Luka 12:1-59

12  Na ntango yango, ebele ya bato bayanganaki esika moko, bazalaki bankóto mingi mpenza mpe bazalaki konyatana; bongo abandaki koloba liboso na bayekoli ete: “Bókeba na levire+ ya Bafarisai, elingi koloba bokosi.+  Kasi ezali na eloko moko te oyo babombá malamu oyo ekomonisama te, mpe ezali na sekele moko te oyo ekoyebana te.+  Yango wana makambo oyo bozali koloba na molili ekoyokana na pole, mpe oyo bozali koloba na mongongo ya nse na biteni ya kati ya ndako ekosakolama na likoló ya ndako.+  Lisusu, nazali koloba na bino, baninga na ngai:+ Bóbanga te baoyo babomaka nzoto mpe na nsima bakoki kosala eloko mosusu te.+  Kasi nakomonisa bino moto oyo bosengeli kobanga: Bóbanga moto+ oyo nsima ya koboma azali na bokonzi ya kobwaka na Gehena.+ Ɛɛ, nazali koyebisa bino, bóbanga+ nde Moto wana.  Batɛkaka bakɛngɛli-mboka mitano na mbongo ya bibende mibale ya motuya moke, boye te? Nzokande Nzambe abosanaka ata moko na yango te.+  Kasi ata nsuki+ nyonso ya mitó na bino etángami. Bóbanga te; bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.+  “Boye, nazali koloba na bino ete: Moto nyonso oyo alobi polele+ liboso ya bato ete ngai ná ye tozali na bomoko, Mwana ya moto mpe akoloba polele liboso ya baanzelu ya Nzambe ete azali na bomoko na ye.+  Kasi moto oyo awangani+ ngai liboso ya bato bakowangana ye liboso ya baanzelu ya Nzambe.+ 10  Mpe moto nyonso oyo alobi liloba ya kotɛmɛla Mwana ya moto, bakolimbisa ye; kasi moto oyo afingi elimo santu bakolimbisa ye te.+ 11  Kasi ntango bakomema bino liboso ya ebele ya bato oyo bayangani mpe liboso ya basali ya guvɛrnema mpe bakonzi, bómitungisa te mpo na ndenge oyo bokoloba to makambo oyo bokoloba ntango bokosamba to oyo bokobimisa;+ 12  mpo elimo santu+ ekoteya bino na ngonga wana mpenza makambo oyo bosengeli koloba.”+ 13  Bongo moto moko na kati ya ebele ya bato alobaki na ye ete: “Moteyi, yebisá ndeko na ngai akabola na ngai libula.” 14  Alobaki na ye ete: “Yo, nani atye ngai mosambisi+ to mokaboli ya biloko na bino?” 15  Bongo alobaki na bango ete: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela,+ mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”+ 16  Yango wana, apesaki bango ndakisa moko ete: “Mabele ya mozwi moko ebotaki malamu. 17  Bongo abandaki kokanisa na motema na ye ete: ‘Nakosala nini sikoyo lokola nazali na esika te ya koyanganisa biloko oyo nabuki?’ 18  Bongo alobaki: ‘Nakosala boye:+ Nakobuka bandako na ngai ya kobomba biloko mpe nakotonga oyo ya minene koleka, mpe kuna nakoyanganisa mbuma nyonso mpe biloko nyonso ya malamu;+ 19  mpe nakoloba+ na molimo na ngai ete: “Molimo na ngai, ozali na ebele ya biloko ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, omisepelisa.”’+ 20  Kasi Nzambe alobaki na ye ete: ‘Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo molimo na yo.+ Bongo nani akozwa biloko oyo onduki?’+ 21  Ezali mpe bongo mpo na moto oyo amibombeli biloko ya motuya kasi azali mozwi te na miso ya Nzambe.”+ 22  Boye alobaki na bayekoli na ye ete: “Yango wana nazali koloba na bino ete: Bótika komitungisa mpo na milimo na bino mpo na oyo bokolya to mpo na nzoto na bino mpo na oyo bokolata.+ 23  Mpo molimo eleki bilei mpe nzoto eleki bilamba. 24  Bótala malamumalamu bayanganga,+ mpamba te elonaka te mpe ebukaka te, mpe ezali na esika ya kobomba bilei te mpe na ndako ya kobomba biloko te, kasi atako bongo Nzambe aleisaka yango. Bino boleki bandɛkɛ na motuya mosika te?+ 25  Nani na kati na bino soki azali komitungisa akoki kobakisa bolai ya bomoi na ye ata moke?+ 26  Yango wana, soki bokoki te kosala likambo oyo eleki moke, mpo na nini komitungisa+ mpo na makambo mosusu? 27  Bótala malamumalamu ndenge bafololo lísi ekolaka;+ emonaka mpasi te mpe etongaka elamba te; kasi nazali koyebisa bino: Ata Salomo na nkembo na ye nyonso alataki lokola moko na yango te.+ 28  Bongo soki Nzambe alatisaka matiti ya esobe, oyo ezali lelo mpe lobi ekobwakama na mɔtɔ, akolatisa bino koleka te, bino bato ya kondima moke!+ 29  Yango wana, bótika koluka oyo bokolya mpe oyo bokomɛla, mpe bótika kozala motema likolólikoló;+ 30  mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo ya mokili balukaka na lokoso mpenza, kasi Tata na bino ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko wana.+ 31  Nzokande, bólukaka ntango nyonso bokonzi na ye, mpe bakobakisela bino biloko wana.+ 32  “Bóbanga te,+ etonga moke,+ mpo Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.+ 33  Bótɛka+ biloko na bino mpe bópesa makabo ya motema mawa.+ Bómisalela bapɔtɔmɔni oyo ebebaka te, elingi koloba, bómityela biloko ya motuya oyo esilaka te na likoló,+ epai moyibi apusanaka pene te mpe ndɔngɛ ebebisaka te. 34  Mpo epai eloko na bino ya motuya ezali, mitema na bino ekozala mpe kuna.+ 35  “Bómilɛngɛla*+ mpe miinda+ na bino epela, 36  mpe bino moko bózala lokola bato oyo bazali kozela nkolo+ na bango ntango akouta na libala,+ mpo ntango akoya mpe akobɛta kɔkɔkɔ+ báfungolela ye na mbala moko. 37  Esengo na baombo oyo nkolo na bango ntango akoya akokuta bango bazali kokɛngɛla!+ Ya solo mpenza nalobi na bino: Akomilɛngɛla*+ mpe akofandisa bango na mesa mpe akopesa bango oyo basengeli na yango.+ 38  Mpe soki ayei na eleko ya mibale ya kokɛngɛla na butu, to na oyo ya misato,* mpe akuti bango bongo, esengo na bango!+ 39  Kasi yebá likambo oyo: soki nkolo-ndako ayebaka na ngonga nini moyibi akoya, mbɛlɛ akobi kokɛngɛla mpe mbɛlɛ atiki te bábuka ndako na ye mpe bákɔta.+ 40  Bino mpe, bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.”+ 41  Bongo Petro alobaki ete: “Nkolo, ozali kopesa ndakisa wana mpo na biso to mpe mpo na bato nyonso?” 42  Mpe Nkolo alobaki ete: “Nani azali mpenza kapita+ ya sembo, ya mayele,+ oyo nkolo na ye akotya ye abatela basaleli na ye nyonso mpo apesaka bango bilei oyo basengeli na yango na ntango oyo ebongi?+ 43  Esengo na moombo yango, soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo!+ 44  Nazali koyebisa bino solo: Akotya ye abatela biloko na ye nyonso.+ 45  Kasi soki moombo wana alobi na motema na ye: ‘Nkolo na ngai azali koya noki te,’+ mpe abandi kobɛta basali ya mibali mpe basali ya basi, mpe kolya mpe komɛla mpe kolangwa,+ 46  nkolo ya moombo wana akoya mokolo oyo ye azali kozela ye te mpe na ngonga oyo ye ayebi te,+ mpe akopesa ye etumbu ya makasi mpenza mpe akotya ye esika moko na bato ya sembo te.+ 47  Bongo moombo oyo akangaki ntina ya mokano ya nkolo na ye kasi amilɛngɛlaki te to asalaki mokano na ye te bakobɛta ye fimbo mingi.+ 48  Kasi oyo akangaki ntina te+ mpe asalaki makambo oyo ebongi na kobɛtama, akobɛtama moke.+ Ya solo, moto nyonso oyo bapesi ye mingi, bakosɛnga ye mingi;+ mpe moto oyo bapesi ye mokumba monene, bakosɛnga ye mingi koleka ndenge esɛngamaka.+ 49  “Nayaki kopelisa mɔtɔ+ na mabele, mpe soki epelisami, nakoluka lisusu nini? 50  Ya solo, nazali na batisimo oyo nasengeli kozwa, mpe nazali koyoka mpasi mpenza tii yango ekosuka!+ 51  Bozali kokanisa ete nayaki kotya kimya na mabele? Te, bongo te, nazali koyebisa bino, nayei kotya nde bokabwani.+ 52  Mpo banda sikoyo, na ndako moko bato mitano bakokabwana: misato bakotɛmɛla mibale to mibale bakotɛmɛla misato.+ 53  Bato bakokabwana: tata akotombokela mwana mobali mpe mwana mobali akotombokela tata, mama akotombokela mwana mwasi mpe mwana mwasi akotombokela mama na ye, bokilo ya mwasi akotombokela mwasi ya mwana mpe mwasi ya mwana akotombokela bokilo na ye ya mwasi.”+ 54  Bongo alobaki mpe na ebele ya bato ete: “Ntango bomonaka lipata moko ebimi na wɛsti, na mbala moko bolobaka ete: ‘Mopɛpɛ makasi ezali koya,’ mpe esalemaka bongo.+ 55  Mpe ntango bomonaka mopɛpɛ moko ya sudi ezali kopɛpa, bolobaka ete: ‘Molunge makasi ekozala,’ mpe esalemaka bongo. 56  Bakosi, boyebi kotala malamu ndenge mabele ná likoló ezali komonana, kasi ndenge nini boyebi te kotalela malamu eleko oyo mpenza?+ 57  Mpo na nini bino moko boyebi te kokata ete likambo boye ezali sembo?+ 58  Na ndakisa, ntango ozali kokende elongo na monguna na yo kosamba epai ya moyangeli, salá makasi ete, ntango ozali na nzela, osilisa likambo ya yo ná ye, noki apesa yo na mosambisi, mpe mosambisi apesa yo na mabɔkɔ ya polisi ya tribinale; mpe polisi ya tribinale abwaka yo na bolɔkɔ.+ 59  Nazali koyebisa yo: Ya solo, okobima kuna te liboso ofuta mbongo ya bibende ya motuya moke mpenza ya nsuka.”+

Maloba na nse

Lil., “loketo na bino ekangama.”
Lil., “akomikanga loketo.”
Talá Mt 14:25, msl.