Luka 18:1-43
18 Bongo apesaki bango ndakisa moko mpo na komonisa bango ntina ya kobondela ntango nyonso mpe kolɛmba te,+
2 alobi: “Na engumba moko boye ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kobanga Nzambe te mpe komemya moto te.
3 Kasi na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo mobali akufá mpe azalaki kokende mbala na mbala+ epai na ye koloba ete: ‘Salá ete nalonga moto oyo nazali kosamba na ye.’
4 Ɛɛ, na boumeli ya ntango moko boye azalaki koboya, kasi na nsima alobaki na motema na ye ete: ‘Atako nabangaka Nzambe te to namemyaka moto te,
5 kasi lokola mwasi oyo mobali akufá azali ntango nyonso kotungisa ngai,+ nakosala ete alonga, noki te akokoba koya kobɛtabɛta ngai makofi+ tii nalɛmba.’”
6 Bongo Nkolo alobaki ete: “Bóyoka oyo mosambisi wana alobi, atako azali moyengebene te!
7 Bongo Nzambe akosala te ete likambo ya bato na ye oyo aponaki, oyo babelelaka ye butu moi, ekatama na bosembo+ atako azali komonisela bango motema molai?+
8 Nazali koyebisa bino ete: Akosala ete likambo na bango ekatama na bosembo nokinoki.+ Kasi, ntango Mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima awa na mabele?”
9 Kasi mpo na bamosusu oyo bazalaki komityela motema ete bazali bayengebene+ mpe bazalaki kotalela bato mosusu ete bazali mpamba,+ apesaki ndakisa oyo:
10 “Bato mibale bamataki na tempelo kobondela, moko Mofarisai mpe mosusu mokɔngɔli-mpako.
11 Mofarisai atɛlɛmaki,+ abandi kobondela+ mpe koloba makambo oyo na motema na ye ete: ‘Ee Nzambe, natɔndi yo mpo nazali lokola bato mosusu te, babɔtɔli, bato bazangi boyengebene, bato ya ekobo, to mpe lokola mokɔngɔli-mpako oyo.+
12 Nakilaka bilei mbala mibale na pɔsɔ, napesaka moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso nazwaka.’+
13 Kasi mokɔngɔli-mpako, atɛlɛmaki mosika, azalaki kutu kolinga kotombola miso na ye likoló te, kasi azalaki se kobɛtabɛta ntolo na ye+ mpe koloba ete: ‘Ee Nzambe, yokelá ngai mawa, ngai mosumuki.’+
14 Nazali koyebisa bino ete: Moto oyo akitaki na ndako na ye amonani moyengebene+ koleka moto wana mosusu; mpo moto nyonso oyo azali komitombola akoyokisama nsɔni, kasi moto oyo azali komikitisa akotombwama.”+
15 Nzokande bato babandaki mpe komemela ye bana na bango ya mike mpo asimba bango; kasi ntango bayekoli bamonaki yango babandaki kopamela bango.+
16 Nzokande, Yesu abengaki bana yango ya mike epai na ye mpe alobaki ete: “Bótika bana mike báya epai na ngai, mpe bómeka te kopekisa bango. Mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango.+
17 Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Moto nyonso oyo ayambi bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te akokɔta na yango ata moke te.”+
18 Mpe moyangeli moko boye atunaki ye motuna, alobi: “Moteyi Malamu, nasala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?”+
19 Yesu alobaki na ye ete: “Mpo na nini ozali kobenga ngai malamu? Moto malamu azali te, longola kaka moko, Nzambe.+
20 Oyebi mibeko:+ ‘Kosala ekobo te,+ Koboma moto te,+ Koyiba te,+ Kopesa litatoli ya lokuta te,+ Kumisá tata na yo mpe mama na yo.’”+
21 Bongo alobaki ete: “Natosi nyonso wana banda bolenge na ngai.”+
22 Nsima ya koyoka bongo, Yesu alobaki na ye ete: “Ezali naino na eloko moko oyo ezali kozanga yo: Tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe kabelá yango babola, mpe okozwa eloko ya motuya na likoló; mpe yaká, landá ngai.”*+
23 Ntango ayokaki bongo, ayokaki mawa mingi, mpo azalaki mpenza mozwi.+
24 Yesu atalaki ye mpe alobaki ete: “Ekozala likambo ya mpasi mpenza mpo baoyo bazali na mbongo bákɔta na bokonzi ya Nzambe!+
25 Ya solo, kokɔta ya kamela na lidusu ya ntonga ezali pɛtɛɛ koleka kokɔta ya mozwi na bokonzi ya Nzambe.”+
26 Baoyo bayokaki bongo balobaki ete: “Nani akoki ntango mosusu kobika?”
27 Alobaki ete: “Makambo oyo ekoki kosalema te mpo na bato ekoki kosalema mpo na Nzambe.”+
28 Kasi Petro alobaki ete: “Talá! Biso totiki biloko na biso mpenza mpe tolandi yo.”+
29 Alobaki na bango ete: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Ezali na moto moko te oyo atiki ndako to mwasi to bandeko mibali to baboti to bana mpo na bokonzi ya Nzambe+
30 oyo akozanga kozwa ata na ndenge nini mbala mingi koleka na eleko oyo, mpe na ntango oyo ezali koya bomoi ya seko.”+
31 Bongo abendaki bantoma zomi na mibale pembeni mpe alobaki na bango ete: “Talá! Tozali komata na Yerusaleme, mpe makambo nyonso oyo ekomamaki na basakoli+ mpo na Mwana ya moto ekokokisama.+
32 Na ndakisa, bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo mpe bakosɛka+ ye mpe bakosambwisa ye mabe+ mpe bakobwakela ye nsoi;+
33 mpe nsima ya kobɛta ye fimbo+ bakoboma+ ye, kasi na mokolo ya misato akolamuka.”+
34 Nzokande, bakangaki ntina te ya makambo yango; kasi ndimbola ya liloba oyo ezipamaki na miso na bango, mpe bazalaki koyeba te makambo oyo azalaki koloba na bango.+
35 Nzokande ntango azalaki kopusana pene na Yeriko moto moko oyo akufá miso afandaki pembeni ya nzela kosɛngasɛnga biloko.+
36 Lokola ayokaki ebele ya bato bazali koleka, abandaki kotunatuna soki ezali nini.
37 Bayebisaki ye ete: “Yesu Monazarete nde azali koleka!”+
38 Bongo agangaki mpe alobaki ete: “Yesu, Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa!”+
39 Mpe bato oyo bazalaki kotambola liboso babandaki kogangela ye ete akanga monɔkɔ, kasi azalaki kaka koganga makasi lisusu koleka ete: “Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa.”+
40 Bongo Yesu atɛlɛmaki mpe atindaki bámemela ye moto yango.+ Na nsima, ntango akómaki penepene, Yesu atunaki ye ete:
41 “Olingi nasalela yo nini?”+ Ye alobaki ete: “Nkolo, nabanda komona.”+
42 Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Bandá komona; kondima na yo ebikisi yo.”+
43 Mpe na ntango wana kaka abandaki komona,+ mpe abandaki kolanda ye, mpe kokumisa Nzambe.+ Lisusu, ntango bato nyonso bamonaki bongo, basanzolaki Nzambe.