Kolimbola Mibeko 6:1-25

6  “Sikoyo talá mitindo, malako mpe bikateli ya lisambisi oyo Yehova Nzambe na bino apesi mpo na koteya bino,+ mpo bósalela yango na mokili epai bozali kokatisa mpo na kozwa yango;  mpo obanga+ Yehova Nzambe na yo na kobateláká mibeko na ye nyonso mpe mitindo na ye oyo nazali kopesa yo, yo ná mwana na yo mpe mwana ya mwana na yo,+ mikolo nyonso ya bomoi na yo, mpe mpo bomoi na yo ezala molai.+  Mpe osengeli koyoka, Ee Yisraele, mpe kokeba ete osalela+ yango, mpo makambo na yo etambola malamu+ mpe mpo bókóma mingi mpenza, kaka ndenge Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na yo apesaki yo elaka,+ na ntina na mokili oyo etondi na miliki mpe mafuta ya nzoi.  “Yoká, Ee Yisraele: Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.+  Mpe osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema+ na yo mobimba mpe na molimo+ na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso ya bomoi.+  Mpe maloba oyo nazali kopesa yo mitindo lelo esengeli kozala na motema na yo;+  mpe osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati ya mwana+ na yo mpe kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala+ mpe ntango okolamuka.  Mpe osengeli kokanga yango lokola elembo na lobɔkɔ na yo,+ mpe esengeli kozala na elongi na yo lokola mwa nsinga oyo bakangaka na elongi;+  mpe osengeli kokoma yango likoló ya makonzí ya porte ya ndako na yo mpe na baporte na yo.+ 10  “Mpe ekosalema mpenza boye: ntango Yehova Nzambe na yo akokɔtisa yo na mokili oyo alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na yo Abrahama, Yisaka mpe Yakobo ete akopesa yo,+ bingumba minene mpe kitoko oyo otongaki te,+ 11  mpe bandako oyo etondi na biloko nyonso ya kitoko mpe oyo otondisaki te, mpe mabulu oyo etimolamá mpo na kobomba mai, oyo otimolaki te, bilanga ya vinyo mpe banzete ya olive oyo olonaki te, mpe ntango okolya mpe okotonda,+ 12  kebá ete obosana+ Yehova te, oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito, na ndako ya boombo. 13  Okobanga Yehova Nzambe na yo,+ mpe ye nde okosalela,+ mpe na nkombo na ye nde okolapa ndai.+ 14  Bosengeli kolanda banzambe mosusu te, banzambe nyonso ya bato ya bikólo oyo bazali zingazinga na bino,+ 15  (mpo Yehova Nzambe na yo oyo azali na kati na yo azali Nzambe oyo asɛngaka bákangama kaka na ye,)+ noki nkanda ya Yehova Nzambe na yo engalela yo+ mpe noki aboma yo na mabele.+ 16  “Bosengeli komeka Yehova Nzambe na bino te,+ ndenge bomekaki ye na Masa.+ 17  Bosengeli mpenza kobatela mitindo ya Yehova Nzambe+ na bino mpe matatoli+ na ye mpe malako+ na ye oyo apesi yo.+ 18  Mpe osengeli kosala oyo ezali sembo mpe malamu na miso ya Yehova, mpo makambo na yo etambola malamu+ mpe okɔta mpenza mpe ozwa mokili malamu oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na yo ndai,+ 19  na kobenganáká banguna na yo nyonso liboso na yo, kaka ndenge Yehova apesi elaka.+ 20  “Soki mokolo moko, mwana na yo atuni yo+ ete: ‘Matatoli ná malako mpe bikateli ya lisambisi oyo Yehova Nzambe na biso apesaki bino lokola mitindo elimboli nini?’ 21  osengeli koloba na mwana na yo ete: ‘Tokómaki baombo ya Farao na Ezipito, kasi Yehova abimisaki biso na Ezipito na nguya ya lobɔkɔ na ye.+ 22  Bongo Yehova azalaki kokweisela Ezipito, Farao mpe bato ya ndako na ye nyonso bilembo mpe makamwisi+ ya minene mpe ya mpasi, na miso na biso.+ 23  Mpe abimisaki biso kuna mpo amema biso awa mpo na kopesa biso mokili oyo alapelaki bankɔkɔ na biso ndai.+ 24  Na yango, Yehova apesaki biso mitindo tókokisa malako+ oyo nyonso, tóbanga Yehova Nzambe na biso mpo na bolamu na biso ntango nyonso,+ mpo tótikala na bomoi lokola na mokolo ya lelo.+ 25  Mpe yango ekomonisa boyengebene na biso,+ soki tokebi mpe tosaleli mobeko oyo nyonso liboso ya Yehova Nzambe na biso, kaka ndenge apesi biso mitindo.’+

Maloba na nse