Luka 17:1-37

17  Bongo alobaki na bayekoli na ye ete: “Makambo oyo ebɛtisaka libaku ekozanga te.+ Kasi mawa na moto oyo azali koya na yango!+  Eleki malamu bákanga ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma mpe bábwaka ye na mbu+ na esika ete abɛtisa moko ya bato mike oyo libaku.+  Bókeba. Soki ndeko na yo asali lisumu pamelá ye,+ mpe soki abongoli motema limbisá ye.+  Ata soki asaleli yo lisumu mbala nsambo na mokolo moko mpe ayei epai na yo mbala nsambo, alobi: ‘Nabongoli motema,’ osengeli kolimbisa ye.”+  Nzokande bantoma balobaki na Nkolo ete: “Bakiselá biso kondima.”+  Bongo Nkolo alobaki ete: “Soki bózalaka na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, mbɛlɛ bolobi na nzete oyo ya sikaminosi ya moindo ete: ‘Pikolamá mpe lonamá na mbu!’ mpe etosi bino.+  “Nani na kati na bino oyo azali na moombo oyo atimolaka mabele to oyo abatelaka etonga akoloba na ye ntango auti na bilanga ete: ‘Yaká awa nokinoki mpe fandá na mesa’?  Akoloba nde na ye te ete: ‘Bongiselá ngai mwa eloko mpo nalya na mpokwa, mpe latá elamba ya mosala mpe salelá ngai tii nakosilisa kolya mpe komɛla, na nsima yo mpe okolya mpe okomɛla’?  Akotɔnda nde moombo wana mpo asali makambo oyo batindaki ye asala? 10  Bongo bino mpe, ntango bosilisi kosala makambo nyonso oyo batindaki bino bósala, bóloba ete: ‘Tozali baombo mpamba.+ Oyo tosali ezali oyo tosengelaki kosala.’” 11  Mpe ntango azalaki kokende na Yerusaleme alekaki na kati ya Samaria mpe Galile.+ 12  Mpe ntango akɔtaki na mboka moko boye mibali zomi oyo bazalaki na maba+ bakutanaki na ye, kasi batɛlɛmaki mosika. 13  Mpe batombolaki mingongo na bango mpe balobaki ete: “Yesu, Molakisi, yokelá biso mawa!”+ 14  Mpe ntango amonaki bango alobaki na bango ete: “Bókende mpe bómilakisa epai ya banganga-nzambe.”+ Bongo ntango bazalaki kokende bakómaki pɛto.+ 15  Ntango moko na bango amonaki ete abiki, azongaki, azali kokumisa+ Nzambe na mongongo makasi. 16  Mpe akweaki elongi na nse na makolo ya Yesu+ mpe apesaki ye matɔndi; nzokande, azalaki Mosamaria.+ 17  Yesu azongisaki ete: “Bato zomi bakómaki pɛto, boye te? Bongo bamosusu libwa bazali wapi? 18  Moto ata moko te azongaki kokumisa Nzambe longola moto oyo ya ekólo mosusu?” 19  Mpe alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá, kende; kondima na yo ebikisi yo.”+ 20  Kasi Bafarisai batunaki ye ntango nini bokonzi ya Nzambe ekoya,+ bongo ayanolaki bango ete: “Bokonzi ya Nzambe ezali koya te na ndenge oyo bato nyonso bakomona yango polele, 21  bato mpe bakoloba te ete: ‘Bótala yango oyo!’ to: ‘Yango kuna!’+ Mpo talá! bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino.”+ 22  Bongo alobaki na bayekoli ete: “Mikolo ekoya ntango bokozala na mposa ya komona moko ya mikolo ya Mwana ya moto kasi bokomona yango te.+ 23  Mpe bato bakoloba na bino ete: ‘Bótala kuna!’ to: ‘Bótala awa!’+ Bóbima te to bólanda bango te.+ 24  Mpo se ndenge mokalikali+ engɛngaka ntango ebimaka banda na esika moko na likoló tii na esika mosusu na likoló, komonana ya Mwana ya moto+ ekozala se bongo. 25  Kasi asengeli liboso komona mpasi mingi mpe libota oyo ekoboya ye.+ 26  Lisusu, ndenge ezalaki na mikolo ya Noa,+ ekozala mpe bongo na mikolo ya Mwana ya moto:+ 27  bazalaki kolya, komɛla, mibali bazalaki kobala, basi bazalaki kobalisama, tii mokolo yango oyo Noa akɔtaki na masuwa, mpe mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.+ 28  Ekozala mpe ndenge ezalaki na mikolo ya Lota:+ bazalaki kolya, komɛla, kosomba, kotɛka, kolona, kotonga bandako. 29  Kasi na mokolo oyo Lota abimaki na Sodoma, mɔtɔ ná sufulu eutaki na likoló enɔki mpe ebomi bango nyonso.+ 30  Ekozala mpe bongo na mokolo yango oyo Mwana ya moto akomonana.+ 31  “Na mokolo yango, moto oyo azali na likoló ya ndako mpe biloko na ye ezali na ndako akita kozwa yango te, mpe moto oyo azali na bilanga, ye mpe azongela biloko oyo ezali na nsima te. 32  Bókanisa mwasi ya Lota.+ 33  Moto nyonso oyo azali koluka kobikisa molimo na ye akobungisa yango, kasi oyo abungisi yango akobatela yango na bomoi.+ 34  Nazali koyebisa bino: Na butu yango mibali mibale bakolala na mbeto moko; mosusu akozwama, kasi mosusu akosundolama.+ 35  Basi mibale bakonika na enikelo moko; mosusu akozwama, kasi mosusu akosundolama.”+ 36  — 37  Bongo bazongiselaki ye ete: “Esika nini, Nkolo?” Alobaki na bango ete: “Esika ebembe ezali,+ bampongo mpe ekoyangana wana.”+

Maloba na nse