Luka 19:1-48
19 Mpe akɔtaki na Yeriko+ mpe azalaki kokatisa yango.
2 Nzokande awa ezalaki na mobali moko na nkombo Zakai; mpe azalaki mokonzi ya bakɔngɔli-mpako, mpe azalaki mozwi.
3 Mpe azalaki koluka amona+ moto babengi Yesu, kasi akokaki te mpo na ebele ya bato, mpo azalaki mokuse.
4 Bongo apotaki naino mbangu tii liboso, amati na nzete ya sikaminosi-figi mpo amona ye, mpo Yesu asengelaki koleka na nzela wana.
5 Sikoyo ntango Yesu akómaki na esika yango, atalaki likoló mpe alobaki na ye ete: “Zakai, kitá noki, mpo lelo nakofanda na ndako na yo.”
6 Bongo akitaki noki mpe na esengo ayambaki ye na ndako na ye.
7 Kasi ntango bamonaki bongo, bango nyonso babandaki koimaima+ mpe koloba ete: “Akɔti kofanda epai ya moto oyo azali mosumuki.”
8 Kasi Zakai atɛlɛmaki mpe alobaki na Nkolo ete: “Nkolo, talá ndambo ya biloko na ngai, nakopesa yango babola, mpe eloko nyonso nabɔtɔlaki moto na efundeli ya lokuta+ nakozongisa yango mbala minei.”+
9 Na yango Yesu alobaki na ye ete: “Na mokolo ya lelo lobiko eyei na ndako oyo, mpo ye mpe azali mwana ya Abrahama.+
10 Mpo Mwana ya moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babungaki.”+
11 Ntango bazalaki koyoka makambo wana apesaki lisusu ndakisa moko, mpo azalaki pene na Yerusaleme mpe bazalaki kokanisa ete bokonzi ya Nzambe ekomonana kaka na ntango wana.+
12 Bongo alobaki ete: “Moto moko boye ya lokumu asalaki mobembo na mokili moko ya mosika mpo na kozwa nguya ya bokonzi mpe kozonga.+
13 Abengaki baombo na ye zomi, apesaki bango mina zomi mpe ayebisaki bango ete: ‘Bósala mombongo tii ntango nakoya.’+
14 Kasi bana-mboka bazalaki koyina+ ye mpe batindelaki ye etuluku ya bantoma* mpe balobaki ete: ‘Tolingi te ete moto oyo akóma mokonzi na biso.’+
15 “Nsukansuka ntango azongaki nsima ya kozwa nguya ya bokonzi, atindaki bábengela ye baombo wana oyo apesaki bango shekele ya palata, mpo na koyeba litomba oyo bazwaki na mombongo.+
16 Bongo oyo ya liboso ayaki, alobaki ete: ‘Nkolo, mina na yo eboti mina zomi.’+
17 Bongo alobaki na ye ete: ‘Longonya, moombo malamu! Mpo omonisi ete ozali sembo na likambo ya moke mpenza, zalá na bokonzi likoló ya bingumba zomi.’+
18 Nzokande oyo ya mibale ayaki, alobaki ete: ‘Nkolo, mina na yo epesi mina mitano.’+
19 Alobaki mpe na oyo ete: ‘Yo mpe zwá mokumba ya bingumba mitano.’+
20 Kasi mosusu ayaki, alobi ete: ‘Nkolo, talá mina na yo, nabombaki yango na elamba.
21 Omoni, nazalaki kobanga yo, mpo ozali moto ya matata; okamataka oyo obombisaki te mpe obukaka oyo olonaki te.’+
22 Alobaki na ye ete: ‘Moombo mabe, nakosambisa yo na maloba ya monɔkɔ na yo moko.+ Oyebaki ete nazali moto ya matata, nakamataka oyo nabombisaki te mpe nabukaka oyo nalonaki te, boye te?+
23 Bongo mpo na nini otyaki shekele na ngai ya palata na banki te? Bongo awa nayei mbɛlɛ nabimisi yango na benefisi.’+
24 “Bongo alobaki na baoyo batɛlɛmaki wana ete: ‘Bóbɔtɔla ye mina wana mpe bópesa yango na moto oyo azali na mina zomi.’+
25 Kasi balobaki na ye ete: ‘Nkolo, ye azali na mina zomi!’—
26 ‘Nalobi na bino: Moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mingi; kasi moto oyo azali na eloko te, ata oyo azali na yango bakobɔtɔla yango.+
27 Lisusu, bóya awa na banguna na ngai oyo balingaki te nakóma mokonzi na bango mpe bóboma bango liboso na ngai.’”+
28 Bongo nsima ya koloba makambo wana, abandaki kokende liboso, azalaki komata na Yerusaleme.+
29 Mpe ntango akómaki pene na Betefage mpe Betania na ngomba babengi Ngomba ya Olive,+ atindaki bayekoli mibale,+
30 alobi: “Bókende na mboka oyo etalani na bino, mpe nsima ya kokɔta na kati na yango bokokuta mwana ya mpunda oyo bakangi nsinga, likoló na yango moto moko afandá naino te. Bófungola yango mpe bóya na yango.+
31 Kasi soki moto atuni bino ete: ‘Mpo na nini bozali kofungola yango?’ Bosengeli koloba boye: ‘Nkolo azali na mposa na yango.’”+
32 Bongo baoyo batindamaki bakendaki mpe bakutaki yango kaka ndenge alobaki na bango.+
33 Kasi ntango bazalaki kofungola mwana ya mpunda wana, bankolo na yango balobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali kofungola mwana ya mpunda wana?”+
34 Balobaki ete: “Nkolo azali na mposa na yango.”+
35 Mpe bamemaki yango epai ya Yesu, mpe babwakaki likoló ya mwana ya mpunda yango bilamba na bango ya likoló mpe bafandisaki Yesu likoló na yango.+
36 Ntango azalaki kopusana+ bango bazalaki kotanda bilamba na bango ya likoló na nzela.+
37 Ntango akómaki pene na nzela oyo ezalaki kouta na Ngomba ya Olive, ebele ya bayekoli nyonso babandaki kosepela mpe kosanzola Nzambe na mongongo makasi mpo na misala nyonso ya nguya oyo bamonaki,+
38 bazalaki koloba ete: “Moto oyo azali koya lokola Mokonzi na nkombo ya Yehova apambwama!+ Kimya na likoló, mpe nkembo na bisika ya likoló koleka!”+
39 Kasi, Bafarisai mosusu oyo bazalaki na kati ya ebele ya bato balobaki na ye ete: “Moteyi, pamelá bayekoli na yo.”+
40 Kasi ye azongisaki ete: “Nazali koyebisa bino: Soki bango bafandi nyɛɛ, mabanga+ ekoganga.”
41 Mpe ntango akómaki pene, atalaki engumba mpe alelaki yango,+
42 alobi: “Soki yo, ɛɛ yo, ososolaka+ na mokolo ya lelo makambo ya kimya—kasi sikoyo yango ebombami na miso na yo.+
43 Mpo mikolo ekoyela yo wana banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko ya makasi+ ya banzete oyo bakómisá nsɔngɛ+ mpe bakozingela+ yo mpe bakonyokola+ yo epai na epai,
44 mpe bakobwaka yo ná bana na yo oyo bazali na kati na yo na mabele,+ mpe bakotika te libanga likoló na libanga+ na kati na yo, mpo ososolaki te ntango oyo bayaki kotala yo.”+
45 Mpe akɔtaki na tempelo mpe abandaki kobwaka libándá baoyo bazalaki kotɛka,+
46 alobaki na bango: “Ekomamá ete: ‘Mpe ndako na ngai ekozala ndako ya mabondeli,’+ kasi bino bokómisi yango mobenga ya miyibi.”+
47 Lisusu, azalaki koteya mokolo na mokolo na tempelo. Kasi banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli ná bato minene ya ekólo bazalaki koluka koboma ye;+
48 kasi bazwaki likambo oyo bakokaki kosala te, mpo bato nyonso bazalaki koyoka ye na likebi nyonso.+
Maloba na nse
^ To, “baambasadɛrɛ.” Mosali oyo mokonzi atindi mpo na komonisa ye na mboka mopaya.