Hosea 14:1-9

14  “Ee Yisraele, zongelá Yehova Nzambe na yo,+ mpamba te obɛti libaku na libunga na yo.+  Bóya na maloba mpe bózongela Yehova.+ Bóloba na ye bino nyonso ete: ‘Limbisá libunga;+ mpe ndimá oyo ezali malamu, mpe mpo na yango, biso tokopesa likabo ya bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na biso.+  Asiri ekobikisa biso te.+ Tokotambola na bampunda te.+ Mpe tokoloba lisusu na mosala ya mabɔkɔ na biso te ete: “Ee Nzambe na biso!” mpamba te na nzela na yo nde bayokelaka mwana oyo tata akufá mawa.’+  “Nakosilisa maladi na bango ya kozanga bosembo.+ Nakolinga bango ndenge ngai moko nasepeli,+ mpamba te nkanda na ngai elongwe epai na ye.+  Nakokóma lokola mamwɛ mpo na Yisraele.+ Akobimisa fololo lokola lísi, mpe akopika misisa na ye lokola nzete ya Libá.  Mwa milona na ye ekobima, mpe lokumu na ye ekokóma lokola oyo ya nzete ya olive,+ mpe nsolo na ye ekozala lokola oyo ya nzete ya Libá.  Bakofanda lisusu na elili na ye.+ Bakobota mbuma, mpe bakobimisa nkasa ya sika lokola nzete ya vinyo.+ Ekaniseli na ye ekozala lokola vinyo ya Libá.  “Efraime akoloba boye: ‘Ngai ná bikeko likambo nini lisusu?’+ “Ya solo, ngai nakoyanola mpe nakokoba kotala ye.+ Nazali lokola nzete ya jenevriye oyo etondi na nkasa.+ Basengeli kozwela yo mbuma nde epai na ngai.”  Nani azali moto ya bwanya, mpo akanga ntina ya makambo oyo?+ Moto ya mayele, mpo ayeba yango?+ Mpamba te banzela ya Yehova ezali alima,+ mpe bayengebene nde bakotambola wana;+ kasi bato oyo babukaka mibeko bakobɛta libaku wana.+

Maloba na nse