Luka 15:1-32

15  Sikoyo bakɔngɔli-mpako+ nyonso ná basumuki+ bazalaki koya pene na ye mpo na koyoka ye.  Bongo Bafarisai ná bakomeli bazalaki koimaima mpe koloba ete: “Moto oyo azali koyamba basumuki mpe azali kolya na bango.”+  Bongo apesaki bango ndakisa oyo:  “Nani na kati na bino oyo azali na bampate nkama moko (100), soki abungisi moko na yango, akotika ntuku libwa na libwa (99) te na esobe mpe akokenda koluka oyo ebungi tii akomona yango?+  Mpe ntango azwi yango akotya yango na mapeka na ye mpe akosepela.+  Mpe ntango azongi na ndako, abengi baninga na ye ná bato oyo bafandi penepene na ye, alobi na bango ete: ‘Bósepela elongo na ngai, mpo namoni mpate na ngai oyo ebungaki.’+  Nazali koyebisa bino ete esengo ekozala mingi ndenge wana na likoló mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema+ koleka mpo na bayengebene ntuku libwa na libwa (99) oyo basengeli kobongola motema te.+  “To mwasi nani oyo azali na badrakimɛ zomi ya bibende, soki abungisi drakimɛ moko ya ebende, akopelisa mwinda te mpe akokɔmbɔla ndako na ye te mpe akoluka malamumalamu te tii akomona yango?  Mpe ntango amoni yango akobenga basi oyo bazali baninga na ye mpe bato oyo bafandi penepene na ye, akoloba ete: ‘Bósepela elongo na ngai, mpo namoni drakimɛ ya ebende oyo nabungisaki.’ 10  Nazali koyebisa bino, baanzelu ya Nzambe bakozala na esengo ndenge wana mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.”+ 11  Bongo alobaki ete: “Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali.+ 12  Mpe oyo ya leki alobaki na tata na ye ete: ‘Tata, pesá ngai ndambo na ngai ya biloko.’+ Bongo akabolelaki bango biloko na ye ya kobikela.+ 13  Bongo nsima ya mwa mikolo, mwana yango oyo ya leki ayanganisaki biloko nyonso mpe akendaki na mokili moko ya mosika, mpe kuna abebisaki biloko na ye na bomoi moko ya mbindo.+ 14  Ntango asilisaki kobebisa biloko nyonso, nzala moko makasi ebimaki na mokili wana mobimba, mpe abandaki kokelela. 15  Akendaki kutu kokangama na mwana-mboka moko ya mokili wana, mpe atindaki ye na bilanga na ye mpo abatelaka bangulu.+ 16  Mpe azalaki na mposa ya kolya ata bilei ya bangulu, kasi moto moko apesaki ye eloko te.+ 17  “Ntango makanisi ya malamu ezongelaki ye, alobaki ete: ‘Ebele ya basali ya tata na ngai bazali na mampa mingi, bongo ngai nazali kokufa na nzala awa! 18  Nakotɛlɛma mpe nakokende+ epai ya tata na ngai mpe nakoloba na ye ete: “Tata, nasaleli likoló lisumu mpe nasaleli yo lisumu.+ 19  Nabongi lisusu kobengama mwana na yo te. Zwá ngai lokola moko ya basali na yo.”’ 20  Bongo atɛlɛmaki mpe akendaki epai ya tata na ye. Ntango azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokaki mawa, mpe apotaki mbangu mpe amibwakaki na nkingo na ye mpe apwɛpwaki ye na boboto. 21  Bongo mwana alobaki na ye ete: ‘Tata, nasaleli likoló lisumu mpe nasaleli yo lisumu.+ Nabongi lisusu kobengama mwana na yo te. Zwá ngai lokola moko ya basali na yo.’+ 22  Kasi tata alobaki na baombo na ye ete: ‘Bóya nokinoki na zambala oyo eleki kitoko, mpe bólatisa+ ye yango, mpe bólatisa ye lopɛtɛ+ na lobɔkɔ mpe sandale na makolo. 23  Mpe bóya na mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta,+ bóboma yango, bongo tólya mpe tósepela, 24  mpo mwana na ngai oyo akufaki mpe azongi na bomoi;+ abungaki mpe amonani.’ Mpe babandaki kosepela. 25  “Nzokande mwana na ye ya mokóló+ azalaki na elanga; mpe ntango ayaki mpe akómaki penepene na ndako ayokaki bazali kobɛta miziki mpe kobina. 26  Bongo abengaki moko na basaleli mpe atunaki ye ntina ya makambo wana. 27  Alobaki na ye ete: ‘Ndeko+ na yo ayei, mpe tata+ na yo abomi mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta, mpo azwi ye lisusu na nzoto kolɔngɔnɔ.’ 28  Kasi asilikaki mpe aboyaki kokɔta. Bongo tata na ye abimaki mpe abandaki kobondela ye.+ 29  Azongiselaki tata na ye ete: ‘Talá bambula mingi oyo nazali kosalela yo lokola moombo mpe ata mbala moko te nabuká mitindo na yo, kasi opesá ngai ata mbala moko te mwana-ntaba mpo nasepela elongo na baninga na ngai.+ 30  Kasi ntango kaka mwana na yo+ oyo ayei, ye moto asilisaki biloko na yo ya kobikela na basi ya ndumba,+ obomeli ye mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta.’+ 31  Bongo alobaki na ye ete: ‘Mwana na ngai, ozalaka ntango nyonso elongo na ngai, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo;+ 32  kasi tiká tósepela kaka mpe tózala na esengo, mpo ndeko na yo oyo akufaki mpe azongi na bomoi, abungaki mpe amonani.’”+

Maloba na nse