Kolimbola Mibeko 16:1-22

16  “Kanisá sanza ya Abibe,+ mpe osengeli kosala elekeli mpo na Yehova Nzambe+ na yo, mpamba te na sanza ya Abibe, Yehova Nzambe na yo abimisaki yo na Ezipito na butu.+  Mpe osengeli kopesa Yehova Nzambe na yo mbeka ya elekeli,+ oyo euti na etonga ya bampate mpe na etonga ya bangɔmbɛ,+ na esika oyo Yehova akopona mpo na kofandisa nkombo na ye kuna.+  Mikolo nsambo, osengeli te kolya yango na eloko moko oyo etyami levire.+ Okolya yango na bagato ezangá levire, mampa ya mpasi, mpamba te obimaki mbangumbangu na mokili ya Ezipito,+ mpo okanisa mokolo ya kobima na yo na mokili ya Ezipito, mikolo nyonso ya bomoi na yo.+  Mpe pɔtɔpɔtɔ ya farini ya ngayi ekomonana te epai na yo na teritware na yo mobimba mikolo nsambo,+ mpe ndambo ata moke te ya mosuni, oyo okopesa mbeka na mpokwa na mokolo ya liboso, ekotikala butu mobimba tii na ntɔngɔ.+  Bakopesa yo nzela te ya kopesa mbeka ya elekeli na moko ya bingumba na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.  Kasi na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona mpo na kofandisa nkombo na ye kuna,+ okopesa mbeka ya elekeli na mpokwa na ntango moi ekolala,+ na ntango oyo etyamaki mpo obima na Ezipito.  Mpe osengeli kolamba mpe kolya+ na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona,+ mpe na ntɔngɔ osengeli kobaluka mpe kozonga na bahema na yo.  Mikolo motoba, okolya bagato ezangá levire; mpe na mokolo ya nsambo, ekozala liyangani moko monene mpo na Yehova Nzambe+ na yo. Osengeli kosala mosala moko te.  “Okotánga pɔsɔ nsambo. Okobanda kotánga pɔsɔ nsambo banda ntango oyo bakolekisa likwangola mpo na mbala ya liboso na mbuma oyo etɛlɛmi naino.+ 10  Na nsima, osengeli kosala fɛti ya bapɔsɔ mpo na Yehova Nzambe+ na yo, na kotalela likabo ya bolingo ya lobɔkɔ na yo oyo okopesa, kaka ndenge Yehova Nzambe na yo akopambola yo.+ 11  Mpe osengeli kosepela liboso ya Yehova Nzambe+ na yo, yo ná mwana na yo ya mobali ná mwana na yo ya mwasi ná moombo na yo ya mobali ná moombo na yo ya mwasi ná Molevi oyo azali na kati ya baporte na yo ná moto oyo afandi mopaya+ ná mwana mobali oyo tata akufá+ mpe mwasi oyo mobali akufá,+ baoyo bazali epai na yo, na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona mpo na kofandisa nkombo na ye kuna.+ 12  Mpe osengeli kobosana te ete okómaki moombo na Ezipito,+ mpe osengeli kotosa mpe kokokisa malako oyo.+ 13  “Mikolo nsambo, okosala fɛti ya mwa bandako ya matiti+ ntango okoyanganisa mbuma ya esika na yo ya kotutatuta mbuma mpe ya ekamwelo na yo ya mafuta mpe ya vinyo. 14  Mpe osengeli kosepela na boumeli ya fɛti na yo,+ yo ná mwana na yo ya mobali ná mwana na yo ya mwasi ná moombo na yo ya mobali ná moombo na yo ya mwasi ná Molevi ná moto oyo afandi mopaya ná mwana mobali oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá, baoyo bazali na kati ya baporte na yo. 15  Mikolo nsambo, okosala fɛti+ mpo na Yehova Nzambe na yo na esika oyo Yehova akopona, mpamba te Yehova Nzambe na yo akopambola+ yo na mbuma na yo nyonso mpe na misala na yo nyonso, mpe osengeli kozala kaka na esengo.+ 16  “Mbala misato na mbula, mobali nyonso epai na yo akomonana liboso ya Yehova Nzambe na yo na esika oyo ye akopona:+ na fɛti ya bagato ezangá levire+ mpe na fɛti ya bapɔsɔ+ mpe na fɛti ya mwa bandako ya matiti,+ moto moko te akomonana liboso ya Yehova mabɔkɔ mpamba.+ 17  Likabo ya lobɔkɔ ya moto na moto ekokokana na lipamboli oyo Yehova Nzambe na yo apesi yo.+ 18  “Okotya basambisi+ mpe bakapita+ na kati ya baporte na yo nyonso oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo engebene mabota na yo, mpe bango basengeli kosambisa bato na lisambisi ya boyengebene. 19  Osengeli te kopɛngwisa lisambisi.+ Osengeli te kopona bilongi+ to kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato ya bwanya+ mpe ebulunganisaka maloba ya bayengebene. 20  Bosembo, ɛɛ bosembo nde okolanda,+ mpo okoba kozala na bomoi mpe ozwa mpenza mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+ 21  “Pembeni ya etumbelo ya Yehova Nzambe na yo oyo okosala, osengeli te kolona ata nzete ya lolenge nini mpo ezala nzete ya losambo.+ 22  “Okotɛlɛmisa mpe te likonzí moko ya losambo,+ eloko oyo Yehova Nzambe na yo ayinaka mpenza.+

Maloba na nse