Luka 14:1-35
14 Mpe mokolo moko boye na sabata, ntango akendaki kolya na ndako ya mokonzi moko ya Bafarisai,+ bazalaki kotala ye na likebi mpenza.+
2 Mpe talá! moto moko oyo azalaki na maladi oyo evimbisaka nzoto na mai azalaki liboso na ye.
3 Bongo Yesu azongiselaki baoyo bayebaki Mibeko malamumalamu mpe Bafarisai ete: “Bakoki kobikisa moto na sabata to te?”+
4 Kasi bango bafandaki nyɛɛ. Bongo asimbaki moto yango, abikisaki ye mpe atikaki ye akende.
5 Mpe alobaki na bango ete: “Nani na kati na bino, soki mwana na ye to ngɔmbɛ na ye ya mobali akwei na libulu,+ akobimisa ye nokinoki na mokolo ya sabata te?”+
6 Mpe bakokaki te koyanola na makambo yango.+
7 Bongo apesaki bato babengisamaki ndakisa moko, mpo amonaki ndenge bazalaki kopona bisika oyo eleki lokumu, alobaki na bango+ ete:
8 “Ntango moto moko abengisi yo na fɛti ya libala, kofanda na esika oyo eleki lokumu te.+ Mbala mosusu abengisi moto mosusu oyo aleki yo na lokumu na fɛti yango,
9 mpe moto oyo abengisaki yo ná ye akoya mpe akoloba na yo ete: ‘Tikelá moto oyo esika wana.’ Bongo okokende na nsɔni kofanda na esika ya nsuka mpenza.+
10 Kasi ntango babengisi yo, kende kofanda na esika ya nsuka mpenza,+ mpo ntango moto oyo abengisaki yo akoya akoloba na yo ete: ‘Moninga, matá na esika ya lokumu.’ Bongo okozala na lokumu na miso ya baninga na yo nyonso oyo babengisamaki elongo na yo.+
11 Mpo moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama mpe moto oyo azali komikitisa akotombwama.”+
12 Na nsima abandaki mpe koloba na moto oyo abengisaki ye ete: “Ntango obongisi bilei ya midi to bilei ya mpokwa, kobenga te baninga na yo to bandeko na yo to bato ya libota na yo to bazwi oyo bafandi penepene na yo. Mpo mokolo mosusu bango mpe bakoki kobengisa yo mpe wana bakozongisela yo bolamu oyo osalaki.
13 Kasi ntango osali fɛti, bengisá babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bato oyo bakufá miso;+
14 mpe okozala na esengo, mpo bazali na eloko ya kozongisela yo te. Mpo okofutama na lisekwa+ ya bayengebene.”
15 Ntango ayokaki makambo wana moto moko na kati ya bato oyo babengisamaki alobaki na ye ete: “Esengo na moto oyo azali kolya mampa na bokonzi ya Nzambe.”+
16 Yesu alobaki na ye ete: “Moto moko asalaki fɛti moko monene, mpe abengisaki bato mingi.+
17 Mpe atindaki moombo na ye na ngonga ya fɛti koloba na bato oyo babengisamaki ete: ‘Bóya,+ mpo basili kolɛngɛla biloko.’
18 Kasi bango nyonso babandaki kosɛnga bolimbisi ndenge moko.+ Ya liboso alobaki na ye ete: ‘Nasombi elanga mpe esengeli nakende kotala yango; nasɛngi yo olimbisa ngai.’+
19 Mpe mosusu alobaki ete: ‘Nasombi ngɔmbɛ zomi oyo ekangisami mibalemibale mpe nazali kokende kotala yango malamumalamu; nasɛngi yo olimbisa ngai.’+
20 Mosusu mpe alobaki ete: ‘Nauti kobala+ mwasi kaka sikoyo, yango wana nakoki koya te.’
21 Bongo moombo yango ayaki koyebisa nkolo na ye makambo wana. Bongo nkolo-ndako ayokaki nkanda mpe alobaki na moombo na ye ete: ‘Bimá nokinoki na babalabala ya minene mpe na babalabala ya mike ya engumba mpe yaká na babola ná bibɔsɔnɔ ná bato oyo bakufá miso ná batɛngumi.’+
22 Na nsima moombo yango alobaki ete: ‘Nkolo, oyo otindaki esili kosalema, kasi esika ezali naino.’
23 Mpe nkolo alobaki na moombo yango ete: ‘Bimá na banzela+ mpe na bisika oyo ezingami na lopango, mpe sɛngisá bango bákɔta, mpo ndako na ngai etonda.+
24 Mpo nazali koloba na bino ete: Moko te na kati ya bato oyo babengisamaki akoyoka ata nsolo ya bilei ya fɛti na ngai.’”+
25 Sikoyo ebele ya bato bazalaki kotambola elongo na ye, mpe abalukaki mpe alobaki na bango ete:
26 “Soki moto ayei epai na ngai mpe ayini te tata na ye ná mama na ye ná mwasi na ye ná bana na ye ná bandeko na ye ya mibali ná bandeko na ye ya basi, ɛɛ, ata mpe molimo na ye moko,+ akoki kozala moyekoli na ngai te.+
27 Moto oyo azali komema nzete na ye ya mpasi te mpe azali kolanda ngai te akoki kozala moyekoli na ngai te.+
28 Na ndakisa, nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga,+ mpo na komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?
29 Soki te, mbala mosusu akotya moboko na yango kasi akokoka kosilisa yango te, mpe bato nyonso oyo bakotala bakobanda kosɛka ye,
30 mpe bakoloba ete: ‘Moto oyo abandaki kotonga kasi akoki kosilisa te.’
31 To mokonzi nani oyo akokende kokutana na mokonzi mosusu na etumba, akofanda liboso te mpo na kosala likita mpe komona soki akokoka na basoda nkóto zomi (10 000) kobunda na mokonzi oyo ayeli ye na basoda nkóto ntuku mibale (20 000)?+
32 Soki akokoka te, naino mokonzi wana azali mosika akotinda etuluku ya bantoma* mpe akoluka kimya.+
33 Yango wana, moto nyonso na kati na bino oyo aboyi kopesa biloko na ye nyonso mokɔngɔ+ akoki kozala moyekoli na ngai te.
34 “Ya solo, mungwa ezalaka malamu mingi. Kasi soki mungwa esili elɛngi na yango, bakopesa yango elɛngi na nini?+
35 Ezalaka na ntina te mpo na mabele to mpo na bipɔli. Babwakaka yango libándá. Moto oyo azali na matoi ya koyoka, ayoka.”+
Maloba na nse
^ To, “baambasadɛrɛ.” Mosali oyo mokonzi atindi mpo na komonisa ye na mboka mopaya.