na engumba ya Davidi,+ baboteli bino Mobikisi,+ oyo azali Kristo Nkolo.+ 12  Mpe talá elembo mpo na bino: Bokokuta mwana moko ya moke bazingi ye bilamba mpe alali na elyelo ya bibwɛlɛ.” 13  Mpe na mbala moko ebele ya baanzelu*+ bayaki kosangana na anzelu yango, babandi kosanzola Nzambe+ mpe koloba: 14  “Nkembo na Nzambe kuna na likoló,+ mpe kimya+ na mabele na bato oyo ye andimi.”+ 15  Bongo ntango baanzelu batikaki bango bazongi na likoló, babateli ya mpate babandaki kosolola bango na bango ete: “Tókende mbala moko na Beteleme mpe tómona likambo oyo esalemi, oyo Yehova+ ayebisi biso.” 16  Mpe bakendaki nokinoki mpe bakutaki Maria ná Yozefe, mpe mwana yango ya moke alali na elyelo ya bibwɛlɛ. 17  Ntango bamonaki ye, bayebisaki liloba oyo anzelu ayebisaki bango mpo na mwana yango. 18  Mpe bato nyonso oyo bayokaki bakamwaki na makambo oyo babateli ya mpate bayebisaki bango, 19  kasi Maria azalaki kobomba maloba nyonso wana mpe kokanisa yango malamumalamu na motema na ye.+ 20  Bongo babateli ya mpate bazongaki, bazali kopesa Nzambe nkembo mpe kosanzola ye mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, kaka ndenge bayebisaki bango. 21  Nzokande ntango mikolo mwambe+ ekokaki mpo na kokata ye ngenga,+ bapesaki ye mpe nkombo Yesu,+ nkombo oyo anzelu apesaki ye liboso mama na ye azwa zemi na ye.+ 22  Lisusu, ntango mikolo ya kopɛtolama+ na bango ekokaki, na kolanda mobeko ya Moize, bakendaki na ye na Yerusaleme mpo na kolakisa ye liboso ya Yehova, 23  kaka ndenge ekomamá na mobeko ya Yehova ete: “Mwana mobali nyonso oyo afungoli libumu asengeli kobengama mosantu na miso ya Yehova,”+ 24  mpe mpo na kopesa mbeka na kolanda oyo mobeko ya Yehova elobi: “Bipopo mibale to bana mibale ya bibenga.”+ 25  Mpe talá! ezalaki na mobali moko na Yerusaleme nkombo na ye Simeone, moto yango azalaki moyengebene mpe abangaka Nzambe, azalaki kozela kobɔndisama ya Yisraele,+ mpe elimo santu ezalaki likoló na ye. 26  Lisusu, Nzambe amonisaki ye na nzela ya elimo santu ete akomona liwa te liboso amona Kristo+ ya Yehova. 27  Na nguya ya elimo+ ayaki na tempelo; mpe lokola baboti bakɔtisaki mwana moke, Yesu, mpo na kosalela ye ndenge mibeko esɛngi,+ 28  ye moko amemaki ye na mabɔkɔ mpe apambolaki Nzambe mpe alobaki: 29  “Sikoyo, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, tiká moombo na yo akufa na kimya+ ndenge olobaki; 30  mpo miso na ngai emoni mwango na yo ya kobikisa+ 31  oyo obongisi na miso ya bato ya bikólo nyonso,+ 32  pole+ mpo na kolongola elamba oyo ezipi+ bikólo+ mpe nkembo ya bato na yo Yisraele.” 33  Mpe tata na ye ná mama na ye bazalaki kaka kokamwa na makambo nyonso oyo bazalaki koloba mpo na ye. 34  Lisusu, Simeone apambolaki bango, kasi alobaki na Maria mama na ye ete: “Talá! Moto oyo atyami mpo na kokweisa+ mpe kotɛlɛmisa lisusu bato mingi na Yisraele+ mpe mpo na kozala elembo oyo bato bakolobela mabe+ 35  (ɛɛ, mopanga molai ekotɔbɔla molimo na yo),+ mpo makanisi ya mitema mingi emonana.”+ 36  Nzokande ezalaki na Ana mosakoli moko ya mwasi, mwana ya Fanwele, ya libota ya Ashere (mwasi yango akómaki na mbula mingi mpenza, mpe afandaki na mobali na ye mbula nsambo banda na bongɔndɔ na ye, 37  mpe sikoyo akómaki na mbula ntuku mwambe na minei [84], mwasi oyo mobali akufá),+ oyo azalaki kozanga te na tempelo, azalaki kosala mosala mosantu butu moi,+ kokila bilei mpe kosala malɔmbɔ. 38  Mpe na ngonga yango mpenza ayaki pene mpe abandaki kotɔnda Nzambe mpe kolobela mwana wana epai ya baoyo nyonso bazalaki kozela kosikolama ya Yerusaleme.+ 39  Bongo ntango basilisaki kosala makambo nyonso na kolanda mibeko+ ya Yehova, bazongaki na Galile na engumba na bango ya Nazarete.+ 40  Mpe mwana yango azalaki se kokola mpe kokóma makasi,+ atondaki na bwanya, mpe Nzambe azalaki se kondima+ ye. 41  Nzokande baboti na ye bazalaki na momeseno ya kokende mbula na mbula na Yerusaleme+ mpo na fɛti ya elekeli. 42  Mpe ntango akómaki na mbula zomi na mibale, bakendaki na fɛti yango ndenge bamesanaki kokende+ 43  mpe batikalaki wana tii fɛti esilaki. Kasi ntango bazalaki kozonga, elenge mobali yango, Yesu, atikalaki na Yerusaleme, mpe baboti na ye bayebaki yango te. 44  Lokola bakanisaki ete azali na etuluku ya baoyo bazalaki kosala na bango mobembo, batambolaki ntaka ya mokolo mobimba+ mpe na nsima babandaki koluka ye epai ya bato ya libota mpe epai ya bato oyo bayebani na bango. 45  Kasi lokola bamonaki ye te, bazongaki na Yerusaleme, koluka ye bipai nyonso. 46  Bongo nsima ya mikolo misato bakutaki ye na tempelo,+ afandi na katikati ya bateyi mpe azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna. 47  Kasi baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bazalaki se kokamwa na mayele na ye mpe na biyano na ye.+ 48  Nzokande ntango bamonaki ye bakamwaki, mpe mama na ye alobaki na ye ete: “Mwana, osali biso boye mpo na nini? Ngai ná tata na yo totamboli motó mpo na koluka yo.” 49  Kasi ye alobaki na bango ete: “Mpo na nini bóluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?”+ 50  Atako bongo, bakangaki ntina ya liloba oyo alobaki na bango te.+ 51  Mpe akitaki elongo na bango mpe akómaki na Nazarete, mpe azalaki kaka komikitisa+ liboso na bango. Lisusu, mama na ye abatelaki maloba nyonso wana malamumalamu na motema na ye.+ 52  Mpe Yesu akobaki kokola na bwanya+ mpe na nzoto mpe bato ná Nzambe bazalaki kondima ye.+

Maloba na nse

Talá Mt 14:25, msl.
Lil., “ebele ya limpinga likoló.”