Luka 13:1-35
13 Na eleko yango mpenza bato mosusu bazalaki wana mpe bayebisaki ye ete Pilate abomaki Bagalile+ oyo bazalaki kopesa bambeka.
2 Bongo azongiselaki bango ete: “Bokanisi ete Bagalile wana bazalaki basumuki+ koleka Bagalile mosusu nyonso mpo makambo wana ekweli bango?
3 Te, bongo te, nazali koyebisa bino; kasi soki bobongoli mitema te, bino nyonso bokobomama se ndenge wana.+
4 To baoyo zomi na mwambe oyo linɔ́ngi ya Siloame ekwelaki mpe ebomaki bango, bokanisi ete bazalaki na nyongo monene koleka bato mosusu nyonso oyo bafandaka na Yerusaleme?
5 Te, bongo te, nazali koyebisa bino; kasi soki bobongoli mitema te, bino nyonso bokobomama se bongo.”+
6 Bongo apesaki ndakisa oyo: “Moto moko azalaki na nzete ya figi oyo elonamaki na elanga na ye ya vinyo,+ mpe ayaki koluka mbuma na nzete yango,+ kasi azwaki ata moko te.+
7 Mpe alobaki na mosali-bilanga ya vinyo ete: ‘Talá mbula misato+ yango oyo banda nazali koya koluka mbuma na nzete ya figi oyo, kasi nazali kozwa ata moko te. Katá yango!+ Mpo na nini mpenza ezali kokoba kobebisa mabele?’
8 Azongiselaki ye ete: ‘Nkolo, tiká yango+ lisusu mbula oyo, tii natimola zingazinga na yango mpe natya bipɔli;
9 mpe soki eboti mbuma na mikolo ekoya, malamu mingi; kasi soki te, okokata yango.’”+
10 Sikoyo azalaki koteya na sinagoga moko na sabata.
11 Mpe talá! mwasi moko oyo demo+ moko abɛlisaki na boumeli ya mbula zomi na mwambe, agumbamá na mibale mpe azalaki kokoka ata moke te kotɛlɛma alima.
12 Ntango Yesu amonaki ye, ayebisaki ye ete: “Mwasi, obiki+ na bolɛmbu na yo.”
13 Mpe atyelaki ye mabɔkɔ; mpe na ntango wana kaka atɛlɛmaki semba,+ mpe abandaki kokumisa Nzambe.
14 Kasi lokola mokambi ya sinagoga ayokaki mabe mpo Yesu abikisaki moto na sabata, abandaki koloba na ebele ya bato yango boye: “Ezali na mikolo motoba oyo mosala esengeli kosalema;+ yango wana, bóyaka kobikisama na mikolo wana, kasi na mokolo ya sabata te.”+
15 Nzokande, Nkolo ayanolaki ye mpe alobaki ete: “Bakosi,+ na sabata mokomoko na bino afungolaka ngɔmbɛ na ye ya mobali to mpunda na ye na lopango ya bibwɛlɛ mpe akendaka komɛlisa yango, boye te?+
16 Bongo ebongaki te ete mwasi oyo, oyo azali mwana ya Abrahama,+ mpe oyo Satana akangá mbula zomi na mwambe oyo afungwama na nsinga wana na mokolo ya sabata?”
17 Mpe ntango alobaki makambo wana, batɛmɛli na ye nyonso babandaki koyoka nsɔni;+ kasi ebele ya bato nyonso wana babandaki kosepela na makambo nyonso ya nkembo oyo azalaki kosala.+
18 Yango wana alobaki ete: “Bokonzi ya Nzambe ezali lokola nini, mpe nakokokanisa yango na nini?+
19 Ezali lokola mbuma moko ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki na elanga na ye, mpe ekolaki mpe ekómaki nzete, mpe bandɛkɛ ya likoló+ bayaki kofanda na bitape na yango.”+
20 Mpe alobaki lisusu ete: “Nakokokanisa bokonzi ya Nzambe na nini?
21 Ezali lokola levire, oyo mwasi moko azwaki mpe abombaki na katini ya bimekelo misato ya minene* ya farini tii na ntango pɔtɔpɔtɔ mobimba evimbaki.”+
22 Mpe atambolaki engumba na engumba mpe mboka na mboka, azali koteya mpe kokoba na mobembo na ye na Yerusaleme.+
23 Nzokande moto moko alobaki na ye ete: “Nkolo, baoyo bakobika bazali moke?”+ Ye alobaki na bango ete:
24 “Bósala+ makasi mpenza bókɔta na porte ya moke,+ mpo nazali koyebisa bino, bato mingi bakoluka kokɔta kasi bakokoka te,+
25 ntango kaka nkolo-ndako akotɛlɛma mpe akokanga porte, mpe bokobanda kotɛlɛma libándá mpe kobɛta kɔkɔkɔ na porte, mpe koloba ete: ‘Tata, fungolelá biso.’+ Kasi ye akozongisela bino ete: ‘Nayebi te esika bouti.’+
26 Bongo bokobanda koloba: ‘Tolyaki mpe tomɛlaki na miso na yo, mpe ozalaki koteya na babalabala na biso ya minene.’+
27 Kasi ye akoyebisa bino ete: ‘Nayebi te esika bouti. Bólongwa pene na ngai, bino nyonso, bato bosalaka makambo ya kozanga boyengebene!’+
28 Kuna nde bokolela mpe bokolya mino,+ ntango bokomona Abrahama ná Yisaka ná Yakobo ná basakoli nyonso na bokonzi ya Nzambe,+ kasi bino bobwakami libándá.
29 Lisusu, bato bakouta na ɛsti mpe wɛsti, na nɔrdi mpe na sudi,+ mpe bakofanda na mesa na bokonzi ya Nzambe.+
30 Mpe talá! ezali na bato ya nsuka oyo bakokóma bato ya liboso, mpe ezali na bato ya liboso oyo bakokóma bato ya nsuka.”+
31 Na ngonga yango mpenza Bafarisai mosusu bayaki, balobaki na ye ete: “Simbá nzela na yo kende, mpo Erode alingi koboma yo.”
32 Mpe alobaki na bango ete: “Bókende koyebisa gambala+ wana ete: ‘Talá! Nazali kobengana bademo mpe nazali kobikisa lelo ná lobi, mpe na mokolo ya misato nakosilisa mosala na ngai.’+
33 Atako bongo, nasengeli kokoba mobembo na ngai lelo ná lobi mpe na mokolo oyo ekolanda, mpo ekoki kondimama te ete mosakoli akufa na libándá ya Yerusaleme.+
34 Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka+ basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga+—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko ndenge nsoso ya mwasi eyanganisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango,+ kasi bolingaki yango te!+
35 Talá! Basundoleli bino ndako+ na bino. Nazali koyebisa bino: Bokomona ngai ata moke te tii na ntango bokoloba: ‘Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama!’”+
Maloba na nse
^ To, “bimekeli misato ya minene,” yango nyonso ezali litre 22.