Luka 11:1-54
11 Sikoyo mokolo moko azalaki kobondela na esika moko mpe ntango asilisaki, moko ya bayekoli na ye alobaki na ye ete: “Nkolo, teyá biso kobondela,+ ndenge Yoane mpe ateyaki bayekoli na ye.”+
2 Bongo alobaki na bango ete: “Ntango bozali kobondela,+ bóloba: ‘Tata, nkombo na yo esantisama.+ Bokonzi na yo eya.+
3 Pesá biso bilei*+ na biso ya mokolo na kolanda bamposa ya mokolo.
4 Mpe limbisá biso masumu na biso,+ mpo biso moko mpe tolimbisaka moto nyonso oyo azali na nyongo+ na biso; mpe salisá biso tókwea na komekama te.’”+
5 Lisusu, alobaki na bango ete: “Nani na kati na bino soki azali na moninga mpe akei epai na ye na katikati ya butu mpe alobi na ye ete: ‘Moninga, defisá ngai mampa misato,
6 mpo nauti koyamba moninga na ngai moko oyo auti mobembo mpe nazali na eloko ya kopesa ye te’?
7 Bongo oyo wana na kati ya ndako azongisi: ‘Tiká kotungisa ngai.+ Porte esili kokangama, mpe bana na ngai balali na mbeto elongo na ngai; nakoki te kotɛlɛma mpe kopesa yo mwa eloko.’
8 Nazali koyebisa bino: Akotɛlɛma mpe akopesa moninga na ye eloko oyo azali na mposa na yango, kaka mpo azali moninga te, kasi mpo atye ye mbamba makasi.+
9 Na yango nazali koloba na bino ete: Bókoba kosɛnga,+ mpe bakopesa bino; bókoba koluka,+ mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.
10 Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka,+ mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye.
11 Ya solo, tata nani na kati na bino oyo soki mwana na ye+ asɛngi mbisi, akopesa ye mbala mosusu nyoka na esika ya mbisi?
12 To soki mpe asɛngi maki, akopesa ye nkotó?
13 Yango wana, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu,+ bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu+ koleka?”
14 Na nsima, azalaki kobimisa demo moko oyo asalaka ete moto alobaka te.+ Ntango demo wana abimaki, moto yango alobaki. Mpe ebele ya bato bakamwaki.
15 Kasi bato mosusu na kati na bango balobaki ete: “Azali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube mokonzi ya bademo.”+
16 Nzokande, bamosusu, mpo na komeka ye, babandaki koluka apesa bango elembo+ oyo euti na likoló.
17 Lokola ayebaki makanisi+ na bango, alobaki na bango ete: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko ebebaka, mpe ndako oyo ekabwani na kati na yango moko ekweaka.+
18 Bongo soki Satana mpe akabwani na kati na ye moko, bokonzi na ye ekotɛlɛma ndenge nini?+ Mpo bozali koloba ete nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube.
19 Soki nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube, bongo bana na bino+ bazali kobimisa bango na nguya ya nani? Yango wana bango bakosambisa bino.
20 Kasi soki ezali na mosapi ya Nzambe+ nde nazali kobimisa bademo, bokonzi ya Nzambe eleki bino kaka boye.+
21 Soki moto moko ya makasi,+ oyo azali na bibundeli, azali kokɛngɛla ndako na ye, eloko moko te ekokómela biloko na ye.
22 Kasi ntango moto oyo aleki ye na makasi+ ayei kobunda na ye mpe alongi ye,+ akokamata bibundeli na ye nyonso oyo azalaki kotyela motema, mpe akokabola biloko oyo abɔtɔlaki ye.
23 Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.+
24 “Ntango elimo moko ya mbindo ebimi na moto, elekaka koluka esika ya kopema na bisika ekauká, mpe na nsima, soki ezwi ata esika moko te, ekoloba ete: ‘Nakozonga na ndako na ngai epai nabimaki.’+
25 Mpe ntango ekómi kuna, ekuti bakɔmbɔli yango mpe ekómi kitoko.
26 Bongo ekei kokamata bilimo mosusu nsambo+ oyo eleki yango na mabe, mpe nsima ya kokɔta na kati, bilimo yango efandi kuna; mpe moto wana akómaka mabe koleka ndenge oyo azalaki liboso.”+
27 Nzokande ntango azalaki koloba makambo wana mwasi moko na kati ya ebele ya bato atombolaki mongongo na ye mpe alobaki na ye ete: “Esengo na libumu+ oyo ememaki yo mpe na mabɛlɛ oyo omɛlaki!”
28 Kasi ye alobaki ete: “Te, Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”+
29 Ntango ebele ya bato basopanaki mingi, abandaki koloba ete: “Libota oyo ezali libota moko ya mabe; ezali koluka elembo.+ Kasi bakopesa yango elembo moko te longola kaka elembo ya Yona.+
30 Mpo lokola Yona+ akómelaki bato ya Ninive elembo, Mwana ya moto mpe akozala elembo mpo na libota oyo.
31 Mokonzi-mwasi+ ya sudi akosekwa na Mokolo ya Kosambisama esika moko na bato ya libota oyo mpe akokweisa bango; mpamba te autaki na nsuka ya mabele ayei koyoka bwanya ya Salomo, kasi talá! moto oyo aleki+ Salomo azali awa.
32 Bato ya Ninive bakosekwa esika moko na libota oyo na Mokolo ya Kosambisama mpe bakokweisa yango; mpamba te babongolaki motema na oyo Yona asakolaki;+ kasi talá! moto oyo aleki+ Yona azali awa.
33 Nsima ya kopelisa mwinda, moto atyaka yango, na libulu to na ekɔlɔ ya komekela te, kasi likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda,+ mpo baoyo bazali kokɔta bámona pole.
34 Mwinda ya nzoto ezali liso na yo. Ntango liso na yo ezali alima, nzoto na yo mobimba mpe ezali kongɛnga;+ kasi ntango yango ezali mabe, nzoto na yo mpe ezali molili.
35 Yango wana, zalá na bokɛngi. Mbala mosusu pole oyo ezali na kati na yo ezali molili.+
36 Yango wana, soki nzoto na yo mobimba ezali kongɛnga mpe ata eteni moko te ezali na molili, yango mobimba ekongɛnga+ se ndenge mwinda engɛngaka ntango epesaka yo pole.”
37 Ntango asilisaki koloba bongo, Mofarisai moko abengaki ye akende kolya+ epai na ye. Bongo akɔtaki mpe afandaki na mesa.
38 Nzokande, Mofarisai wana akamwaki komona ete ye asukolaki mabɔkɔ te+ liboso ya kolya bilei ya midi.
39 Kasi Nkolo alobaki na ye ete: “Nzokande bino Bafarisai, bopɛtolaka libándá ya kɔpɔ mpe ya saani, kasi mitema+ na bino etondi na kopunza mpe na mabe.+
40 Bazoba! Moto oyo asalaki libándá+ asalaki mpe kati, boye te?
41 Kasi bópesa makabo ya motema mawa+ nde biloko oyo ezali na motema, mpe talá! biloko na bino mosusu nyonso ekokóma pɛto.
42 Kasi mawa na bino Bafarisai, mpamba te bopesaka moko ya bandambo zomi+ ya manti mpe ya peganono mpe ya ndunda mosusu nyonso,* kasi bozali koleka pembeni ya bosembo mpe bolingo ya Nzambe! Bosengelaki kosala makambo oyo, mpe kobosana te makambo mosusu wana.+
43 Mawa na bino Bafarisai, mpamba te bolingaka bakiti ya liboso na basinagoga mpe bambote na bazando!+
44 Mawa na bino, mpamba te bozali lokola malita wana oyo ezali komonana te, mpe bato batambolaka likoló na yango mpe bayebaka yango te!”+
45 Moko ya baoyo bayebi Mibeko malamumalamu+ azongiselaki ye ete: “Moteyi, lokola ozali koloba makambo wana ozali mpe kofinga biso.”
46 Bongo alobaki ete: “Mawa mpe na bino baoyo boyebi Mibeko malamumalamu, mpamba te bozali komemisa bato mikumba ya kilo, kasi bino moko bosimbaka mikumba yango ata na mosapi te!+
47 “Mawa na bino, mpamba te botongaka malita ya basakoli, kasi bankɔkɔ na bino nde babomaki bango!+
48 Ya solo boyebi malamu misala ya bankɔkɔ na bino kasi atako bongo bozali kondima+ yango, mpamba te bango babomaki+ basakoli kasi bino bozali kotonga malita na bango.
49 Yango wana mpe bwanya+ ya Nzambe elobaki ete: ‘Nakotindela bango basakoli ná bantoma, mpe bakoboma mpe bakonyokola bamosusu na kati na bango,
50 mpo básɛnga libota oyo makila ya basakoli+ nyonso oyo esopamá banda na ebandeli ya mokili,+
51 banda na makila ya Abele+ tii na makila ya Zekaria,+ oyo abomamaki na katikati ya etumbelo mpe ndako.’+ Ya solo, nazali koyebisa bino, bakosɛnga yango na libota oyo.
52 “Mawa na bino baoyo boyebi Mibeko malamumalamu, mpamba te bolongoli fungola ya boyebi;+ bino moko bokɔtaki te, mpe baoyo bazalaki kokɔta bokangelaki bango nzela!”+
53 Bongo ntango abimaki kuna bakomeli ná Bafarisai bayelaki ye elóló mpe babandaki kotunatuna ye mituna ya makambo mosusu,
54 bazalaki kotyela ye motambo,+ mpo na kozwa+ likambo moko na monɔkɔ na ye.